2022
Makomi: Liloba ya Nzambe
Sanza ya Motoba 2022


“Makomi: Liloba ya Nzambe,” Liahona, Sanza ya Nsambo 2022.

Etinda ya sanza Liahona Sanza ya Nsambo 2022

Makomi: Liloba ya Nzambe

Elilingi
profeta moko ya Kondimana na Kala kokomaka

Profeta ya Kondimana na Kala, na Judith A. Mehr

Makomi ezali babuku esantu oyo ekomamaki mingimingi na baprofeta. Makoki etatolaka na ntina ya Yesu Klisto mpe eteyaka na ntina ya nsango malamu na Ye. Makomi mandimami Na Eklezia, ezali Biblia (oyo ekotisi Kondimana na Kala mpe Kondimana na Sika), Buku ya Mormon, Malongi mpe Mayokani, mpe Liyaka ya Ntalo Monene.

Kondimana na Kala

Kondimana na Kala ezali lisolo ya mayokani ya Nzambe na bato ya liyokani na bantango ya kala. Yango ekotisi lisusu mateya ya baprofeta lokola Mose, Joshua, Yisaya, Yilimia, mpe Daniele Atako yango ekomamaki mibu mikama yambo ya mbotama ya Yesu Klisto, ebele ya baprofeta ya Kondimana na Kala bakomaki na ntina na Ye.

Kondimana na Sika

Kondimana na Sika elobeli mbotama, bomoi ya bokufi, mateya, mpe Bomikabi ya Yesu Klisto. Yango esangisi lisusu mateya ya Bapostolo ya Klisto mpe bayekoli basusu. Kondimana na Sika ezali kosunga mpo na kososola lolenge nini kobika nsango malamu ya Yesu Klisto.

Elilingi
Yesu Klisto azali koteyeka Lisukuli likolo ya Ngomba

Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto

Buku ya Mormon ezali lisolo ya bato moko oyo bafandaki kala na mokili ya ba Amerika. Yango esangisi mateya uta na baprofeta, mpe ntina na yango monene ezali koyebisa bato nyonso ete Yesu azali Klisto. Profeta Joseph Smith abongolaki yango uta na bapalaki ya wolo na likabo mpe nguya ya Nzambe.

Elilingi
Joseph Smith azali kozwa emoniseli.

Joseph Smith Jr. azali kozwa emoniseli, na Daniel A. Lewis

Malongi mpe Mayokani

Malongi mpe Mayokani etondisami na bimoniseli episamaki na Joseph Smith mpe baprofeta misusu ya mikolo mya nsuka. Bimoniseli elimboli lolenge nini Eklezia ya Klisto ebongisami. Yango etondisami lisusu na mateya ya motuya ya nsango malamu na ntina ya bonganganzambe, makuli ya nsango malamu, mpe nini ekoleka nsima ya bomoi oyo.

Liyaka ya Ntalo Monene

Liyaka ya Ntalo Monene esangisi babuku ya Mose mpe Abalayama, litatoli ya Joseph Smith, mpe Biteni ya Bondimi ya Eklezia. Ekotisi lisusu Joseph Smith—Matthew, eteni ya bobongoli ya Kondimana na Sika ya Joseph Smith.

Boyekoli Makomi

Baprofeta bateyaki biso koyekola makomi mokolo na mokolo. Kosalaka boye ekosunga biso kokolisa bondimi na biso mpe kokoma penepene ya Tata ya Lola mpe Yesu Klisto. Ntango toyekoli makomi na losambo, Molimo Mosantu ekosunga biso kozua biyano na mituna na biso.

Baprofeta ya Sikawa

Ntango baprofeta mpe bapostolo ya lelo bazali koloba na nguya ya Molimo Mosantu, maloba na bango ezali lokola likomi. Moko ya ndakisa na yango ezali likita linene. Tokoki koyekola liteya uta na likita linene na Bansanza ya Mitano mpe ya Zomi na moko na kati ya Liahona.

Elilingi
Mose kolongaka Satana

Mose alongi Satana, na Joseph Brickey