2023
Fungola Motema na Yo na Molimo Mosantu
Sanza ya minei 2023


“Fungola Motema na Yo na Molimo Mosantu,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya minei 2023.

Etinda ya sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya minei 2023

Fungola Motema na Yo na Molimo Mosantu

Na eleko oyo ya Pasika, natondi Tata na biso ya Lola mpo na likabo ya Mwana na Ye ya Bolingo, oyo ayaki na bolingi na ye moko na mabele mpo na kozala Mosikoli na biso. Nazali na bosepeli ya koyeba ete Ye amikabaki mpo na masumu na biso mpe asekwaki na Lisekwa. Mikolo nyonso napambolamaka mpo na koyeba, ete, na ntina ya Bomikabi na Ye, nakoki mokolo moko kosekwa mpo na kozala libela na libela na libota moko ya bolingo mpenza.

Nayebi makambo yango na lolenge bobele moko moto nyonso kati na biso akoki koyeba yango. Molimo Mosantu alobaki na makanisi mpe motema na ngai ete yango ezali ya solo—mpe bobele mbala moko te kasi mingimingi.

Tozali na elaka ya motuya ya Molimo Mosantu lokola moninga moko. Mokumba na biso ezali ya kopona kofongola mitema na biso mpo na koyamba botambwisi ya kokoba ya molimo mpe bolendisi na nzela ya Molimo Mosantu katikati na bomoi mobimba.

Elilingi
fololo

Bililingi na Emily E. Jones

Boponi ya yambo ezali komikitisa liboso ya Nzambe.

Elilingi
maboko ya losambo

Ya mibale ezali ko sambela na bondimi na Nkolo Yesu Klisto.

Elilingi
bakompa

Ya misato ko tosa ndenge esengeli.

Elilingi
lolenge ya motema

Mpe ya minei ezali ko sambela mpo na koyeba babosenga mpe mitema ya basusu mpe lolenge nini kosunga bango mpo na Nkolo.

Nasambeli na motema na ngai mobimba ete okoyoka mongongo ya Molimo, oyo etindamaki na yo na bolingo nyonso. Mpe nasambeli ete okofongola ntango nyonso motema na yo mpo na koyamba Molimo ete okoka kozwa esengo ya kozalaka na Ye elongo na yo lokola moninga ya ntango nyonso.