2017
Kolukaka Klisto na Noele
December 2017


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Zomi na Mibale 2017

Kolukaka Klisto na Noele

Na baoyo nyonso balingi kososola oyo tozali lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, nalingi kopesa esika ya kobandela elimbolama na maloba misato oyo: Biso Tolukaka Klisto.

Biso Tolukaka toyekola na nzela na Ye. Mpo na kolanda Ye. Mpo na kokoma mingi lokola Ye.

Mikolo nyonso na mobu, tolukaka Ye. Kasi mingi mingi na ntango oyo ya mobu—Noele, ntango tosepelaka na mbotama ya Mobikisi na biso ya bolingo—mitema na biso eyekamaka mingi epai na Ye.

Lokola eteni ya babolengeli na biso mpo na kosepela Noele, tosengeli kokanisa lolenge nini baoyo bazalaki na bomoi mibu nkoto mibale eleki babelamaki mpo na koyamba boyei ya Mobikisi.

Babateli mpate

Toyebi ebele te na ntina ya babateli mpate, kaka oyo bazalaki “kofandaka na elanga, kokengelaka bibwele na butu.”1 Babateli mpate bazalaki na bomoi ya kokesena na bato mosusu, lokola bato ebele oyo balukaka lokumu na bango mokolo na mokolo na bomoi na bango.

Bakokaki kozala ndakisa ya bato oyo, na mbala moko, bakokaki te kozala na boluki makasi ya Klisto, kasi mitema na bango ebongwanaki ntango balola efungwamaki mpe Klisto asakolamaki mpo na bango.

Ezali baoyo, nsima ya koyoka mongongo ya batindami ya lola, mbala moko bakendaki na Beteleyeme kozela mpo na kotala.2

Bato ya Bwanya

Bato ya Bwanya bazalaki bayekoli oyo bazalaki koyekola boyei ya Masiya, Mwana ya Nzambe. Na nzela ya boyekoli na bango, bazalaki koyeba bilembo oyo ezalaki komonisama mpo na Mbotama na Ye. Ntango bamonaki yango, batikaki mabota na bango mpe bakendaki mobembo na Yelusaleme, kotunaka, “Esika nini Mokonzi ya Bayuda abotami?”3

Boyebi na bango ya Klisto etikalaki te kaka ya kelasi. Ntango kaka bamonaki bilembo ya mbotama na Ye, bayanolaki mbala moko. Bamipesaki mpo na koluka Klisto.

Bato ya bwanya yango bakokaki komilakisa lokola baoyo balukaka Klisto na nzela ya boyekoli mpe ya kelasi. Bomipesi na bango na bosolo na nsuka ekambi bango na bokutani na Klisto mpe bokumbameli Ye lokola Mokonzi ya bakonzi, Mobikisi ya bato.4

Simeona mpe Ana

Simeona mpe Ana bakokaki komilakisa lokola baoyo bazalaka koluka Klisto na nzela ya Molimo. Milimo malamu koleka oyo emipesaki na bonzambe mpe, na nzela ya kokilaka mpe losambo mpe na kokambaka babomoi ya bomipesi mpe botosi, bazelaki na motema dukuduku mpo na komona mokolo ya boyei ya Mwana ya Nzambe.

Na nzela ya bosembo, bomikitisi, mpe bondimi, na motema kokita bakengelaki mpo na boyei ya Mobikisi.

Na nsuka, bondimi na bango efutamaki lokola Maliya mpe Yosefe balakisaki bango mwana oyo asengelaki mokolo moko komema masumu ya bato.5

Bandimi kati ya Banefi na Balamani

Lisolo ya kokamwa ya boniboni bandimi na Mokili ya Sika bakengelaki mpo na bilembo ya mbotama ya Mobikisi ezwami na kati ya Buku ya Mormon.

Omikundoli ete baoyo bazalaki na kondima na Klisto batiolamaki mpe batungisamaki. Bato ya bwanya mpe mayele ya mokili ya mokolo wana bafundaki bandimi ete bazalaki kondimela makambo ezanga ntina. Na yango, bazangi bondimi bazalaki kotiola na mongongo makasi ete bazalaki kosala “makele makasi” na mabele (3 Nefi 1:7). Bazalaki kotiola baoyo bazalaki kondimela ete Mobikisi asengelaki kobotama.

Nkanda mpe nkele na bango ekolaki makasi nde bongo bakomaki koboma baoyo bazalaki kondimela Mobikisi. Buku ya Mormon elobeli lisolo ya likama ya mawa.6

Bandimi oyo bazalaki na ntango oyo bakokaki kozala ndakisa ya baoyo balukaka Klisto atako ntango basusu bazali koseka, kotiola, mpe kotumbola. Baluki Klisto atako ntango basusu bameki kotalisa bango lokola babonga malamu te, sembo te, to ya batau.

Kasi komona mpamba ya basusu epekisaka bandimi ya solo uta na boluki ya Klisto te.

Biso Tolukaka Klisto

Na mobu mobimba, mpe ntango mosusu mingi mingi na eleko ya Noele oyo, ekoki kopesa biso litomba ya lisusu totuna motuna “Lolenge nini nazali koluka Klisto?”

Na ntango ya eleko ya mpasi ya bomoi na ye, Mokonzi monene Dawidi akomaki, “O Nzambe, ozali Nzambe na ngai; nakoluka yo: molimo na ngai ezali na mposa na yo, nzoto na ngai napesi yo.”7

Ntango mosusu ezaleli oyo ya kolukaka Nzambe ezalaki moko ya bantina Dawidi amonisamaki lokola moto engebene na motema ya Nzambe.8

Na ntango ya eleko ya Noele oyo mpe na mobu mobimba, tosengeli koluka mobikisi na biso ya bolingo na mitema na biso mobimba mpe milimo, Nkumu ya Kimia, Moko ya Bule ya Yisalaele. Mpo na mposa oyo, na mobimba, elimboli kaka oyo biso tozali te lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka kasi kutu koleka baoyo biso tozali lokola bayekoli ya Klisto.