2023
Banzela Minei oyo Yesu Klisto Alendisaka Bino
Sanza ya yambo 2023


“Banzela Minei oyo Yesu Klisto Alendisaka Bino,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya yambo. 2023.

Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya yambo 2023

Banzela Minei oyo Yesu Klisto Alendisaka Bino

Nakoki kosala makambo nyonso na nzela ya Klisto.
Bafilipi 4:13

Elilingi
cairn

Na mokili mobimba, Baklisto basepelaka na likomi oyo: “Nakoki kosala makambo nyonso na nzela ya Klisto oyo alendisaka ngai” (Bafilipi 4:13).

Ntango bato bayokaka yango, basusu bakoki kokanisa ete elakisi bakoki kolonga na bomekami nyonso, balonga lisano, mpe kokokisa bamposa na bango nyonso. Kasi yango ezali maye likomi oyo etei te.

Ekomamaki na Apostolo Paulo ntango azalaki na boloko. Lokola moto ya boloko, ezalaki na mingi oyo Paulo akokaki te kosala, kasi ayebaki ete Yesu Klisto akokaki kolendisa ye mpo asala maye mazali ntina koleka.

Lolenge moko ezali solo mpo na bino!

1 Klisto Alendisaka Bino mpo na Koyeba

Yesu Klisto apesaki bino banzela ebele ya ntina oyo bokoki koyeba nsima maye mazali solo. Ateyaki biso nyonso kosambela ntango nyonso (tala 3 Nefi 18:18) mpe kotuna mpo na koyeba oyo ezali solo (tala Moroni 10:4–5). Bokoki lisusu kozwa mpe koyeba oyo ezali solo na nzela ya boyekoli na bino ya makomi.

Losambo mpe boyekoli makomi ememaka Molimo na bomoi na bino. Molimo akoki koloba na “makanisi na yo mpe … na motema na yo” (Malongi mpe Mayokani 8:2), “kotondisa molimo na yo na esengo,” mpe “kongengisa makanisi na yo” (Malongi mpe Mayokani 11:13).

Na ndenge oyo, bokoki “koyoka Ye”—koyoka maloba ya Mobikisi mpe kolanda maye Ye alobaki. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki ete oyo ezali “ndakisa mpo na kolonga, esengo, mpe bosepeli na bomoi oyo.”1

2 Klisto Alendisaka Bino mpo na Kosala

Bokasi eyaka epai na bino ntango bolukaka kobatela mitindo mpe kosala maponi ya malamu oyo ekambaka na kimia mpe esengo. Yesu Klisto alendisaka bino bosala oyo atako ntango maponi oyo ezali mpasi mpo na kosala yango. Mbala mosusu bokoki kosala maponi ya mabe. Botondi, Bomikabi ya Mobikisi epesi ndingisa na boyamboli. Na ntina ya Yesu Klisto, bokoki kokoma peto mpe kozwa esengo. Akoki kolendisa bino mpo na “kosala malamu koleka mpe kozala malamu koleka”2 mikolo nyonso.

3 Klisto Alendisaka Bino mpo na Kolonga

Ntango azalaki na boloko, Paulo akomaki: “nayekolaki, na lolenge nyonso oyo nazali, nasepela lolenge nazali.

“Nayebi nyonso mibale lolenge nini komikitisa, mpe nayebi lolenge komimatisa: bisika nyonso mpe na makambo nyonso nateyamaki” (Bafilipi 4:11–12).

Na maloba mosusu, Paulo ayekolaki ete, na nzela ya Klisto, akoki kolonga mpe koyekola uta na mimekano mpe mikakatano na ye. Yesu Klisto akoki kolendisa bino bosala ndenge moko.

Mobikisi anyokwamaki “bolozi mpe matungisi mpe masenginya ya ndenge nyonso.” Azwaki likolo na Ye moko bibosono na biso mpo ete “akoka koyeba … lolenge nini kobikisa [oyo elimboli kosunga] bato na ye engebene na bibosono na bango” (Alama 7:11–12). Kotala te oyo bozali kokutana na yango, Yesu Klisto akoki kolendisa bino botelemela mpe bokokisa makambo oyo bokoki te kozala na nguya ya kosala bino moko.

4 Klisto Alendisaka Bino mpo na Kokoma

Yesu Klisto asalaki lisekwa ezala solo mpo na biso banso, mpe asalaki ete bomoi ya seko epesama epai ya banso oyo bakoyambola, bakozwa makuli ya ntina mpe bakotosa mpe bakobatela mitindo oyo etambolaka elongo na yango. Na bozangi Klisto, tokoki te kokokisa maye Tata ya Lola alingi koleka—mpo na biso kokoma mingi mingi lokola Ye mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpe kofanda elongo na Bango libela.

Elilingi
Yesu Klisto

Bokoki kokoma mingi lokola Yesu Klisto ntango bozali koyekola Ye, kotalela mpe kondimela Ye, mpe kolanda ndakisa na Ye. Yango nde ekokamba bino bozala na bondimi makasi, elikia, bolingani, bompikiliki, bopeto mpe botosi. Oyo nyonso ezali ndakisa ya bizaleli ya Mobikisi.

Ntango bozali koluka kolanda Yesu Klisto, Ye akozala elikya na bino mpe pole na bino oyo ekokamba bino kokoma oyo nyonso Ye ayebi bokoki kokoma. Mpe, elongo na Paulo, bokozala na makoki ya koloba, “nakoki kosala makambo nyonso na nzela ya Klisto oyo alendisaka ngai.”