2021
Nalingaka Komona Tempelo
Sanza ya mitano 2021


“Nalingaka Komona Tempelo,” Mpo ya Bokasi bwa Bilenge, Sanza ya mitano 2021

Liyangani ya Mokolo ya Poso na Ntongo

Nalingaka Komona Tempelo

Biteni

Elilingi
tempelo

Nayebi ete batempelo ya Nkolo ezali bisika bisantu. Ntina na ngai lelo na kolobelaka batempelo ezali mpo na kobutisa mposa na bino mpe ya ngai ya kozala ya bato balongobani mpe babelemi mpo na kobakisa mabaku mpo na koyeba koyoka makambo ya tempelo oyo ezali koya mpo na biso. …

Soki bino to ngai tosengeli kokende na tempelo na bopeto ekoka te, tokozala na makoki te ya komona, na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu, mateya ya molimo etali Mobikisi oyo tokoki kozwa na tempelo.

Ntango tozali ya kolongobana mpo na kozwa mateya ya boye, nde ekoki kokolisama na nzela ya makambo na biso tosalaka na tempelo elikya, bosepeli, mpe bokasi kati na bomoi na biso. Elikya, bosepeli, mpe bokasi wana ezwami bobele na nzela ya koyamba makuli maye esalamaka na batempelo esantu. Ezali kati na tempelo nde tokoki kozwa bondimi ya mikangano ya libota ya bolingo oyo ekokoba nsima ya liwa mpe ekowumela mpo na seko. …

… Mpe toyebi ete esengo na biso ya seko etali makasi nyonso ekoki tokosala mpo na kopesa esengo ezanga nsuka epai ya bato ya libota na biso lokola ekoki biso.

Nazali koyoka mposa kaka moko oyo mpo na kolonga na kobengisaka bato a libota na bomoi mpo na koyoka mposa ya kokoma bato balongobani mpo na kozwa mpe kotosa makuli ya kokangisama ya tempelo. Wana ezali eteni ya bosangisi elakama ya Yisalaele na mikolo ya nsuka na bangambo mibale ya elamba.

Elilingi
Bozongisi sika lisusu Tempelo ya Salt Lake