2023
Kolengela Baye Bazali na Bosenga
Sanza ya Libwa 2023


“Kolengela Baye Bazali na Bosenga,” Liahona, Sanza ya Libwa. 2023.

Etinda ya Liahona ya Sanza, Sanza ya Libwa 2023

Kolengela baye bazali na bosenga

Elilingi
Yesu azali kobikisa bato

Abikisaki Bato Mingi ya Bokono ya Ndenge na Ndenge, na J. Kirk Richards, ekoki kobandelama te.

Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tozali kolanda mateya ya Nkolo mpo na kolengela baye bazali ba bosenga. Tozali kolengela basusu na kosalisaka bango, kosungaka bango bakoma na bomikoki, mpe kokabolaka oyo tozali na yango.

Ndakisa ya Yesu Klisto

Yesu Klisto alingaki, abondisaki, mpe asambelaki mpo na baye bazalaki nzinganzinga na Ye. Ye “atambolaki bipai na bipai kosala bolamu” (Misala 10:38). Tokoki kolanda ndakisa na Ye na kolingaka, kobondisaka, kosalisaka, mpe kosambelaka mpo na baye bazali nzinganzinga na biso. Tokoki kozala ntango nyonso kotalaka lolenge nini kosunga basusu.

Elilingi
bato mibale kotambolaka

Kosalisa

Liloba kosalisa esalelami kati na makomi mpe kati na Eklezia ya Nkolo mpo na kolakisa lolenge nini kolengela moko na mosusu. Bato bazali na bonganganzambe bapesami mokumba lokola bandeko mibali mpo na kosalisa moto moko na moko to libota na palwasi to etape. Bandeko basi ya kosalisa bapesami mokumba mpo na mwasi ya mokolo moko na moko. Bandeko mibali mpe basi mpo na kosalisa batalaka ete bandimi nyonso ya Eklezia bakanisami mpe balengelami.

Elilingi
bato bazali kolona milona.

Kosalisaka Basusu Bakoma na Bomikoki

Tokoki kosalisa bandeko ya libota mpe baninga bakoma na bomikoki na kopesaka bango makasi ya kozwa matomba ya ntango molayi na mikakatano na bango. Nsima tokoki kosunga bango ntango bazali kosala mpo na bantina na bango. Bozwa boyebi ebele koleka na oyo etali bomikoki na Liahona ya Sanza ya Mwambe 2023 Gospel Basics article.

Kosalisaka Basusu

Ezali na ndenge mingi tokoki kosalisa baye bazali nzinganzinga na biso mpe kosalisa bango bakokisa babosenga na bango ya ntango, molimo mpe motema. Koyekola oyo etali basusu ekoki kosalisa biso toyeba lolenge nini tokoki kosalisa bango malamu koleka. Tokoki lisusu kosambela mpo na bokambi ya koyeba maye tokoki kosala mpo na kosalisa.

Elilingi
bato bazali kosangisa mbuma

Kokabolaka Oyo Tozali na Yango

Tokoki kosalisa basusu na kokabolaka oyo Nzambe apamboli biso na yango. Ndakisa, tokoki kopesa makabo ya kokila ya boboto to kokaba mpo na Don Humanitaire ya Eklezia. Tokoki lisusu kosalisa kati na lisanga na biso to mabiangiya Eklezia na biso

Mikumba ya Bakambi ya Eklezia

Episikopo atalaka bolengeli ya baye na bosenga na kati ya palwasi. Akoki kosalela mbongo mpo na makabo ya kokila bilei mpo na kosalia bandimi kati na bosenga. Bakambi mosusu, sangisa na bapesi toli na ye mpe babokambi ya Lingomba Bamama Basungi mpe ya masanga makoki ya bampaka, basalisaka bandimi bazwa bisaleli bango bakoki kosalela mpo na kokokokisa babosenga na bango.

Bokasi ya Eklezia mpo na Kosalisa Bato na Makama.

Eklezia esalisaka bato na mokili mobimba na koyanola na lombango, na mwiango ya lisanga, mosala, mpe bapologalami misusu ndakisa mai ya peto mpe mangwele. Mpo na koyekola mingi koleka, tala Dallin H. Oaks, “Helping the Poor and Distressed,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2022, 6–8.