2023
Sikawa Klisto Asekwi
Sanza ya Libwa 2023


“Sikawa Klisto Asekwi,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya Libwa 2023.

Etinda ya Mpo na Bokasi ya Bilenge ya Sanza, Sanza ya Libwa 2023

Sikawa Klisto Asekwi

Boyekola oyo Apostolo Polo ateyaki na oyo etali Lisekwa ya Yesu Klisto.

Elilingi
mosekwi Yesu Klisto

Klisto Mosekwi, na Wilson J. Ong

Sikawa Klisto asekwi uta na kufa

Yesu Klisto akufaki na ekulusu, atiamaki na lilita, mpe atelemaki uta na bawa na mokolo ya misato.

Bambuma ya yambo ya baye balalaki.

Liloba ya Greki esalelami awa mpo na bambuma ya yambo elingi koloba eleko ya kobuka ya yambo mpenza ya mobu. Ezali ya yambo ya bobuki—yambo ya ebele ezali koya.

Liloba baye balalaki elakisi “baye oyo bakufa.”

Yesu Klisto azalaki ya yambo mpo na kosekwa, nsima ya Lisekwa na Ye, bato nyonso bakosekwa.

na nzela ya moto liwa eyaki.

Yango ezali kolobela oyo etali Adama. Bokweyi na ye elakisi ete moto nyonso oyo akoya na mokili akokufa. (Tala Mose 4.)

Na Klisto banso bakozonga na bomoi

Mpo na Bosekwi ya Yesu Klisto, bato nyonso bakosekwa. Yango elakisi ete moto nyonso oyo azalaki to akozala na bomoi akosekwa. Milimo na biso ekosangana na nzoto na biso, mpe banzoto na biso ekobonga nie mpe ekozanga bokufi. (Tala Alma 11:43–45.)