2021
Bandeko basi Rollins Babikisi Mokolo!
Sanza ya Motoa 2021


“Bandeko basi Rollins Babikisi Mokolo!” Moninga, Sanza ya motoba 2021

Etinda mpo na Moninga Sanza ya motoba 2021

Bandeko basi Rollins Babikisi Mokolo!

Elilingi
Joseph Smith kotalaka na nkasa

Liyemi na Apryl Stott

Yesu Klisto ayebisaki Profeta Joseph Smith makambo ya motuya mingi mpo na kosunga biso. Eklezia etongaki ndako ya bonyati buku na masini mpo na konyata na masini maloba ya Yesu. Na lolenge wana bato bakozala na makoki ya kotanga mango.

Elilingi
mibali bazali kobwaka nkasa

Mokolo moko, etuluku ya mibali ya nkanda bayaki. Babukaki ndako ya konyata buku na masini. Babwakaki nkasa yango ya makomi na balabala.

Elilingi
bilenge basi bazali kokima na nkasa

Bandeko basi mibale babengami Mary Elizabeth mpe Caroline Rollins bamonaki maye masalemaki. Bakimaki mbangu mpe basangisaki nkasa na maboko na bango.

Elilingi
Bilenge basi bazali kobatama na elanga ya masangu

Bilenge basi babatamaki na elanga ya masangu kino moto yango akendaki. Babikisaka makomi! Makomi wana nsima ekomaki eteni ya Malongi mpe Mayokani.

Elilingi
elenge mwasi mpe nkoko ya mwasi azali kotanga makomi kati na bisi

Nakoki kotanga makomi. Nakoki koyika mpiko mpe kotelema mpo na oyo nandimelaka.

Kopakola langi na Lokasa

Bokoki koyika Mpiko.

Elilingi
Mwana azali kozwa mangwele

Nini esungaka yo oyika mpiko?