2017
Mpo ete Bakoka Kozala Moko
July 2017


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Nsambo 2017

Mpo ete Bakoka Kozala Moko

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofuli ya koyeba nini bosengeli kokabola. Lolenge nini kososolaka ntina Lingomba ya Bamama Basungi ezali kolengela bana basi ya Nzambe mpo na mapamboli ya bomoi ya seko?

Elilingi
Relief Society seal

Bondimi, Libota, Lisungi

“Yesu akokisaki na bobongi nie na bomoko elongo na Tata na komikabaka Yemei, na oyo etali nzoto mpe molimo, na bolingi ya Tata,” eteyaki Mpaka D. Todd Christofferson ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale.

“… Ya solo tokozala bomoko te na Nzambe mpe Klisto soki tosali bolingi mpe litomba na Bango mposa na biso makasi te. Bomipesi ya boye esalemaka na mokolo te, kasi na nzela ya Molimo Mosantu, Nkolo akotangisa biso soki tozali na bolingi tii, na ntango, ekoki solo kolobama ete Azali kati na biso lokola Tata azali kati na Ye.”1

Linda K. Burton, Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, ateyaki lolenge nini kosala na bomoko oyo: “Kosalaka mpe kobatelaka mayokani na biso ezali ndakisa ya komipesa na biso ya kokoma lokola Mobikisi. Ya ntina ezali koluka mpo na ezalela malamu koleka elobami na mwa maloba moke ya loyembo kitoko: ‘Nakokende esika yo olingi ngai nakende. … Nakoloba oyo yo olingi ngai naloba. … Nakozala oyo yo olingi ngai nazala.’”2

Mpaka Christofferson akundolisi biso lisusu ete “Wana ezali biso koluka kosala mokolo na mokolo mpe poso na poso mpo na kolanda nzela ya Klisto, molimo na biso ekondima monene na yango, etumba ekozala mosika, mpe mimekano ekotika kotungisa.”3

Neill F. Marriott, Mopesi Toli ya Mibale na Bokambi Monene ya Bilenge Basi, atatoli na ntina ya mapamboli ya koluka kokokanisa bolingi na biso na bolingi ya Nzambe: “Nabundaki kotika mposa na ngai ya kufa mpo na kosala makambo na lolenge na ngai , na nsuka nasosolaki ete lolenge na ngai ezali o ya kozanga, ya ndelo, mpe ya nse mingi mpenza na lolenge ya Yesu Klisto. ‘Nzela ya [Tata na biso ya Lola] ezali nzela oyo ekambaka na esengo na bomoi oyo mpe bomoi ya seko na mokili oyo ekoya.’”4 Tika ete toluka na komikitisa tokoma bomoko elongo na Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto.

Makomi mpe Nsango ya Kobakisa

Yoane 17:20–21; Baefezo 4:13; Doctrine et Alliances 38:27; reliefsociety.lds.org

Matangi

  1. D. Todd Christofferson, “That They May Be One in Us,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2002, 72, 73.

  2. Linda K. Burton, “The Power, Joy, and Love of Covenant Keeping,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2013, 111.

  3. D. Todd Christofferson, “That They May Be One in Us,” 71.

  4. Neill F. Marriott, “Yielding Our Hearts to God,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2015, 32.