Liahona
Nazali Moyekoli ya Yesu Klisto
Sanza ya Yambo 2024


“Nazali Moyekoli ya Yesu Klisto,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya Yambo 2024

Etinda ya sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya Yambo 2024

Nazali Moyekoli ya Yesu Klisto

Okoki kolanda Mobikisi mpe kopanza liloba na Ye na basusu.

Elilingi
2024 logo Moto ya likambo ya Bilenge

Osila komituna mokolo moko mpo na nini, sima ya kobikisa batu, Yesu ayebisaki bato mosusu kati na bango bayebisa moto moko te (tala Malako 7:36)? Moko ya ntina ekoki kozala kosala elongo na lolenge ya balandi Asengelaki na bango. Okokaki kokanisa ete soki bato balobaki na oyo etali kobika na bango yango ekokaki kozala lolenge moko ya malamu mpo na Yesu kobenda balandi. Nzokande, Yesu azalaki kaka na mposa ya balandi te. Azalaki na mposa ya bayekoli.

Yesu alobaki na Petelo mpe Andale, “Bolanda ngai” (Matai 4:19). Bobongoli ya Joseph Smith ya molongo elobi boye, “Nazali ye oyo ekomami na baprofeta; bolanda ngai” (Bobongoli ya Joseph Smith, Matai 4:18 [kati na Matai 4:19, footnote a]). Libiangi ezalaki te ya kotikala na Ye mwa bantango. Alingaki bango bazala bayekoli na Ye mpo na libela na libela.

Alingaki bobele te bango batala Ye koteya bato, kolinga bato, mpe kosala bikamwa. Alingaki bango kosala lolenge moko. Alingaki mosala na Ye ekoma mosala na bango. Kopona Klisto elimboli ete bango basengelaki koyekola kosalisa lokola Ye asalisaki mpe kokanisa lokola Ye akanisaki. Bango basengelaki kobika lokola Ye abikaki, mpe Ye alingaki kokamba bango mpe kopesa bango lisalisi bango basengelaki na yango mpo na kokoma mingi koleka lokola Ye.

Elilingi
Yesu Klisto

Liloba na Kigreke mpo na moyekoli ezali mathetes. Elimboli mingi koleka molandi to moyekoli. Mingimingi ebongolami lokola motangi. Na mikolo ya Klisto, bayekoli bazalaki mingimingi kopona moteyi epai ya nani bango balingaki koyekola, na ntina ya kokoma bango moko bateyi. Klisto alandaki te lolenge wana ya kosalela. Abalukaki mpe alukaki nde bayekoli na Ye. Lelo, Klisto abiangi biso toya epayi na Ye. Abiangi biso tozala bayekoli na Ye mpe tosakola liloba na Ye o ntei ya bato ba Ye, ete bakoka kozala na bomoi ya libela (tala 3 Nefi 5:13).

Elenge mwasi moko ya mboka Haiti na Carraibe amonisaki mposa na ye ya kozala moyekoli ya Klisto na kobengaka moninga na ye mwasi oyo azalaki mondimi ya Eklezia te koya elongo na ye na likita ya FSY. Na ebandeli, tata ya moninga na ye alingaki te kopesa mwana na ye ya mwasi nzela ya kokende. Bakambi ya Eklezia balimbolaki oyo etali makambo ya malamu oyo ezali kozela ye mpe bapesi toli malamu ya bilenge bakoli oyo bakozala kokengela ye. Tata apesaki nzela na mwana na ye ya mwasi kokende, mpe sima ya kotalaka bokeseni yango esalamaki na bomoi na ye, ye apesaki ye lisusu nzela ya kosangana na mayangani ya Eklezia mpe—sima ya sanza motoba—abatisamaki.

Elenge mobali moko ya mboka Argentine na Amerika ya Sudi amonisaki mposa na ye ya kozala moyekoli ya Klisto na kokabolaka mwa babonbon na ye elongo na moninga moko ntango bamataki na motuka ya eteyelo. Ntango akomaki na eteni moko oyo ezalaki na elengi ya kafe, alimbolaki ete akomaki naino na elengi yango te mpamba te moto moko te na libota na ye azalaki komela kafe. Yango ememaki na lisolo moko na oyo etali Eklezia, oyo ememaki na libiangi ya kokoma na mayangani, oyo ememaki bongo moninga na ye kosanganaka na Eklezia mpe kosalaka etinda na mboka Chili.

Bato nyonso te okolobela oyo etali Eklezia to obiangi na lissano moko ya Eklezia akolingakosangana na Eklezia. Ezali MALAMU. Moto nyonso te oyo Klisto asololaki na Ye na ntango ya mosala na Ye na mabele asanganaki na Ye. Kasi, lokola toponi kozala bayekoli ya Yesu Klisto mpe kosakola liloba na Ye, Ye akopesa biso mpiko mpe lisalisi ya bonzambe. Tokoyekola lolenge nini kozala mingi lokola Ye, mpe yango ezali oyo bayekoli basalaka.