2022
Mpasi ya Mobikisi
Sanza ya Minei 2022


“Mpasi ya Mobikisi,” Mpo na Bokasi bwa Bilenge, Sanza ya minei 2022.

Etinda ya Sanza Mpo ya Bokasi bwa Bilenge Sanza ya minei 2021

Mpasi ya Mobikisi

Mibu nkama liboso ya koya ya Yesu Klisto, Yisaya asakolaki mpasi na Ye mpo na masumu na biso.

atiolamaki mpe abwakisamaki

Elilingi
Maboko ya Yesu Klisto ya kokangama

Ntango Yesu Klisto ayaki na mabele, mwa bato bandimelaki Ye, kasi mingi bandimelaki Ye te. Kutu batalaki Ye mpamba, mpe mingi bayinaki Ye. Na nsuka, bato baponaki koniokolo mpe koboma Ye. (Tala 1 Nefi 19:9.)

amemi bampasi na biso

Elilingi
Yesu Klisto azali ya kofukama na Getesemane

Yesu Klisto akamataki likolo na Ye moko mpasi, maladi, mpe botau na biso. Asalaki oyo mpo ete Ye azwa ngolu likolo na biso mpe koyeba lolenge ya kosalisa biso. (Tala Alma 7:11–13.)

Azokisamaki mpo na bobuki mibeko na biso

Elilingi
Yesu Klisto na ekulusu

Yesu Klisto anyokwamaki mpo na masumu na biso. Asalaki bongo mpo ete tokoka kolimbisama ntango toyamboli. (Tala Doctrine et Alliances 18:11; 19:15–19.)

na mapipi ma ye tobikisami.

Elilingi
bato bazali koyoka loboko ya lisekwa ya Yesu Klisto

“Mapipi na Ye” ezali bapota na Ye. Oyo elimboli mpasi na Ye nyonso ayokaki mpo na biso, mpe lisusu bosopi ya makila na Ye mpe liwa na Ye. Lokola Yesu Klisto ayokaki mpasi mpo na biso, tokoki kobika lisusu. Libonza na Ye esalaki ete masumu na biso makoka kolimbisama. Ntango toyambolaka mpe tomekaka kobatela mayokani na biso, Abikisaka biso mpe abongwanisaka biso. (Tala Mosiya 3:17–11; Biteni ya bondimi 1:3.)