2021
Esengelaki Elenge mobali mpo na Kobikisa Mboka
Sanza ya Minei 2021


“Esengelaki Elenge mobali mpo na Kobikisa Mboka,” Mpo ya Bokasi bwa Bilenge, Sanza ya minei 2021, 10–11.

Etinda ya Sanza Mpo ya Bokasi bwa Bilenge Sanza ya minei 2021

Esengelaki Elenge mobali mpo na Kobikisa Mboka

Tom Fanene azalaki bobele na mibu 12, kasi ntango bokono moko ya makasi ebetaki mboka na ye ya bato ya Samoa, abiangemaki kosala makambo minene.

Elilingi
Esanga ya Samoa na elenge mobali kosungaka bato ya maladi ya mboka

Ndakisa na James Madsen; fotografe ya Getty Images

Lokola mama na likambo ya mobu ya bilenge oyo elobi, bozali kotia moboko ya mosala monene” (Doctrine et Alliances 64:33). Uta mambi ma kala ya Eklezia, bilenge basalaka mbala mingi mosala ya ntina na bantango ya nkpokoso na kotongaka bokonzi ya Nzambe. Oyo ezali ndakisa moko.

Epidemi na esanga

Uta mibu 100 eleki, na Bisanga ya Samoa na Mbu ya Pacifique, elenge mobali na nkombo ya Tom Fanene azalaki lisungi ya ntina na ntango ya eleko ya bomoi mpe nkufa mpo na bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka

Tom azalaki na mboka nkombo Sauniatu, oyo etongamaki na Basantu ba mikolo mya Nsuka na etuka lokola esika na bango ya kosangana mpe kosala lingomba. Kaka lokola Basantu ya Nzambe na bantango mpe bisika mosusu, bakutanaki na mikakatano mpe bikamwa lntango bazalaki kotonga bokonzi ya Nzambe elongo. Mokakatano moko ekomelaki bango na 1918, ntango pandemi ya gilipi ekotaki na mboka.

Ntango kaka bokono ebandaki, ezalaki kobuka bango, mpe epalanganaki mbangu. Penepene ya nkama minei ya bato ya mboka bazalaki ya kolala na mbetu na mpasi ya maladi. Kaka mibale kati na bango bazalaki malamu mpe bazalaki na makoki ya kotambola: mpaka moko mpe elenge mobali Tom ya mibu 12.

Bondimi mpe Mosala Makasi

Libota ya Tom esalelaki bondimi na ntango ya bokono yambo mpe emonaki bikamwisi lokola mbano. Leki ya Tom ya mobali Ailama abelaki mwa mibu na ebandeli. Tata na bango, Elisala, alotaki na kati ya ndoto apesamaki bokambami ya lolenge nini asengelaki kosala mpo na kobikisa Ailama: azwaki nzete ya wili-wili, alongolaki baposo mpe atutaki mpo na kozwa mayi na yango. Elisala asalaki yango mpe amemaki mayi yango epai ya Ailama, amelaki yango mpe kala te ayokaki malamu. Tom amonaki lolenge nini kosala na kondima ekoki kosunga mpo na kokangolama na maladi.

Na ntango ya epidemi ya gilipi na 1918, Tom asalelaki bondimi ntango asalaki makasi mpo na kobikisa bato ya mboka. “Ntongo nyonso nazalaki kokende na ndaku moko moko mpo na koleisa mpe kosokola bato mpe koluka nani akufaki,” alobaki bongo.

Azalaki kokende koluka mayi ya nkelo na bakatini mpe azalaki komema yango na ndaku moko moko. Azalaki komata na banzete ya kokoti, kobukaka bakokoti mpe kolongola yango baposo mpo na kozwa mayi na yango apesa bakoni. Azalaki koboma basoso ya mboka mpo na kosala elubu mpe kopesa na libota moko na moko.

Kosalaka Bokeseni

Na ntango ya pandemi oyo, bato koleka moko likolo ya minei bakufaki na bokono ya gilipi na Samoa. Bato mosusu na mboka ya Tom mpe bakufaki. Tom asungaki kotimola malita mpe akundaki bato koleka 20 kati na bango, mpe lisusu Tata na ye, Elisala.

Kasi na ntina ya mosala makasi ya Tom mpe bolingo ya kobikisa, bato ebele na kati ya mboka na ye babikaki. Asalaki bokeseni monene na bato oyo mpe na botongami ya bokonzi ya Nzambe na Samoa. Azalaki “kotonga moboko ya mosala monene.”

Mpe na lolenge na yo moko, sala bongo.

Okoki kobiangema te kosala lolenge makambu Tom asalaki, kasi okoki mpe, na lolenge moko, kosalelaka bondimi na ndenge ebele mpo ete esala bokeseni epai na yo, epai ya basusu mpe na mosala ya kotongaka bokonzi ya Nzambe.

Ozali kosala ndakisa mpo na libota na yo, baninga mpe basusu na kolakisaka bolamu, bompikiliki, boboto, mpe bolingo. Ozali kosalisa basusu. Ozali komipesa na boyekoli makomi mpe kosambela. Ozali kokabola bosolo ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto.

Na ntango ya mobu moye moleki, ebele kati na bino kutu bakutanaki na makambo oyo na koyikaka mpiko na makambo ya bokono ya mokili mobimba. Ntango mosusu botokaki mayi te mpe bobukaki bakokoti te mpe bobikisaki bato 400 te na bokono, kasi bomemelaki bato lisungi, elikya, esengo mpe kimia na ndenge ebele mosusu.

Mobu na bino ezali na ntina te koleka bondimi na bino mpe bolingi na bino ya kosala mpe kosunga basusu. Bandakisa ya kala, lokola oyo ya Tom Fanene, ekoki kosunga bino bomona ete bosengami mpo na kotia moboko ya mosala monene ya Nzambe.