Liahona
Leisa Molimo na Yo na Libondeli ya Mbala na Mbala
Sanza ya minei 2024


“Leisa Molimo na Yo na Losambo ya Mbala na Mbala,” Liahona, Sanza ya minei 2024

Etinda ya sanza Liahona Sanza ya minei 2024

Leisa Molimo na Yo na Losambo ya Mbala na Mbala

Tosengeli na bilei ya molimo ya kosolola na Tata na biso ya Lola, lipamboli ezali mpo na biso esika nyonso mpe ntango nyonso.

Elilingi
Enosa azali kosambela

Foto ya mosali elilingi ya Enosa na Matt Reize

Biso nyonso toyokaki nzala liboso. Mpasi ya nzala ezali lolenge ya nzoto ya koyebisa biso ete ezali na mposa ya ya bilei. Mpe ntango tozali na nzala, toyebi nini tosengeli kosala—kolia.

Milimo na biso mpe ezali na ndenge ya koyebisa biso ntango tosengeli na bilei ya molimo. Kasi yango emonanaka ete ezali pete mpenza mpo na biso toboya koyokela nzala ya molimo koleka ya nzoto.

Kasi lokola ezali na ndenge ebele ya bilei tokoki kolia ntango toyoki nzala, ezali na biloko ebele tokoki kosala mpo na kosilisa nzala na biso ya molimo. Ndakisa, tokoki “kosepela likolo ya maloba ya Nzambe” (2 Nefi 32:3) kati ya makomi mpe na nzela ya maloba ya baprofeta. Tokoki kasangana na eklezia mingimingi mpe kokabola elambo (tala Malongi mpe Mayokani 59:9). Tokoki kosalela Nzambe mpe bana na Ye (tala Moziya 2:17).

Kasi ezali na liziba mosusu ya bilei ya molimo epesameli biso ntango nyonso, na ngonga nyonso ya bomoi na biso, kolandaka ezalela na biso te. Tokoki ntango nyonso kosolola na Tata na Lola na nzela ya llibondeli.

“Molimo na Ngai Eyokaki Nzala”

Ntango profeta Enosa akendaki koboma nyama na zamba, akanisaki na ntina ya “maloba maye [ye] ayokaka mbala na mbala Tata na [ye] koloba etali bomoi ya seko, mpe bosepeli ya basantu.” Maloba yango “ekotaki bonzindo na [ya ye] motema” (Enosa 1:3).

Mpo ete Enosa azalaki na lolenge oyo ya makanisi ya molimo, ayokaki bosenga moko makasi: “Molimo na ngai eyokaki nzala,” ye alobaki (Enosa 1:4; nsete ebetami).

Enosa asalaki nini ntango ayokaki nzala ya molimo, yango esengelaki na bilei ya molimo? “Nafukamaki na nse liboso ya Mozalisi na ngai,” ye alobaki, “ mpe nabelelaki epai ya ye na losambo mpe libondeli makasi mpo ya molimo ya ngaimei” (Enosa 1:4).

Boye nzala ya molimo ya Enosa ezalaki monene ete ye abondelaki “mokolo mobimba … mpe ntango butu eyaki [ye] atombolaki mongongo na [ye] likolo makasi ete yango akomaki na balola” (Enosa 1:4). Na bosolo, Nzambe ayanolaki losambo na ye mpe alimbisaki masumu na ye. Enosa ayokaki mbeba na ye esukwamaki nie. Kasi bilei na ye ya molimo esukaki wana te.

Ye ayekolaki na oyo etali nguya ya bondimi kati na Yesu Klisto, mpe asopaki molimo na ye mobimba na nkombo ya bato na ye—atako ya banguna na ye. Ye asalaki mayokani elongo na Nkolo mpe abombaki bilaka kowuta na Ye. Mpe sima ya losambo ya nguya ya Enosa, akendeki zingazinga o ntei ya bato na ye kosakolaka mpe kotatolaka makambo maye ayokaki mpe amonaki. (Tala Enosa 1:5–19.)

Losambo nyonso te ekoyanolama na lolenge oyo ya kokamwa, kasi mayele na biso na losambo ekoki kozala na ndimbola mpenza mpe bobongoli bomoi. Tokoki koyekola mwa mateya ya motuya uta na mayele ya Enosa na nzela ya losambo. Mpo na ndakisa:

  • Kosala makasi mpo na kobika mobimba ya nsango malamu ekoki kosalisa biso topesa ntina na nzala na biso ya molimo.

