2022
Mose mpe Mana
Sanza ya Minei 2022


“Mose mpe Mana,” Etinda ya Sanza Moninga Sanza ya mibale 2022

“Mose mpe Mana”

Etinda ya Sanza Moninga Sanza ya minei 2022

Mose mpe Mana

Elilingi
Mose mpe Bana ya Yisalaele

Liyembi na Apryl Stott

Mose azalaki profeta. Akambaki bato ya Nzambe ona mabele ya elaka. Batambolaki mikolo mingi.

Elilingi
bana elongo na mana

Bato bazalaki na nzala. Bazalaki na biloko ya kolia te. Yango wana Nzambe atindelaki bango bilei uta na likolo. Babengaki yango mana.

Elilingi
mwana mpe mama bazali kolamba mana

Ntongo nyonso, bato bazalaki kosangisa mana mpo na kolia. Kasi ezalaki kotikala malamu te ti mokolo ekoya. Basengelaki kolokota mingi mokolo elandi.

Elilingi
Yesu Klisto elongo na bana

Mana ekundolisaka biso Yesu Klisto. Nzambe atindaki mana mpo na kobikisa bato. Atindaki lisusu Yesu na mabele mpo na kobikisa biso. Tozali na mposa ya Yesu mikolo nyonso, kaka lokola tozalaka na mposa ya bilei mikolo nyonso.

Elilingi
bana bazali kotala foto ya Yesu Klisto

Nakolanda Yesu. Akopesa ngai bokasi mpe kosalisa ngai nayoka bolingo na Ye mokolo na mokolo.

Kopakola langi na Lokasa

Tozali na mposa ya Yesu Mikolo Nyoso

Elilingi
Yesu Klisto elongo na bana

Fina na foto mpo na kozwa yango.

Liyembi na Apryl Stott

Lolenge nini Yesu asalisaka yo?