2017
Ya Motema Moko
September 2017


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Libwa 2017

Ya Motema Moko

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofuli ya koyeba nini bosengeli kokabola. Lolenge nini kososolaka ntina Lingomba ya Bamama Basungi ezali kolengela bana basi ya Nzambe mpo na mapamboli ya bomoi ya seko?

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

“Mpe Nkolo abengaki batu na ye Siona, mpo ete bazalaki motema moko mpe likanisi moko, mpe bafandaki na boyengebene; mpe mobola azalaki kati na bango te” (Moses 7:18). Lolenge nini tokoki kokoma moko?

Mpaka M. Russell Ballard ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale alobaki: “Na motema ya liloba ya Angele bomikabi ezali liloba moko. Soki bato nyonso basosolaka oyo, ekokaki kozala moto moko te na oyo tokokaki kotalela, kotala mobu te, langi ya poso te, mobali to mwasi te, eklezia, to lingomba ya batu te to mosolo te. Tosengeli kobumda kolanda ndakisa ya Mobikisi mpe tosengeli te kozanga bosembo, kozala na bokeseni, bozangi botosi, to kosundola basusu.”1

Mokambi Henry B. Eyring, Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi ya Yambo, ateyaki: “Esika bato bazali [na] Molimo elongo na bango, [ba] koki koyoka esengo. … Molimo ya Nzambe ememaka bonguna te (tala 3 Nefi 11:29). … Ekambaka na kimia mpe mposa ya kosangana na basusu.”2

Koloba na ntina ya mimekano, Carol M. Stephens, oyo asungaki lokola Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi alobaki: “Naino nakabwana na mobali te, mpasi mpe likama oyo eyaka uta na bosundoli, to mokumba ya kozala mama monzemba. Nazwaki liwa ya mwana te, bozangi, to mokakatano moko te. Nasengelaki te kokutana na bobebisi, bokono makasi, to bowumbu. Oyo etikala kozala mabaku ya ntango molai na ngai te.

Kasi na nzela ya masenginya na ngai moko mpe mimekano nakomi na mokangano malamu elongo na Moto oyo asosolaka. … Mpe nakobakisa, nakutanaki na masenginya nyonso ya bomoi oyo natalisi na nzela ya ntina ya mwana mwasi, mama, nkoko ya mwasi, ndeko mwasi, tata mwasi, mpe moninga.

“Libaku na biso ya malamu ya kozala bana basi babateli liyokani ya Nzambe ezali kaka ya koyekola te uta na mimekano na biso moko; kasi ezali ya kosangana na bolingo mpe mawa ntango tozali kosunga bandeko mosusu ya libota ya Nzambe na bampasi na bango.”3

Makomi mpe Nsango ya Kobakisa

Yoane 17:20–23; Baefeze 4:15; Moziya 18:21–22; 4 Nefi 1:15;

reliefsociety.lds.org

Matangi

  1. M. Russell Ballard, “The Atonement and the Value of One Soul,” Liahona, Sanza ya Mitano 2004, 86.

  2. Henry B. Eyring, “That We May Be One,” Ensign, Sanza ya Mitano 1998, 67.

  3. Carole M. Stephens, “The Family Is of God,” Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 11–12.