2017
Na Bolingi ya Komema Mikumba ya Basusu
December 2017


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Zomi na Mibale 2017

Na Bolingi ya Komema Mikumba ya Basusu

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofuli ya koyeba nini bosengeli kokabola. Lolenge nini kososolaka ntina Lingomba ya Bamama Basungi ezali kolengela bana basi ya Nzambe mpo na mapamboli ya bomoi ya seko?

Bondimi, Libota, Lisungi

“Tozingami na baye bazali na mposa ya bokebi na biso, bolendisi na biso, lisungi na biso, libondi na biso, boboto na biso,” elobaki Mokambi Thomas S. Monson. “Tozali maboko ya Nkolo awa na mabele, na etinda ya kosalisa mpe ya kotombola bana na Ye. Ye ayekami na moko na moko na biso.”1

Mokambi Henry B. Eyring, Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi ya Yambo, alobaki: “Mbongwana monene ebandaka na motema ya moto ye moko ntango ayaka na Eklezia. Osalaki boyokani, mpe ozwaki elaka oyo ebongolaka lolenge na yo.

 Olakaki ete okosunga Nkolo na komemaka mikumba ya [basusu] kokomisa yango pepele mpe kolendisa. Bopesamaki nguya ya kosunga ya kolembisa mikumba yango ntango bozwaki likabo ya Molimo Mosanto.”2

“Tolingaka kosalela pole ya nsango malamu mpo na komona basusu lokola Mobikisi amonaka biso—na mawa, elikia, mpe bolingani” elobaki Jean B. Bingham, Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi. “Mokolo ekoya ntango tokozala na bososoli ya kokoka ya mitema ya basusu mpe tokozala na botondi ya kozala na ngolu epesameli biso—kaka lokola tolakisi makanisi ya bolingani mpe maloba epai ya basusu. 

“Lotomo na biso mpe libaku malamu ezali ya koyamba bokoli kati na moko na moko lokola tozali koluka kokoma mingi lokola Mobikisi na biso.”3

Ntango tomemi mikumba ya basusu mpe tobateli mayokani na biso, tofungoli nzela mpo ete Yesu Klisto abikisa basusu. Mpaka R. Holland ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ateyaki: “Kokanisaka motuya ezanga bososoli ya Bobakami na ekulusu mpe Bomikabi, nalaki bino Akopesa biso mukongo sikawa te. Ntango Alobeli babola na molimo ete, ‘Boya epai na ngai,’ Alingi koloba Ayebi nzela ya libanda mpe Ayebi nzela ya likolo. Ayebi yango mpo ete Atambolaki na yango. Ayebi nzela mpo ete Ye azali nzela.”4

Makomi ya Kobakisa

Matai 25:40; Galatia 6:2; Moziya 2:17; 18:8–9

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “Salela Nkolo na bolingo,” Liahona, Sanza ya Mibale. 2014, 4.

  2. Henry B. Eyring, “The Comforter,” Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 18.

  3. Jean B. Bingham, “I Will Bring the Light of the Gospel into My Home,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2016, 6, 8.

  4. Jeffrey R. Holland, “Broken Things to Mend,” Liahona, Sanza ya Mitano 2006, 71.