2021
Mosala ya Tempelo
Sanza ya Zomi 2021


“Mosala ya Tempelo,” Liahona, Sanza ya Zomi 2021

Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya Zomi 2021

Mosala ya Tempelo

Batempelo ezali ndako ya Nkolo. Tokoki kozwa makuli mpe kosala mayokani na Ye kati na batempelo. Tokoki lisusu kosala makuli kati na tempelo mpo na bankoko na biso.

Elilingi
tempelo

Foto ya Tempelo ya Barranquilla Colombia na Bruno Lima

Uta kala, Nkolo atindaki bato na Ye kotonga batempelo. Batempelo ezali bisika bisantu epayi wapi tokoki koyoka bolingo ya Nzambe, kozwa makuli, kosala bilaka na Ye. Eklezia ezali kotonga batempelo na mokili mobimba mpo ete bato mingi koleka bakoka kozala na mapamboli oyo.

Elilingi
mwasi liboso ya tempelo

Foto ya mwasi liboso ya Tempelo ya Oquirrh Mountain Utah na Nexeo mpe Matthew Reier

Dotasio

Bandimi ya Eklezia oyo bazali sembo bakendaka na tempelo mpo na kozwa makuli mpe kosala mayokani, to bilaka, na Nzambe. Likuli moko tozwaka na tempelo ezali dotasio. Liloba dotasio elingi koloba “likabo.” Dotasio ya tempelo ezali likabo uta na Nzambe. Na likuli oyo toyekolaka oyo etali mwango ya Tata ya Lola mpo na lobiko na biso, mpe tosalaka mayokani mpo na kobatela mitindo ya Nzambe. Soki tozali bosembo na mayokani tosalaka, Nzambe akopambola biso.

Elilingi
balongani liboso ya tempelo

Foto ya balongani bazali kotambola penepene ya Tempelo ya Manila Philippines na Cristina Smith

Kokangisa Mabota Elongo

Libala kati na tempelo ebengami lisusu bokangisi. Ntango balongani bakangisami kati na tempelo mpe babateli mayokani, bakozala babalani mpo na libela. Soki baboti bana, bana wana bakozala ya kokangama epai na bango. Baboti oyo bakangisami nsima ya kobota bana bakoki kokangisisa bana na bango epai na bango. Soki babiki na bosembo, bakozala libota moko bosenko mobimba.

Elilingi
Liziba ya libatisi ya Tempelo ya Lisbon Portugal

Foto ya liziba ya libatisi ya Tempelo ya Lisbon Portugal na Leslie Nilsson

Mosala ya Tempelo mpo na Bana ya Nzambe Nyonso.

Tosalaka mosala ya mambi ya kala ya libota mpo na komona oyo etali bankoko na biso. Nsima tosalaka mosala ya tempelo mpo na bango. Tosalaka mpo na bango makuli nyonso oyo baye bazali na bomoi basengeli na yango: libatisi, nkotisa, kozwa bonganganzambe (mpo na mibali), dotasio, mpe bokangisi. Nsima bakoki kopona soki balingi koyamba makuli oyo. Na lolenge loye, bana nyonso ya Nzambe bakoki kosepela na mapamboli ya nsango malamu.

Elilingi
libota liboso ya tempelo

Foto ya libota liboso ya Tempelo ya Philadelphia Pennsylvania na Cody Bell

Mapamboli ya Mosala ya Tempelo

Soki tobombi mayokani tosalaka na tempelo, tokopambolama, kobatelama, mpe kolendisama. Tokozala na nguya ya bonganganzambe elongo na biso. Mabota na biso ekozala elongo libela.

Tempelo ezali lisusu esika ya kimia mpe ya emoniseli. Ntango tozali kosala mosala ya tempelo, tokoki kozwa bokambi ya molimo mpe koyoka bolingo ya Nzambe.