2021
Mobikisi Na Biso Asala Nini mpo na Biso?
Sanza ya mitano 2021


Mobikisi na Biso Asala Nini mpo na Biso,” Mpo ya Bokasi bwa Bilenge, Sanza ya mitano 2021.

Liyangani ya Bonganganzambe

Mobikisi Na Biso Asala Nini mpo na Biso?

Biteni

Elilingi
Lilita ya mpamba ya Klisto

Yesu Klisto asala nini mpo na moko na moko na biso? Asala makambo manso oyo masengeli mpo na mobembo na biso na bomoi ya kufa kokende epai ya nsuka ya nyonso na makambo etangama na mwango mwa Tata na biso ya Lola. Nakoloba na ntina ya makambo minei ya mwango wana. …

Lisekwa epesi biso emoneli mpe bokasi ya komema mikakatano ya bomoi ya kufa miye moko na moko na biso mpe na baoyo tolingaka tokutanaka na yango. Epesi biso nzela ya sika ya komona botau ya nzoto, ya makanisi, to ya molimo na mbotama to oyo tozwaka na bomoi ya kufa. Epesi biso bokasi ya koyika mpiko na makambo ya mawa, bokwei mpe na maye epesaka mpasi na motema.

Lisekwa epesi biso lisusu nguya ya makasi ya kobomba mitindo ya Nzambe kati na bomoi na biso ya kufa. …

Mobikisi mpe Mosikoli na biso ayikaki mpiko na minyoko ezanga bososoli mpo na kokoma libonza mpo na masumu ya bakufi banso oyo bakoyambola. Libonza ya bomikabi epesaki bolamu ya koleka, mwana mpate ya peto azanga mbindo, mpo na mabe eleki ndelo, masumu mpo na mokili mobimba. …

… Yesu ateyaki biso mwango ya lobiko. Kati na mwango oyo ezali Bokeli, ntina ya bomoi, ntina ya bokeseni, mpe likabo ya bonsomi ya kopona. Ye ateyaki biso lisusu mitindo mpe mayokani oyo esengeli totosa mpe makuli tosengeli kosala mpo na kozongisa biso epai ya baboti na biso na lola. …

Mobikisi na biso asosoli mpe ayebi masenginia na biso, bitumba na biso, bampasi ya motema na biso, mpe minyoko na biso, mpo Ye ayebaki kobika yango nyonso lokola eteni ya eteni ya Bomikabi na Ye. … Baye banso bazali na mpasi ya kozala boye basengeli komikundola ete Mobikisi na biso amonaki lolenge ya mpasi wana lisusu mpe ete, na nzela ya Bomikabi na Ye, Apesi moko moko na biso mpiko mpo na komema yango.