2023
Liloba ya Nsuka: Koluka Bososoli
Sanza ya Mwambe 2023


“Koluka Bososoli,” Mpo ya Bokasi bwa Bilenge, Sanza ya Mwambe 2023.

Etinda ya sanza Mpo na Bokasi bwa Bilenge Sanza ya mwambe 2023

Koluka Bososoli

Ezwami uta na Lisukulu ya likita linene ya Sanza ya Minei 2019.

Elilingi
mwasi na mwinda ya mafuta

Bililingi na Emily E. Jones

Ntina na biso ntango tozali koluka bososoli ya nsango malamu ya Yesu Klisto esengeli ezala ya kokolisa bondimi kati na Nzambe mpe mwango na Ye ya esengo na bonzambe mpe kati na Yesu Klisto mpe na libonza ya bomikabi na Ye mpe kokokisa mbongwanaya seko. Bondimi mpe mbongwana oyo ekolisami boye ekosalisa biso kosala mpe kobatela mayokani elongo na Nzambe, boye kolendisa mposa na biso ya kolanda Yesu mpe kobimisa mbongwana ya solo ya molimo kati na biso. Mbongwana oyo ekomemela biso esengo koleka, oyo ekobota mbuma, mpe ya nzoto kolongono mpe ekosalisa biso tobatela bomoni ya seko.

Elilingi
elenge mobali azali kotanga makomi

Mpo na kokokisa yango, tosengeli kotikala na Yesu Klisto na komizindisaka bisomei na makomi, kosepelaka kati na yango, koyekolaka malongi na Ye, mpe kobundaka mpo na kobika lolenge Ye abikaki. Bobele na ntango wana nde tokoya koyeba Ye mpe tokoyeba mongongo na Ye, koyeba ete lokola tozali koya epai na Ye mpe kondimela Ye, tokoyoka nzala to mposa ya mai ata moke te (tala Yoane 6:35).

Elilingi
elenge mobali azali kosambela

Yango eyaka na libaku malamu te. Komibongisa bisomei na bopusi makasi ya bosantu ezali likambo ya motuya moke te; esengi kobelela Nzambe mpe koyekola lolenge nini komema nsango malamu ya Yesu Klisto na katikati ya bomoi na biso.

Elilingi
elenge mwasi asimbi motema na ye

Natatoli na bino ete ntango biso toluki na molende nyonso, na motema nyonso, na makasi nyonso, mpe na bosembo nyonso kososola nsango malamu ya Yesu Klisto mpe koteya yango moko na mosusu na mokano ya solo mpe na nse ya bopusi ya Molimo, mateya oyo ekoki kobongola mitema mpe kofula mposa ya kozala na bomoi engebene na bosolo ya Nzambe.