2013
Mokumba na Biso ya Kobikisa
sánzá ya zómi 2013


Etinda ya Bakambi ya Yambo

Mokumba na biso ya Kobikisa

Elilingi
Mokambi Thomas S. Monson

Mpo na Basantu ba Mikolo mya Nsuka, mposa ya kobikisa bandeko mibali mpe basi oyo basili kobunga nzela ya kosalela Eklezia, mpo na ntina moko to mosusu, ezali na ntina ya seko. Toyebi bato ya lolenge oyo baye kala bayambaki nsango malamu? Soki bongo, mokumba na biso mpo na kosunga bango ezali nini?

Tala bato oyo babunga o ntei ya mikolo, bakufeli mibali, mpe babeli. Bazwami mbala mingi mpenza na esobe ya kokauka mpe ya mawa oyo ebengami bomoko. Ntango bolenge ekendaka, ntango bokolongono ya nzoto ekitaka, ntango bokasi esilaka, ntango mwinda ya elikya ezali se kokita na kongengaka moke moke, bato wana bakoki kopesama lisalisi mpe kosungama na loboko oyo esalisaka mpe na motema oyo eyebi kokabola mawa ya basusu.

Solo mpenza, ezali na basusu oyo bazali na mposa ya lisalisi. Boko bazali kobunda na lisumu ntango basusu bazali kowayawaya na bobangi to na komonaka nyonso mpamba to na kozangaka boyebi. Ezala ntina soki nini, bamibendi bango moko mosika uta na kosala na Eklezia. Mpe na ntembe te bakotikala mbele bato babunga longola se soki mposa moko elamuki kati na biso—bandimi oyo tozali kosala na Eklezia—mpo na kosunga mpe kobikisa.

Moto moko mpo na Kolakisa Nzela

Mwa ntango eleki nazwaki mokanda ekomami na moto moko oyo alongwaki na Eklezia. Mokanda yango ezali yoko ndakisa mpenza ya bandimi na biso. Nsima ya kolimbola lolenge nini akomaki mondimi oyo akweya malili, ye akomaki:

“Nazalaki na mingi mpenza kasi sikawa nazali na moke mpenza. Nazali na esengo te mpe nazali koyoka lokola soki nazali kokweya na makambo nyonso. Nsango malamu etika motema na ngai ata mokolo moko te, kutu ata soki etikaki bomoi na ngai. Nazali kosenga nsambo na bino.

“Nasengi bino bobosana te baoyo kati na biso bazali libanda ya awa—Basantu ya Mikolo mya Nsuka oyo babunga. Nayebi esika wapi Eklezia ezali, kasi ntango mosusu nakanisi nazali na mposa ya moto mosusu mpo na kolakisa ngai nzela, kolendisa ngai motema, kolongola bobangi na ngai, mpe kotatola epai na ngai.”

Wana ezalaki ngai kotanga mokanda oyo, makanisi na ngai ebalukaki epai nakendaki mbala moko kotala ndako monene wapi biloko ya ntoki ya ndenge na ndenge ya mokili bitiamaki—oyo eyebana lokola Musée ya Victoria mpe Albert Victoria na Londres, Angleterre. Kuna, ya kokanga malamu mpenza, ezali na etando moko na bilili kitoko oyo eyemamaki na mobu 1831 na Joseph Mallord William Turner. Etando yango ezali kotalisa mapata minene ya moindo mpenza mpe nkanda ya mbu na botomboki kolakaka likama mpe liwa. Mwinda moko uta na masuwa ekufa ezali kongenga na mosika. Na liboso, ya kobwakama likolo na mbonge ya mai maye mazalaki kokota na fulu, bwato ya monene mpo na kobikisa bato ezali. Mibali bazali koluka nkai na makasi wana ezali bwato ya kobikisa kozinda na mopepe makasi. Na libongo mwasi moko mpe bana mibale batelemi, bapoli na mvula mpe babetami na mopepe. Bazali kotala motema likolo likolo epai na ebale. Na mayele na ngai nakomisaki nkombo ya etando ya bilili yango. Epai na ngai ekomaki Mpo na Kobikisa.1

Na katikati ya mipepe makasi ya bomoi, likama ezali kozela ya kobombana. Mibali mpe basi, bilenge mibali mpe bilenge basi bazwami ya kosundolama mpe kobundaka na libebi. Nani akokamba bwato ya libiki, kotikaka nsima bilengi ya ndako mpe libota, mpe kokende mpo na kobikisa?

