2023
Yesu Alakisaki Biso Nzela
Sanza ya Mwambe 2023


“Yesu Alakisaki Biso Nzela,” Moninga, Sanza ya Mwambe 2023, 4–5.

Etinda ya sanza Moninga Bansango, Sanza ya Mwambe 2023

Yesu alakisaki Biso Nzela

Elilingi
Maloba mosusu

Bililingi na Dan Burr

Yesu Klisto azali Mwana ya Tata na Lola. Ayaki na mokili kolakisa biso lolenge nini tokoki kozonga epai ya Tata ya Lola mokolo mosusu. Yesu abatisamaki. Ateyaki ete tosengeli mpe kobatisama

Elilingi
maloba mosusu

Yesu alakisaki biso lolenge nini kotambwisa bomoi na biso. Alingaki mpe asungaki moto nyonso. Alingi ete biso tolanda Ye.

Elilingi
maloba mosusu

Yesu Klisto ayokaki bampasi na biso nyonso mpe anyokwamaki mpo na masumu na biso. Nsima akufaki mpo na biso. Oyo ebengami Bomikabi ya Yesu Klisto. Ye asekwaki. Elingi koloba ete Azali na bomoi lelo! Mpo na Yesu Klisto, tokozala lisusu na bomoi ata nsima ya nkufa na biso.

Elilingi
maloba mosusu

Yesu asalaki makambo oyo nyonso mpo na biso mpo Ye alingi biso. Mpo na Ye, tokoki kobika elongo na Tata na biso ya Lola mpe mabota na biso mokolo mosusu.

Elilingi
maloba mosusu

Tokoki kolanda Yesu na kozwaka libatisi. Tokoki lisusu kolanda Ye mikolo nyonso ntango tolingi mpe tosalisi basusu mpe kobatela mibeko na Ye.