2023
Mabota Ezali Seko
Sanza ya yambo 2023


“Mabota Ezali Seko,” Liahona, Sanza ya yambo 2023.

Etinda ya sanza ya Liahona Sanza ya yambo 2023

Mabota Ezali Seko

Elilingi
libota ezali koseka

Libota ezali eteni ya motuya ya lingomba ya bato mpe na Eklezia. Bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bandimelaka ete mabota ekoki kotikala seko. Tosalaka mpo na kolendisa mabota na biso na mabele. Tozalaka lisusu na bondimi ete tokoki kozwa lipamboli ya libota ya seko.

Libota ya Nzambe

Bato nyonso bazali bana mibali mpe bana basi ya molimo ya baboti ya lola. Tozali banso eteni ya libota ya Nzambe. Tozali banso na lolenge ya bonzambe mpe atandele ya bonzambe. Soki tosaleli bomoi na lolenge elongobani, tokoki kozonga mpe kobika elongo na Tata na biso ya Lola lokola eteni ya libota na Ye ya libela.

Elilingi
balongani babalani sika libanda ya tempelo

Foto ya libala na Joseph Kaluba

Mabota ya Seko

Ntango mobali mpe mwasi babalani kati ya tempelo mpe babateli ya bango mayokani, libala na bango ekowumela mpo na libela. Bokuli oyo ya tempelo ebengami bokangisi. Bana oyo babotani nsima bokangisi ya baboti na bango, babotami na liyokani wana. Bana oyo babotamaki yambo baboti na bango bakangisama bakoki kokangisama na bango kati ya tempelo mpe bakoki kozala libota ya seko. Bandimi ya Eklezia basalaka masolo ya mambi na bango ya kala mpe mosala ya tempelo na ntina ete bakoka kokangisama na mabota na bango elongo na bankola nyonso. Lipamboli ya libota ya seko ekokisamaki na nguya ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye.

Libala

Libala ya mobali mpe mwasi etindami na Nzambe. Nsango malamu ya Yesu Klisto eteyi ete mibali mpe basi bazala sembo na moko mpe mosusu mpe sembo na mayokani na bango ya libala. Basengeli kozala sembo na makanisi, maloba, mpe mosala. Libala ezali kozala baninga ya ndenge moko, mpe balongani basengeli kolendisana, kobondisana, mpe kosalisana moko mpe mosusu.

Elilingi
baboti na mwana

Baboti mpe Bana

Nzambe atindaki Adama mpe Eva babota bana. Bakambi ya Eklezia bateyaki ete motindo oyo ezali kino sikawa makasi. Bamama mpe batata basalaka elongo mpo na kobokola bana na bango na bolingo mpe bosembo (tala Malongi mpe Mayokani 68:25–28). Bana bateyami kokumisa mpe kotosa baboti na bango (tala Esode 20:12).

Koteya mpe Koyekola

Baboti bateyaka bana na bango balinga Nzambe mpe batosa mitindo na Ye. Bomoi ya libota epesaka biso mabaku ya koyoka esengo mpe koyekola motema molai mpe komipima. Bandakisa oyo esungaka biso tokoma mingi lokola Nzambe mpe elengelaka biso tobika na esengo lokola mabota ya seko.

Kolendisaka Mabota

Esengaka mosala, bomipesi mpe bompikiliki mpo na kotonga libota ya elonga. Mabongi ya nsango malamu lokola bondimi, losambo, bolimbisi, bolingo, mosala, mpe lisano ya peto ekoki kosunga biso tozwa esengo na bomoi ya libota. Tokoki mpe lisusu kozwa emoniseli na biso moko mpo na koyeba lolenge nini kolendisa mabota na biso.

Elilingi
foto ya Yesu Klisto

Elilingi ya Klisto, na Heinrich Hofmann

Mapamboli Ezali mpo ya Banso

Moto nyonso te azalaka na libaku ya kozala na libota malamu awa na mabele. Kasi Nzambe alakaki ete moto nyonso oyo akobatela mitindo akozwa mapamboli nyonso ya libota ya seko. Tokoki kondimela Ye mpe kozala na bondimi na ntango na Ye.