2022
Bolingo ya Bonzambe kati na Mwango ya Tata
Sanza ya mitano 2022


“Bolingo ya Bonzambe kati na Mwango ya Tata,” Liahona, Sanza ya mitano 2022.

Etinda ya sanza Liahona Sanza ya mitano 2022

Bolingo ya Bonzambe kati na Mwango ya Tata

Biteni

Elilingi
Ngomba komataka kino na mapata

Na Eklezia ezongisama ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tozali na bososoli se moko ya mwango ya Tata na biso ya Lola. Oyo epesaka biso nzela ekesena ya komonela ntina ya bomoi ya kufa, bosambisi ya bonzambe oyo elandaka yango, mpe lobi ya nkembo ya nsuka ya bana ya Nzambe nyonso. …

… Malongi emonisama ya Eklezia ya Yesu Klisto ezongisama eteyi ete bana ya Nzambe banso—longola se bato moke mpenza ya kotala awa—bakomimona nsuka nsuka na bonkonzi ya nkembo. …

… Likolo mpenza ya nyonso ezali bonetwami kati na bokonzi ya selesitiale, epayi wapi tokoki kokoma lokola Tata na biso mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. …

… Etinda ya Eklezia ezongisama ezali kosalisa bana ya Nzambe balongobana mpo na nini Nzambe alingi lokola nsuka na bango ya seko. …

Ya Motuya mpo na biso ezali emoniseli ya Nzambe ete bonetwami ekoki bobele kozwama na nzela ya bosembo na mayokani ya libala moko ya seko katikati ya mobali mpe mwasi. Malongi ya bonzambe ezali ntina toteyaka ete “kibomwasi to kimobali ezali elembo monene ya ezaleli mpe ntina ya moto yambo ya boyei na nse, na kufa, mpe bo nani na ye mpe ntina ya seko” [“The Family: A Proclamation to the World,” ChurchofJesusChrist.org]. …

… Tondimi ete esakola na libota, efandisami likolo ya malongi ekoki kobongwana te, elimboli lolenge ya mikangano ya libota epayi wapi eteni ya motuya mpenza ya bokoli na biso ya seko ekoki kosalema. …

… Tosengeli koluka kokabola babosolo oyo ya boseko elongo na basusu. Kasi na bolingo oyo topesaka na bazalani na biso banso, tondimaka ntango nyonso mikano na bango. Lokola profeta moko ya buku ya Mormon ateyaki, tosengeli kokende liboso, kozalaka na “ bolingo ya Nzambe mpe ya bato banso” [2 Nefi 31:20].