  • Nzala na biso ya molimo ekoki mpe esengeli komema biso na mabolongo na biso mpo na koluka lisungi ya Tata na Lola.

  • Kosambela Tata na Lola ekoki kosunga na kosilisa nzala na biso ya molimo—mpe bongo ya basusu.

  • Tokoki kosambela esika nyonso, ntango nyonso.

  • Losambo ekoki kosunga biso toyambola.

  • Losambo ekoki kolendisa bondimi na biso kati na Yesu Klisto.

  • Tokoki koyamba litatoli ya moto ye moko ete Tata na biso ya Lola ayokaka biso mpe akengelaka biso.

  • Litatoli mpe bokasi tozwaka na nzela ya losambo ekoki kosunga biso tosalela mpe tolendisa basusu.

Elilingi
Mpaka Soares lokola mwana moke.

Boyebi na ngai na ntina ya nguya ya losambo

Lokola Enosa, nayekolaki mwa ndambo ya mateya yango ya lolenge moko na nzela ya mayele na ngai moko. Baboti na ngai bakotaki na Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka ntango nazalaki elenge mobali, mpe nabatisamaki ntango nazalaki na mibu mwambe ya mbotama. Nazalaka ntango nyonso na liyoki ya malamu, moto na motema na ngai na oyo etali Tata na ngai ya Lola mpe na ntina ya Yesu Klisto, nsango malamu na Ye Ezongisama, mpe Eklezia na Ye. Kasi yango ezalaki bongo te kino nakokisaki pene mibu 16 ya mbotama boye nakomaki kobondela na ntina ya bosolo ya makambo yango.

Episikopo na ngai oyo afulama asengaki ngai nateya na kelasi ya Eteyelo ya Eyenga ya bilenge. Nasengelaki koteya liteya moko na oyo etali lolenge nini tokoki kozwa litatoli ya nsango malamu na nzela ya losambo. Etinda yango uta na episikopo na ngai etindaki ngai nakanisa mingi koleka na bozindo na oyo etali litatoli na ngai moko. Nazwaki ntango ya koyekola Buku ya Mormon mpe ntango nyonso koyoka ete Eklezia ezali ya solo. Nandimelaka ntango nyonso Mobikisi Yesu Klisto, kasi natikala atako mokolo moko te koyoka elaka ya Moroni ezwami na Moroni 10:4–5. Natikala kosambela atako mokolo moko te na ntina ya bosolo ya nsango malamu.

Namikundoli liyoki na motema na ngai ete soki nakoteya bilenge wana lolenge nini kozwa litatoli na nzela ya nsango malamu, nasengeli kosambela mpo na litatoli na ngai moko. Molimo na ngai ezalaki na nzala—ntango mosusu na lolenge ekeseni uta na Enosa, kasi nayokaki bongo bosenga ya molimo.

Ntango nazalaki kolengela liteya, nafukamaki mpe napesaki bosenga ya motema na ngai epai ya Tata na ngai ya Lola kokokisa bosolo nayokaki na kati. Nazalaki te kozela bomonisi moko ya monene. Kasi ntango natunaki Nkolo soki nsango malamu ezali ya solo, eyaki na motema na ngai liyoki moko ya kitoko makasi—oyo mongongo ya pete, ya moke kondimisaka epai na ngai ete yango ezalaki ya solo mpe ete nasengelaki kokoba kosalaka oyo nazalaki kosala.

Liyoki ezalaki makasi koleka ete nakokaki te kowangana eyano yango mpe koloba nayebaki te. Nalekisaki mokolo wana mobimba na koyokaka esengo koleka. Makanisi na ngai ezalaki na lola kosepelaka na liyoki kitoko kati ya motema na ngai.

Eyenga elandaki, natelemaki liboso ya baninga na ngai misato to minei ya kelasi, oyo bazalaki nyonso bilenge koleka ngai. Natatolaki epai na bango ete Tata na Lola akoyanola nsambo na bango soki bango bazali na bondimi.

Elilingi
Mpaka Soares

Eyano moko ya losambo oyo Mpaka Soares azwaki lokola elenge mobali epesaki ye nzela ya kotatola—lokola misionele moko (likolo), tata mpe molongani, mpe Apostolo—ete Tata ya Lola ayanolaka mabondeli epesami na bondimi.

