2021
Nkombo ya Eklezia na Ye
Sanza ya Zomi 2021


“Nkombo ya Eklezia na Ye,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya zomi 2021.

Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya zomi 2021

Nkombo ya Eklezia na Ye

Ezali na ndimbola nsima ya nkombo oyo Yesu Klisto apesaki Eklezia na Ye.

Elilingi
Yesu Klisto lokola Mobateli Mpate Malamu

eklezia na ngai

Eklezia—liboke ya bato oyo bandimelaka makambo moko mpe bakumbamelaka elongo. Eklezia oyo ezali ya Yesu Klisto. Abandaki yango. Akambaka yango. Ezali ya Ye.

ebengami

Yesu Klisto ayebisi biso lolenge nini Ye alingaka bato babenga Eklezia na Ye. Yango wana lolenge tosengeli kobenga yango—mpe lolenge tosengeli na boboto kosenga basusu babenga yango. Nkombo oyo ewutaki na Yesu Klisto.

mikolo mya nsuka

Mikolo mya Nsuka—mikolo oyo tozali; eleko liboso ya Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto. Yesu Klisu azongisi Eklezia na Ye na mabele mpo na mbala ya nsuka. Ekosalisa mokili komilengela mpo na Boyei ya Mibale.

Eklezia ya Yesu Klisto

(Tala “eklezia na ngai.”) Oyo ezali eteni ya yambo ya nkombo Mobikisi apesaki Eklezia na Ye. Abengi yango “Eklezia” mpamba te Ye abongisaki yango. Mpe Ye atie nkombo na Ye likolo na yango.

Mikolo mya nsuka

(Tala “mikolo mya nsuka.”) Oyo ezali eteni elandi ya nkombo ya Eklezia. Elakisi na pete ete oyo ezali Eklezia Ye azongisaki na mikolo oyo, kasi moko oyo Ye abandaki mbala ya liboso te.

Basantu

Basantu—liloba moko elingi koloba “bato oyo bazali santu.” Oyo ezali eteni ya nsuka ya nkombo ya Eklezia. Ezali kolobela oyo etali bandimi ya Eklezia. Yesu Klisto akoki kosokola mpe kopetola biso. Mpe Ye apesaka biso Molimo Mosantu mpo na kolendisa biso ntango tomekaka kosala maye Atindaki. Soki tozali na bondimi na Ye mpe tokobi komeka, Akomisaka biso santu. Akomisaka biso Basantu.