2022
Likita ya Mpokwa na Libota Ezali Nini?
Sanza ya Mwambe 2022


“Likita ya Mpokwa na Libota Ezali Nini?” Liahona, Sanza ya Mwambe 2022.

Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya mwambe 2022

Likita ya Mpokwa na Libota Ezali Nini?

Elilingi
mama, tata, mpe bana basi mike bafandi libanda

Likita ya mpokwa ya libota ezali ngonga eponama ya kosangana na libota na yo kati ya poso. Na ntango oyo, bokoki “koyekola nsango malamu, kolendisa matatoli, kotonga bomoko, mpe kosepelisana” (General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 2.2.4, ChurchofJesusChrist.org). Likita ya mpokwa ya libota ekeseni ma moke mpo na libota moko na moko. Kasi ntina ezali kosalela ngonga yango mpo na kozala pene ya moko na mosusu mpe pene ya Mobikisi.

Bolengeli

Kanisa eloko moko oyo libota na yo esepelaka na yango mpe likambo moko ya nsango malamu olingi kosolola mpe koyekola elongo. Mpe, pona mokolo mpe ngonga moko ya poso moko na moko oyo bato mingi to libota nyonso ekoki kokutana. Eklezia esengaka bandimi basala likita ya mpokwa na liboka na babutu ya mikolo ya Liboso ya poso. Kasi mabota bakoki kokutana ntango bamoni ezali malamu mpo na bango.

Elilingi
libota ezali kosambela

Losambo

Mabota mingi babandaka mpe basukisaka likita ya mpokwa na libota na losambo. Yango ebengaka Molimo Mosantu na kati ya ndako na bango. Likita ya mppokwa na libota ezali ngonga malamu mpo ete bana mpe mikolo bayekola kosambela na lisanga moke.

Miziki

Mabota mingi mpe bazalalaka na loyembo ya kofungola mpe ya kosilisa. Mingimingi baponaka loembo na buku ya nzembo to na buku ya Buku ya nzembo ya Bana. Eklezia ezali na badiske ya piano ya nzembo na music.ChurchofJesusChrist.org. Okoki mpe kotala bavideo ya Bayembi ya Tabernacle na Temple Square. Koyemba na ntango ya likita ya mpokwa na libota esalisaka bato bayekola nzembo oyo eyembamaka na eklezia.

Liteya

Eklezia ezali na makoki ebele oyo ekoki kosalisa na mpokwa ya libota. Okoki kozwa ntango moke otanga mpe osolola lisikulu ya Liahona, Moninga, to Mpo na Bokasi ya Bilenge. Oyo ekoki mpe kozala ntango ya kotala mpe kosolola bavideo ya Eklezia. To okoki kotanga lisolo ya likita linene, kotanga makomi, to kosolola litangil ya poso wana na Yaka, Landa Nga.

Elilingi
bana bazali kosala ba bisikiti

Foto ya bana bazali kosala ba bisikiti na Michelle Loynes

Etaleli ya Libota

Bana bakoki kozala na likita ya mpokwa na libota. Bakoki kosunga na kobongisa mislulu, kosambela, to kopona mpe kokamba nzembo. Bakoki kutu kotangisa mateya. Liboso ya likita ya mpokwa na libota, okoki ko salisa mwana na yo atanga lisolo na Moninga zulunale to lisolo ya likomi oyo balingaka mingi. Nsima wana akoki kobeta lisolo wana na libota lokola liteya. Bana mingi mpe balingaka kosalela masolo ya makomi mpo na likita ya mpokwa na libota. Tika bana ya mikolo babongisa liteya to bapona lisolo ya likita linene oyo basepeli kotanga. Nsima kambisa lisolo yango.

Milulu

Mabota mingi basepelaka kosala minlulu lokola eteni ya linkita ya mpokwa a libota. milulu ya Nkati ya ndaku ekoki ko zala na biloko ya ko sakana, misala ya maboko, to ko lamba elongo.

Mpo na milulu ya libanda ya ndako, bokoki kokende kotambola, komata bangomba na libota, to kosala masano libanda elongo. Luka molulu oyo bato nyoso ya libota bakoki kosala, mpe kosepela elongo. Kima bangonga ya komekana oyo ekoki kokimisa Molimo.

Mosala

Likita ya mpokwa na libota ezali ntango monene mpo na mabota mpo na kosalisa basusu. Okoki kosalisaa bato ya nzinganzinga oyo ya mikolo, kopesa biloko ya kolia na ndaku ya batu oyo baza na ndaku te, kokomela bamisionele, to kolongola bosoto, mpo na ndakisa.