2023
Mikolo Nsambo ya Bokaboli
Sanza ya Nsambo 2023


“Mikolo Nsambo ya Bokaboli,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya Nsambo 2023.

Etinda ya sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya Nsambo 2023

Mikolo Nsambo ya Bokaboli

Bokoki kokabola nsango malamu na banzela ya malamu mpe ya solo. Bobongisami mpo na kosalela yango?

Ntango tolobaka na ntina ya bokaboli matatoli na biso, tokanisaka mbala na mbala kopesa matatoli na biso na liyangani ya elambo to na mabaku misusu epesami. Kasi tolendisami na “koluka mabaku ya kotombola bondimi na bino na balolenge ya solo mpe malamu.”1

Na mikolo nsambo ya mikakatano oyo elandi, bokoki kokabola litatoli na balolenge ekeseni mikolo nyonso mpo na mposo moko. Bokoki kosala makambo yango na molongo nyonso, to bokoki kutu kobimisa makanisi ya bino moko! Bobongisami mpo na kosalela yango?

Elilingi
ndako ya bosangani

Bililingi na Emily Davis

Mokolo 1: Eklezia

Bokanisa kopesa litatoli na bino na likita ya bokili bilei mpe matatoli kati na Eklezia soki ezali likambo moko bosepeli na yango. Soki te, bokoki lisusu kokabola litatoli na bino na eklezia na kosanganaka na ba kelasi na bino ya eyenga mpe seminele. Maloba oyo bokabolaka kuna ekoki kotombola basusu mpe kolendisa matatoli na bango mpe oyo ya bino.

Elilingi
Baninga

Mokolo 2: Baninga

Oyekoli nini na eklezia Mokolo na Eyenga? Osepelaki na oyo moto moko akabolaki na lisikulu ya liyangani ya elambo to na lisolo na bino ya kelasi? Ntango mosusu loyembo ya bofongoli mayangani ezalaki moko ya banzembo bolingaka. Boyebisa moninga moko na ntina na yango! Nsima botuna bango mpe ndenge suka ya mposo na bango elekaki.

Elilingi
telefone na basite ya bato banso

Mokolo 3: Basite ya Bato Banso

Basite ya bato banso ezali esika monene ya kokabola makambo ya molimo na momesano mpe bomoto. Mpo na mokolo oyo ya mikakatano, bokanisa kokabola nsango na ntina ya:

  • Moko ya molongo ya makomi na bino bolingaka mingi.

  • Maloba moko ya kolendisa uta na likita monene.

  • Likanisi ya molimo moko to boyebi.

  • Eloko moko bolingaka to bosepelaka na yango na ntina ya Mobikisi.

  • Lolenge oyo Asungaki bino kala mingi te to ezaleli moko osepelaka na yango kati na Ye mpe mpo na nini.

Elilingi
benga na telefone na video mpe makomi.

Mokolo 4: Texto to Video

Tindela moninga moko nsango ya kolendisa na nzela ya makomi to video. Bokoki kokabola lisikulu moko ya likita linene bokanisi bakoki kolinga, boyebisa bango eloko moko bosepelaka nango epayi na bango, to bokabola naoyo etali bondimi na bino kati na Yesu Klisto. Na ndakisa, bakoki kozala na mposa ya koyeba na ntina ya bolingo ya Tata na Lola mpo na bango. Bokoki ntango nyonso koyebisa bango na miso mpe!

Elilingi
Elenge mwasi na ndembo lokola motema

Mokolo 5: Mosala

Bosengeli komituna lolenge nini kosalela basusu ekoki kozala lolenge ya kokabola litatoli na bino. Ntoma Polo alobaki na Timote, “kasi opesa bandimi etaliseli na elobeli mpe ejaleli mpe na bolingo mpe na kondima mpe na mpeto” (1 Timote 4:12). Bongo bokoki kolakisa bindimeli na bino na nzela ya ndakisa na bino, nakosalelaka basusu lokola Mobikisi akokaki kosalela bango.

Elilingi
bisaleli ya mosala ya ntoki

Mokolo 6: Ntoki

Ntango mosusu bato basalelaka ntoki na lolenge ekeseni mpo na kokabola makanisi mpe mayoki na bango. Bokoki kosalela mayemi, bikeko, maloba ya ntɔ́ki, miziki, to lolenge mosusu ya misala ya ntɔ́ki mpo na komonisa mayoki na yo na ntina na Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye.

Elilingi
bilenge bazali kosolola

Mokolo 7: Masolo ya Mbalakaka

Bozala na bobangi te ya kolobela bindimeli na bino na mabaku epesameli, kaka ndenge bokoki kokabola makanisi mosusu nyonso oyo bozali na yango mpo na likambo moko boye.

Bokoki, ya solo, kolobela misala ya Eklezia to makomi moko botangi kala mingi te, kasi ekoki mpe kozala kutu ya mbalakaka koleka wana. Ndakisa:

  • Soki bofulami na bizalisi ya mokili, boyebisa moto mosusu botondi na bino mpo na bikelamu ya Nzambe.

  • Ntango mosusu bozwaki makambo ya molimo ya malamu kala mingi te. Boyebisa moninga moko na ntina na yango soki ezali ya sekele te.

  • Boluka makokanisi ya nsango malamu na buku to filme oyo olingaka, mpe kabola bososoli na bino.

Momesaso mpe Solo

Ndenge bozali kozwa banzela ekeseni ya kokabola bindimeli na bino, ekokoma mingimingi solo mpo na bino kosala bongo. Na ebandeli, ekoki kozala mwa nsɔni, kasi ezali malamu! Bobosana te, litatoli na bino na yango moko ezali solo na bino—ezali eteni ya nani bozali. Kokabola yango ekoki kokoma solo mpenza. Esengeli kaka kobimisa yango mwa mingi mokolo na mokolo.

Lolenge nini bokokabola litatoli na bino lelo?

Litangi

  1. Dieter F. Uchtdorf, “Apr. 2019 general conference” (Ensign to Liahona, Sanza ya Mitano 2019, 17).