2022
Elisha mpe Mongongo ya Moke, ya Pete
Sanza ya Motoba 2022


“Elisha mpe Mongongo ya Moke, ya Pete,” Etinda ya Sanza Moninga Sanza ya Nsambo 2022

“Elisha mpe Mongongo ya Moke, ya Pete”

Etinda ya sanza Moninga Sanza ya nsambo 2022

Elisha mpe Mongongo ya Moke, ya Pete

Elilingi
Elisha likolo ya ngomba

Liyembi na Apryl Stott

Elisha azalaki profeta. Ye alingaki koyoka mongongo ya Nzambe. Akendaki likolo ya ngomba moko mpo na koyoka mongongo ya Nzambe malamu mingi koleka.

Elilingi
Elisha amonaki mopepe makasi

Ezalaki na mopepe makasi. Ezalaki na mopepe makasi ete yango ebukaki mabanga. Mopepe ezalaki makelele makasi. Kasi yango ezalaki mongongo ya Nzambe te.

Elilingi
Elisha amonaki boningani ya mabele mpe moto

Nsima ezalaki na boningani mabele. Mabele eninganaki. Ezalaki mpe na moto. Ezalaki na bopeli monene. Kasi boningani ya mabele mpe moto ezalaki te mongongo ya Nzambe.

Elilingi
Elisha mpe Mongongo ya Moke, ya Pete

Nsima kimia eyaki. Elisha ayokaki mongongo ya Nzambe. Yango ezalaki moke mpe pete. Kasi ezalaki pole.

Elilingi
bato na eklezia

Nakoki koyoka mongo ya Nzambe na nzela ya koyokaka Molimo Mosantu. Ye alobelaka ngai na banzela ya mike mpe ya pete.

Kopakola langi na Lokasa

Nakoki koyoka Molimo Mosantu

Elilingi
bana koyemba banzembo

Fina na foto mpo na kozwa yango.

Liyembi na Apryl Stott

Nini esungaka yo oyoka Molimo Mosantu?