2023
Yesu Asekwisi Lazalo uta na Nkufa
Sanza ya minei 2023


“Yesu Asekwisi Lazalo uta na Nkufa,” Friend, Sanza ya minei 2023, 46–47.

Etinda ya sanza Friend Sanza ya minei 2023

Yesu Asekwisi Lazalo uta na Nkufa

Elilingi
Yesu afandi elongo na Malia, Malata, mpe Lazalo

Mayemi na Apryl Stott

Malia mpe Malata bazalaki na ndeko ya mobali na nkombo ya Lazalo. Bazalaki baninga ya Yesu Klisto.

Elilingi
Yesu azali koyamba Malia mpe Malata

Lazalo abelaki makasi. Sima moke, ye akufaki. Malia mpe Malata bayokaki mawa. Ntango Yesu Ayaki, Ye alelaki elongo na bango.

Elilingi
Yesu atelemi liboso ya lilita ya Lazalo.

Sima Yesu akendaki elongo na bango na lilita ya Lazalo. Ye alobaki,“Lazalo, bima libanda.

Elilingi
Yesu azali kosunga Lazalo abima libanda ya lilita

Lazalo atelemaki mpe atambolaki libanda ya lilita. Ye azalaki na bomoi lisusu! Mpo na Yesu, tokozala na bomoi lisusu.

Kopakola langi na Lokasa

Yesu Klisto Azali na Bomoi

Elilingi
Kopakola langi na lokasa ya mwana kosimbaka elilingi ya Yesu

Liyemi na Apryl Stott

Lolenge nini bokundolaka Yesu na eleko ya Pasika?