2013
Likabo ya Jen
sánzá ya zómi 2013


Bilenge

Likabo ya Jen

Mokomi afandaka na Utah, Etazini ya Amerika.

Nasalaki molongo ya maponi mabe na mobu na ngai ya mibale ya eteyelo ya likolo. Maponi wana ememaki malandi ya mpasi mpe ya esengo te, mpe nakanaki kosalela ntango na ngai ya bopemi ya eleko ya elanga mpo na kobanda kosala mbongwana. Ntango eteyelo ebandaki lisusu, nazalaki kolia na mesa moko ya kikoso to na nzela ya pene ya ndako ezanga bato mpo na kokima baninga mabe kozelaka koyamba ngai na bozongi.

Natikala komiyoka naino ngai moko bongo te.

Nsima Nzambe apesaki ngai likabo: Atindelaki ngai Jen. Asambisaki ngai soki moke te mpo na mabunga na ngai kasi na esika ya kosala wana alendisaki ngai kokoba kokende na nzela ya malamu. Koyebaka ete akozala na eteyelo esalisaki ngai nakoba kotanga makomi na ngai mpe koleisa litatoli na ngai. Na ntango ya kopesama diploma, namilakisaki ete namipesaki na mbongwana.

Namitunaka ntango mosusu wapi nalingaki kozala lelo soki Jen asembolaka loboko epai na ngai te. Ekokaki ngai kongama na mabongisi na ngai soki azalaki te? Libaku malamu, nakoyeba yango soki moke te mpamba te azalaki wana na motema na ye mobimba, ya kobelema mpe na bolingi ya kosalisa ngai.