2022
Botelemi Ngwi kati na Bikumbaki
Sanza ya mitano 2022


“Botelemi Ngwi kati na Bikumbaki,” Mpo ya Bokasi bwa Bilenge, Sanza ya mitano 2022.

Etinda ya sanza Liahona Sanza ya mitano 2022

Botelemi Ngwi kati na Bikumbaki

Biteni

Elilingi
Miinda

Mpo na baoyo bazali komitungisa mpo na bisomei mpe mpo na baye tolingaka, elikya ezali na elaka Nzambe asalaki na ntina ya esika ya libateli na bikumbaki ekoya. …

Masakoli ya Mokonzi Benjamin ezali kokokisama na biso na mikolo na biso. …

Abiangaki bato na ye mpe biso kotonga nse na libanga moko ya libateli, oyo ezali Mobikisi. Asembolaki ete tozali nsomi na kopona kati na malamu mpe mabe mpe ete tokoki te kokima bambano ya maponi na biso. …

Bomoto na biso ebongwami mpo kokoma lokola mwana moke, botosi na Nzambe mpe bolingo mingi. Mbongwana oyo ekokisi biso kosepela na makabo kowuta na nzela ya Molimo Mosantu. Kozalaka na kimoninga ya Molimo Mosantu ekolendisa, ekokamba, mpe ekokembisa biso. …

Ntango bikumbaki eyaka na bomoi, bokoki kotelema ngwi mpamba te botelemi na libanga ya kondima na bino na Yesu Klisto. Kondima oyo ekokamba bino na bobongoli motema ya mokolo na mokolo mpe bobateli solo mayokani. Bongo bomikundola Ye ntango nyonso. Mpe na nzela ya bikumbaki ya boyini mpe nkuna, bokoyoka botelemi ngwi mpe botondisami na elikya. …

… Lokola mwana moke ya bopolo mpe bolingo, bondima lisungi na Ye. Bosala mpe bobatela mayokani Apesi na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Ekokembisa bino. Mobikisi ayebi bikumbaki mpe bisika ya libateli na nzela ya bozongi penepene na Ye mpe penepene ya Tata na biso na Lola. Ye ayebi nzela. Azali Nzela.