2021
Kozwa Bokasi ya Kolimbisa
Sanza ya Motoa 2021


“Kozwa Bokasi ya Kolimbisa,” Mpo ya Bokasi bwa Bilenge, Sanza ya minei 2021, 10–11.

Yaka, Landa Ngai

Kozwa Bokasi ya Kolimbisa

Nkolo atindaki biso ete tolimbisa basusu. Akosunga biso tobatela mitindo na Ye, kobakisaka moko oyo.

Doctrine et Alliances 64:10

Elilingi
mwasi kotalaka moto moko kosembolaka loboko epai na ye

Liyemi na James Madsen

Mitindo misusu mimonanaka lokola mpasi mpo na kobatela koleka misusu?

“Tala moko oyo ebangisaka bato mingi: “Ngai, Nkolo, nakolimbisa oyo Nasengeli kolimbisa, kasi mpo na bino bosengeli kolimbisa bato nyonso” (Doctrine et Alliances 64:10).

Bozela. Tosengeli kolimbisa bato nyonso oyo basalaki biso mabe? Wana kutu ekoki kosalema?!

Ezali eloko moko kolimbisa moto moko mpo ete alobeli yo likambo moko ya mabe to mpo ete azwi eteni ya limpa ya nsuka na mesa ya elambo ya monene. Kasi nini na oyo etali bampota minene? Botuki ya mpasi wana oyo ekoki kokata to kutu kobongola lolenge ya bomoi na biso?

Ntango mosusu makoki ya kolimbisa moto moko oyo asali biso mpasi mabe ekoki komonana lokola mosika na biso.

Tala nsango malamu: Na lisungi ya Yesu Klisto, tosuki mokolo moko te na maye tokoki kosala na biso moko.

Lisungi Ye Asengelaki na Yango

Moklisto moko amipesa ya Hollande babengi Corrie ten Boom amonaki mbala ya liboso nguya ya kosenga Nzambe asunga ye alimbisa moto moko.

Ye na ndeko na ye ya mwasi Betsy bakangamaka na baka ya bato ya boloko na Etumba ya Mokili mobimba II. Corrie mpe basusu banyokwamaki bokakemi ya nsomo uta na basinzili ya boloko ya Banazi. Ndeko na ye ya mwasi Betsy kutu akufaki lokola mbano ya bokakemi wana. Corrie atikalaki na bomoi.

Nsima ya bitumba, Corrie amonaki nguya ya kobikisa ya kolimbisa basusu. Akabolaki mbala mingi nsango na ye na bisika ya bato. Kasi mokolo moko maloba na ye etielamaki ntembe.

Nsima ya lisukulu liboso ya bato, sinzili moko ya motema mabe mpenza ya ka asololaki na Corrie.

Ayebisaki Corrie ete akomaka Moklisto uta bitumba mpe ayambolaka mpo na makambo mabe asalaka lokola sinzili ya boloko.

Atombolaki loboko na ye mpe alobaki, “Okolimbisa ngai?”

Atako nyonso oyo ayekolaka mpe akabolaka etali kolimbisa basusu, Corrie akokaki te kondima loboko ya moto oyo mpenza mpe kolimbisa ye—na ye moko te, solo.

Nsima akomaki, “Atako lokola nkanda, makanisi ya bozongisi mabe etokaki kati na ngai, namonaki lisumu na yango. … Nkolo Yezu, nasambelaki, limbisa ngai mpe salisa ngai mpo na kolimbisa ye.

“Namekaki koseka moke, [mpe] namekaki kotombola loboko na ngai. Nakokaki te. Nayokaki eloko te, ata mwa moto ya bolingo to elembo ya bolingani. Mpe lisusu nasalaki losambo na bonkutu. Yezu nakoki kolimbisa ye te. Pesa ngai bolimbisi na Yo.

“Ntango nazwaki loboko na ye eloko ya kokamwa esalamaki. Kobanda na lipeka na ngai kolanda na loboko na ngai mpe tii na misapi na ngai lotiliki moko ezalaki lokola koleka uta na ngai epai na ye, ntango kati na motema na ngai bolingo ebimaki mpo na mopaya oyo pene elekelaki ngai.

“Mpe namonaki solo ete ezali na bolimbisi na biso moko mingi lisusu te koleka na bolamu na biso nde lobiko ya mokili eyekami, kasi na ya Ye. Ntango Ayebisi biso tolinga banguna na biso, Apesaki, nzela elongo na mobeko, bolingo yangomei.”1

Nzambe azali awaa mpo na kosunga yo kobatela mitindo, kobakisa motindo ya kolimbisa—ata ntango ezali mpasi. Akoki kosunga yo kaka lokola Asungaki Corrie ten Boom.

Lobiko Oyo Ekoki Na Yo

Bomoi ezali mpasi. Ezali mobulu. Mpe etonda solo na bato oyo bazali na bosomi ya kopona epesama na Nzambe.

Na bangonga wana ntango moto moko asali boponi oyo esali yo mpasi makasi—to kutu na kokana te asali yango—okoki kozwa nguya ya kobikisa ntango ozali kosambela mpo na kosunga mpe komeka kolimbisa.

Kolimbisa basusu ememaka libiki na molimo na yo. Na lisungi ya Nzambe, ntango ozali kolimbisa moto moko oyo asalaki yo mabe, obwaki mokumba mabe uta na mapeka na yo oyo ntango mosusu ezali kozongisa yo nsima. Uta ntango nzela ememaka epai ya libiki ya solo ezali komonana mpasi, na Nzambe, okosengela mokolo moko te kotambola yango yo moko.

Matangi

  1. Corrie ten Boom, The Hiding Place (1971), 215.

  2. Tala lisusu Jeffrey R. Holland, Oct. 2018 general conference (Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 79).