Uta mokolo wana, litatoli yango etikala na makanisi na ngai Yango esungaka ngai kozwa mikano, mingimingi na bangonga ntango nazalaki kokutana na bitumba. Libondeli yango ya mokolo wana, elongo na matatoli ya kobakisa nayambaki katikati ya mibu, epesaki ngai nzela ya kotatola na bato, na kondimisama nyonso, ete bango bakoki kozwa biyano uta na Tata ya Lola soki bango basambeli na bondimi. Yango ezalaki bosolo ntango natatolaki lokola misionele, lokola mokambi ya Eklezia, lokola tata mpe molongani, mpe kutu lelo lokola Apostolo.

Ntango mpe Lolenge nini ya Losambo

Ya solo, tosambelaka kaka te ntango toyoki bosenga moko ya bokasi ya molimo. Boye, ntango nini tosengeli kosambela? Mpe tosengeli kosambela mpo na nini? Eyano ya mokuse ezali ntango nyonso mpe mpo na likambo nyonso.

Nzambe Azali Tata na Biso ya Lola Koyebaka nyonso wana ekobongola lolenge na biso ya kosambela. Profeta Joseph Smith ateyaki: “Kozala na boyebi ya Nzambe, tokobanda koyeba lolenge nini kopusana pembeni na Ye, mpe lolenge ya kosenga mpo na kozwa eyano. … Ntango tobongami mpo na koya epai na Ye, Ye abongami mpo na koya epai na biso.”1

Tata na biso ya Lola azali ntango nyonso alengelami mpo na koyoka biso mpe alingi biso tosambela Ye ntango nyonso mpe mbala na mbala. Tosengeli “kozwa toli epai na Nkolo na makambo na [biso] nyonso” (Alma 37:37) mpe kosambela na ntongo, midi, mpe butu. Tosengeli kosambela na ndako, na mosala, na kelasi—bisika nyonso tokoki kozala mpe na bokasi na biso nyonso (tala Alma 34:17–26).

Tosengeli kosambela na kati ya mabota na biso (tala 3 Nephi 18:21). Tosengeli kosambela “na mongogno makasi mpe na kati ya [biso] mitema, katikati ya bato mpe na kobatama” (Malongi mpe Mayokani 81:3). Mpe “ntango [biso] tobeleli te epai ya Nkolo, [biso tosengeli] kotika mitema na [biso] mitondisama, mibendana libanda na losambo epai ya ye ntango nyonso mpo ya bolamu na [biso], mpe lisusu mpo ya bolamu ya bango baye bazali zingazinga na [biso]” (Alma 34:27). Mpe tosengeli ntango nyonso kosambela epai ya Tata na nkombo ya Yesu Klisto (tala 3 Nephi 18:19–20).

Elilingi
Joseph Smith lokola elenge mobali

Elilingi ya Joseph Smith na Walter Rane, ekoki kobandelama te.

Kopusana pene ya Tata na biso na Lola.

Tata na biso na Lola alingi kopambola biso. Mpe Ye akosala yango—soki tosengi. Profeta Joseph Smith ateyaki, “Bokundola ete na bozangi bosengi tokoki kozwa eloko moko te; na bongo, bosenga na bondimi, mpe bokozwa mapamboli oyo Nzambe alingi yemoko kopesa bino.”2

Mabondeli na biso ya ntango nyonso mpe ya mbala na mbala ezali eteni moko ya ntina ya lolenge moko ekoki ya bilei ya molimo mpo na milimo na biso ya nzala. Kosolola na Tata na Lola na nzela ya losambo ezali mpe eyambami malamu esika nyonso mpe ntango nyonso.

Moko ya makomi na ngai nalingaka mingi eteyi lolenge nini tosengeli kopusana epai ya Tata ya Lola ntango tofukami mpo na kosambela: “Bozala na komikitisa; mpe Nkolo Nzambe na bino akokamba bino na loboko, mpe akopesa bino eyano na nsambo na bino.” (Malongi mpe Mayokani 112:10). Ntango tomikisi mpe totosi, Tata na biso ya Lola akozala na biso. Akokamba biso na loboko. Akofula biso na esika wapi kokende mpe nini bakosala. Ye ako yanola bansambo na biso engebene na bolingi,nzela, ntango na Ye, mpe boyebi mpenza ya nini ezali malamu mpo na biso.

Tosengeli kokundola yango mpe kolinga mabaku ya kopusana na ngwende ya Nzambe mpe koyamba mapamboli na loboko na Ye.

Matangi

  1. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2011), 40.

  2. Teachings: Joseph Smith, 131.