2021
Yesu Klisto Abikisaki Biso Uta na Masumu mpe Liwa
Sanza ya Minei 2021


“Yesu Klisto Abikisaki Biso Uta na Masumu mpe Liwa,” Liahona, Sanza ya minei 2021

Etinda ya Sanza Liahona Sanza ya minei 2021

Yesu Klisto Abikisaki Biso Uta na Masumu mpe Liwa

Na ntina ya likabo na Ye, biso banso tozali na libaku malamu ya kozwa kimya mpe esengo ya seko.

Elilingi
Elambo ya Nsuka

Klisto Azali Kokela Mabele, na Robert T. Barrett

Totalelaka Yesu Klisto lokola Mobikisi na Biso. Ezali mpo ete Ye afutaki motuya ya masumu na biso mpe alongaki nguya ya liwa. Abikisaki biso! Libonza na Ye mpo na biso, na nkombo ya Bomikabi, ezali likambo moko ya ntina koleka oyo naino esalema te. Na ntina na Ye, liwa ezali nsuka te. Na ntina na Ye, tokoki kolimbisama na masumu na biso, tokoma peto lisusu, mpe kokola malamu mikolo nyonso.

Yesu Klisto Azalaki Mobotami ya Yambo

Yambo ya koya na mabele, tozalaki elongo na baboti na biso ya lola. Lokola Mobotami ya Yambo, Yesu Klisto asungaki mpo na kokela mokili kitoko. Aponamaki mpo na kozala Mobikisi na biso mpe andimaki kobotama na mabele mpo ete akoka kozala ndakisa malamu koleka, koteya nsango malamu na Ye, mpe kokokisa Bomikabi mpo na biso.

Elilingi
Yesu Klisto azali kosambela na Getesemane

O Tata na Ngai, na Simon Dewey

Yesu Klisto Afutaki Motuya mpo na Masumu na Biso

Ntango Yesu ayebaki ete Alingaki kokufa kala te, Akendaki na elanga na nkombo ya Getesemane mpo na kosambela. Na ntango ya losambo wana, Abandaki kofuta motuya ya masumu na biso. Alingaki konyokwama mpo ete biso tokoka konyokwama te—soki toyamboli. Ntango totiki masumu na biso mpe tolandi Mobikisi bongo nde, tokokoka kozwa bolimbisi mpe kokangolama. Na ntina ya oyo Amonaki na Getesemane, Yesu asosoli malamu nini elakisi mpo na moko na moko kati na biso. Ayokaki bampasi na biso nyonso, maladi mpe mpasi. Oyo ezali eteni ya yambo ya Bomikabi.

Elilingi
bokundami ya Klisto

Bokundami ya Klisto, na Carl Heinrich Bloch

Yesu Klisto Alongaki Liwa

Na nsima ya losambo na ye na Getesemane, Yesu Klisto afundamaki, akangamaki mpe atiamaki na liwa na bobaki na ekulusu. Atako bongo Azalaki na nguya nyonso, Yesu amipesaki nzela ya kokufa na ekulusu. Bandimi na Ye na bolingo batiaki nzoto na Ye na nkunda. Bayebaki te ete atako nzoto na Ye ezalaki ya kokufa, molimo na Ye ezalaki kaka na bomoi na mokili ya molimo. Mikolo misato nsima, Yesu Klisto azongaki lisusu na bomoi mpe akendaki kotala bango, kosalaka bongo Akokaki kolonga liwa. Yango ekokisaki Bomikabi. Mpo ete Yesu asekwaki, moko na moko kati na biso akozala lisusu na bomoi nsima ya nkufa.

Elilingi
Klisto mpe Maliya na nkunda

Azali na Bomoi, na Simon Dewey

Ndimbola ya Noele mpe Pasika

Ebele kati na mokili tosepelaka na bafeti mibale oyo esungaka biso tokundola Bomikabi ya Yesu Klisto. Na ntango ya Noele, tokundolaka na botondi ete Yesu Klisto azalaki na bolingi ya kondima mosala ya koya na mokili, atako kutu yango ezalaki na bolozi mpe kokufa mpo na biso. Pasika tosepelaka elonga ya Mobikisi likolo ya masumu mpe liwa, oyo epesaka biso elikya ya esengo moko ya seko.

Elilingi
Klisto azali kobianga Petelo mpe Andele

Klisto azali kobianga Petelo mpe Andele, na James Taylor Harwood

Makomi ezali koloba nini na ntina ya Bomikabi ya Mobikisi?

Mpo ete Yesu ayebi biso malamu koleka, Akoki “kobikisa,” to kosunga biso (tala Alma 7:11–12).

Mobikisi asosolaka mpasi na biso mpe minyoko (tala Yisaya 53:2–5).

Nzambe atindaki Yesu mpo na kobikisa biso mpo ete Nzambe alingaka moko na moko na biso (tala Yoane 3:16–17).

Yesu asambelaki mpo na bayekoli na Ye, mpe biso, mpo tozala ya kobonga nie uta na mabe tozala elongo na Ye mpe Tata na Lola (tala Yoane 17).

Mobikisi na biso abiangisi biso tolanda Ye mpe tozonga liboso na Ye (tala Doctrine et Alliances 19:16–19, 23–24; 132:23).