2023
Bokaboli Nsango Malamu ya Yesu Klisto
Sanza ya Nsambo 2023


Bokaboli Nsango Malamu ya Yesu Klisto,” Liahona, Sanza ya Nsambo 2023.

Etinda ya sanza Liahona Sanza ya Nsambo 2023

Bokaboli Nsango Malamu ya Yesu Klisto

Elilingi
elenge mwasi na makomi efungwama na mabolongo

Ntango tokanisaka na ntina ya mapamboli tozwaka mpo na tozali bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tolingaka kokabola nsango malamu na baye tolingaka. Tokoki kokabola matatoli na biso ya bosolo na nzela ya maloba mpe ya ndakisa na biso. Tokoki kosambela mpo na kozwa bofulami ya koyeba nani kokabola na ye mpe nini koloba.

Elilingi
Yesu azali kosalisa mobali moko ya ebosono.

Kolinga Basusu

Eteni moko ya motuya na koteya nsango malamu ezali kolinga basusu. Ntango tozali kolakisa bolingo na biso na basusu na nzela ya misala lokola ya Klisto, tozali kokabola nsango malamu ya Yesu Klisto—ntango mosusu kozanga koloba ata liloba moko. Mpe ntango basusu bayebi ete tozali komitungisa mingi mpo na bango, bakoki kofungwama mingi mpo na koyoka makanisi na biso na ntina ya nsango malamu. (Tala Gary E. Stevenson, “Love, Share, Invite,” Liahona, Sanza ya Mitano 2022, 84–87.)

Kokabola na Lolenge ya Malamu mpe ya Solo Mpenza.

Tokoki kokabola oyo tolingaka kati ya nsango malamu. Ntango tozali kosala yango lokola eteni ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo, ekozala ya nsoni te to ya malamu te. Na ndakisa, tokoki koloba na libota na biso mpe baninga na biso na ntina ya oyo tosalaka mokolo ya Eyenga. To tokoki kolobela bango na ntina ya esengo toyokaka ntango tozali kosalisa basusu. (Tala Dieter F. Uchtdorf, “Missionary Work: Sharing What Is in Your Heart,” Liahona, Sanza ya Mitano 2019, 15–18.)

Kobengisa Basusu Basangana na Biso

Tokoki kobengisa basusu koyekola mingi koleka na ntina ya nsango malamu. Na ndakisa, tokoki kobengisa bango baya na mayangani to lisano ya Eklezia, batanga Buku ya Mormon, batala video ya Eklezia, to kotala bango elongo na bamisionele. Makambo oyo ekoki kosunga bango bayoka Molimo mpe balinga koyekola mingi koleka.

Elilingi
basi mibale ya mikolo bafandi mpe bazali kosolola

Tuna na Ntina ya Oyo Bayekoli

Nsima ya Baninga mpe bandeko ya libota koya na eklezia to kozwa liteya moko na bamisionele, tokoki kotuna bango oyo etali boyekoli na bango. Mateya misusu ya nsango malamu ekoki kobima sika epai na bango, bongo tokoki koyanola mituna bazali na yango. Tokoki kolakisa bolingo mpe lisungi na biso mpo na milende na bango ya boyei kati na Klisto.

Kobakisa na Bindimeli na Bango

Topesaka lokumu mpe botosi na bindimeli ya basusu, mpe tomekaka kobakisa na kondima bazali na yango. Na ndakisa, moninga moko oyo azwi libondisi na makomi ya Biblia akoki mpe kozwa libondisi na mateya tokabolaka uta na Buku ya Mormon.

Elilingi
bilenge basi bazali kosunga mwasi moko ya mokolo kokatisa nzela

Kosunga Bandimi ya Sika ya Eklezia

Ntango bato bakotaka na Eklezia, tokoki kosunga kokembisa kondima na bango. Tokoki kozala moninga na bango, koyanola na mituna na bango, mpe kosunga bango ntango bazwi mabiangi. Tokoki kolendisa bango kokoba kolanda Yesu Klisto mpe koyekola nsango malamu na Ye.

Elilingi
bamisionele mibale ya mibali mpe mobali moko bazali kotala telefone elongo

Kosala Misio ya Ntango Mobimba

Na kobakisaka bokaboli nsango malamu na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, bandimi ya Eklezia bakoki kobiangema mpo na kosala lokola bamisionele ya ntango mobimba. Soki balengelami, bilenge mibali bakoki kosala misio soki noki na mibu 18. Bilenge basi mpe mikolo bakoki mpe kosala mosala. Bokoki kozwa nsango ebele na ChurchofJesusChrist.org/callings/missionary.