Mosala na biso ezali ya kolongama te. Tozali na mosala ya Nkolo; tosengeli kozwa lisalisi na Ye.

Na ntango ya mosala ya Nkolo, Ye abiangaki baluki mbisi na Galilea kotika miniama na bango mpe kolanda Ye, kolobaka ete, “Nakokomisa bino baluki ya bato.”2 Tika ete tosangana na milongo ya baluki mibali mpe basi, ete tokoka kopesa lisalisi nyonso kani tokoki.

Ya biso ezali mokumba ya kosembola loboko mpo na kosalisa baoyo batiki bokengi oyo ewuti na kosalela Nzambe, ete bango bakoka komemama na mesa ya Nkolo mpo na kosala lipati ya liloba na Ye, mpo na kosepela na kozala moninga ya Molimo mwa Ye, mpe kozala “lisusu baleki nzela mpe bapaya te kasi bai-mboka elongo na basantu mpe bana ya ndako na Nzambe.”3

Libongisi ya Bolingo

Namoni ete bantina minene ezali mibale oyo esengeli mpenza mpo na kozonga kosalela mpe mpo na komema mbongwana ya lolenge na biso ya kotala baye batika mosala ya Nkolo, bizaleli, mpe misala. Yambo, bato bazongaka mpo moto moko alakisi bango makoki na bango ya seko mpe asalisi bango kozwa mokano ya kokokisa yango. Bato oyo bazali na bolembu bakoki kozala na esengo ya oyo ezanga litomba te ntango bamoni ete makambo ya motuya koleka ezali mpembeni ya maboko na bango.

Ya mibale, basusu bazongaka mpo balingami to “bai mboka na basantu” balandi motindo ya Mobikisi, balingi bazalani na bango lokola bangomei,4 mpe basalisi basusu mpo na kokokisa bandoto na bango mpe bamposa na bango elata nzoto.

Eloko oyo ememaka mbongwana na mosala oyo ezali—mpe ekokoba kozala—libongisi ya bolingo.

Na ndenge esalemaka mpenza na bomoi, bato oyo wana bakangami na mbu oyo etombokaki na mipepe makasi kati na etando ya Turner bazali lokola mingi ya bandimi na biso balemba oyo bazali kozela lisalisi na baoyo bazali kokamba babwato ya libiki. Mitema na bango mizali koyoka mposa ya lisalisi. Bamama mpe batata bazali kosambela mpo na bana na bango ya mibali mpe ya basi. Basi ya mabala bazali kobondela lola ete mibali na bango bakoka kosimbama. Ntango mosusu bana bazali kosambela mpo na baboti na bango.

Ezali losambo na ngai ete tokoka kozala na mposa ya kosalisa bato na bolembi mpe kozongisa bango epai na esengo ya nsango malamu ya Yesu Klisto, ete bakoka kokabola elongo na biso nyonso oyo lisanga mobimba ya bandimi ekoki kopesa.

Tika tosembola maboko mpo na kosalisa bato babunga oyo bazingi biso: bakolo, basi bakufela mibali, babeli, batengoli, bato na bolembu, mpe baoyo bazali kobatela mibeko te. Tika tosembola epai na bango loboko oyo esalisaka mpe motema oyo eyebi kokabola mawa ya basusu. Na kosalaka bongo, tokomema esengo na mitema na bango, mpe tokoyebakozwa bosepelisi monene oyo eyelaka biso ntango tosalisaka mosusu na nzela ya bomoi ya seko.

Matangi

  1. Nkombo mobimba ya etando ezali Life-Boat and Manby Apparatus Going Off to a Stranded Vessel Making Signal (Blue Lights) of Distress.

  2. Matai 4:19.

  3. Baefese 2:19.

  4. Tala Matai 22:39.

Koteya uta na Etinda Oyo

Bokanisa kotunaka bato bokeyi kotala soki bayebi moto moko oyo azali kobunda mpo na kokende na eklezia. Bokoki kopona moto moko mpe kosolola mpo na oyo etali banzela ya kolakisa bolingo, lokola kobengisaka ye mpo na kosala elongo na losambo ya mpokwa ya libota to mpo na koya na ntina ya elambo.