2022
Mwinda na Makolo na Biso
Sanza ya Mwambe 2022


“Mwinda na Makolo na Biso,” Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya mwambe 2022.

Einda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya mwambe 2022

Mwinda na Makolo na Biso

Eloko moko mpo na Bayisalaele ya kala ekoki koteya biso llenge nini Nkolo akambaka biso.

Elilingi
mwinda ya mafuta

Makambo ya solo

Na bantango ya Kondimana ya Kala, batu bazalaki kosalela mwinda ya mafuta mpo na komema pole elongo na bango na molili. Mingi ya minda wana ezalaki na biloko ya ntina misato:

  1. mbeki ya mabele mpo na kobomba mafuta ya olive; mingimingi ya moke mpo nakosimba na etandoi ya liboko ya moto.

  2. Nsinga ya lino mpo epelisama nsima na yango komela ma

  3. Monoko to lidusu moko mpo na kobomba nsinga

Minda ya mafuta ya mpamba kaka na nsinga moko ekopanza pole kaka bantaka moke nzinganzinga na bango. Soki esalelamiaki na ntango ya kotambolaka nzinganzinga, bakopanza kaka mpole moke mpo na komona mosika te liboso na bino moko mpo ete bokoka kotambola na bokebi kati na molili.

Nini Tokoki Koyekola

Elilingi
Yesu Klisto asimbi mwinda ya mafuta

Esalelami na ndingisa. Kamba, Mwinda ya Boboto, na Simon Dewey. Bonkonde ya altusfineart.com © 2022.

Maloba ya Nkolo ekoki kopesa pole na nzela na biso na kati ya molili mpe mobulungano oyo ezingi biso na mokili.

Nkolo asengi biso to zipa pole na biso te kasi tomema na biso pole ya nsango malamu mpo ete ba misusu ba mona yango (mona Matai 5:14–16).

Biso nde tosengeli kosala ete bamwinda na biso etondama na mafuta (tala Matai 25:1–13). Tosalaka yango na nzela ya losambo, koyekola makomi, mosala ya Nzambe, kolanda profeta, mpe misala misusu oyo ya bondimi na biso mpe kokangama na Nzambe (tala Spencer W. Kimball, Faith Precedes the Miracle [1972], 256).

Soki tosaleli kondima, ntango mosusu Nkolo apelisaka mwinda na nzela na biso na lolenge esengeli mpo ete tokoka kokende liboso (mona Boyd K. Packer, “The Candle of the Lord,” Ensign, sanza ya yambo 1983, 54).