Liahona
Kondimela Klisto yambo Ye Azonga Lisusu
Sanza ya minei 2024


“Kondimela Klisto yambo Ye azonga lisusu,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya minei. 2024.

Etinda ya sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya minei 2024

Yaloma

Kondimela Klisto yambo Ye Azonga Lisusu

Banefi bazalaki na bondimi yambo Mobikisi aya, mpe tokoki kozala na bondimi yambo Ye azonga lisusu.

Elilingi
Yesu Klisto kotalaka Banefi

Okanisa ata mokolo nini ekoki kozala lokola kondimela Mobikisi yambo Ye aya na mabele? Banefi ya kala basengelaka kosala kaka oyo—“kotalela liboso epai ya Masiya, mpe kondimala ye oyo akoya lokola soko azalaki kala ” (Yaloma 1:11).

Na mikolo oyo, tozali na makomi mpe masolo ekomami oyo etatoli ete Yesu Klisto azalaki, akufaki, mpe asekwaki lisusu. Tondimelaka na Mobikisi moko oyo asila koya. Kasi tondimelaka lisusu na Mobikisi oyo akoya lisusu.

Yambo Yesu Klisto Aya, Banedi Bazalakai na Bondimi ya:

Elilingi
Losambo ya Mokonzi Benjamin mpe mwasi na ye

Kolimbisama na masumu na bango.

“Moto nyonso oyo andimaki ete Klisto asengelaki koya, bango wana basengeli kozwa bolimbisi ya masumu na bango, mpe basepeli na esengo moko monene, lokola kutu ye asila koya kati na bango” (Moziya 3:13; nsete ebetami).

Elilingi
Enosa

Limbisa bangomoko.

“Mpe eyaki mongongo moko epai ya ngai, kolobaka: Enosa, masumu ma yo malimbisami. … Yango wana, elindo ya ngai esukwamaki nie. Mpe nalobaki: Nkolo, boniboni esalemi? Mpe alobaki epai ya ngai: Na ntina ya bondimi Na yo na Klisto, oyo mokolo moko te omona mpe oyoka. Mpe mibu mingi milekaki yambo amimonisa yemei na mosuni; … bondimi na yo ebikisi yo” (Enosa 1:5–8; nsete ebetami).

Elilingi
Yakobo azali koteya

Kosala bikamwa.

“Toyebaki Klisto, mpe tozalaki na elikya ya nkembo ya ye mibu nkama mingi yambo ya boyei bwa ye.… Na lolenge moko ete tokoki solo mpenza kotinda o nkombo ya Yesu mpe banzete mpenza ekotosa biso, to ngomba, to mbonge ya mbu” (Jacob 4:4, 6; nsete ebetami).

Elilingi
Moroni azali kokoma na bapalaki

Koyamba emoniseli

“Ezalaki mingi baye ya bango bondimi ezalaki makasi mpenza, kutu yambo Klisto aya, baye bakokaki te kobombama uta o kati ya elamba, kasi solo bamonaki na miso na bango” (Ether 12:19; nsete ebetami).

Yambo Yesu Klisto Aya Lisusu, Biso Tokoki kozala na Bondimi Na:

Kozala ya kolimbisama, kolimbisa bisomoko, kosala bikamwa, mpe kozwa emoniseli (lokola Banefi).

Elilingi
Elenge mobali azali koyemba na eklezia

Tomilengeli bisomoko mpo na Boyei na Ye.

Ntango toluki kobatela mayokani na biso epai ya Nzambe, tozali kominlengela mpo na kobika na bokonzi ya selesitiale. “Mpo tala, bomoi oyo ezali ntango mpo ya bato kolengele mpo ya kokutana na Nzambe; iyo, tala mokolo ya bomoi boye ezali mokolo mpo ya bato kosala misala ya bango” (Alma 34:32).

Elilingi
elenge mobali liboso ya tempelo

Lengela mokili mpo na Boyei na Ye.

Tobengisamaki na Mokambi Russell M. Nelson kozala moko ya “mosala monene na mabele”—bosangisi ya Yisalaele. “Tata na biso ya Lola abombaki ebele ya milimo na Ye ya lokumu—ntango mosusu, nakoki koloba,lisanga na Ye ya elikya—mpo na eleko oyo ya nsuka. Milimo ya lokumu wana—baye basani ya elikya, bilombe wana—ezali bino!”1

Elilingi
bilenge basi bazali koyambana

Kozala na elikya katikati ya bantango ya mpasi.

Ntango Mobikisi akoya lisusu, basembo bakobika na kimia. Mobikisi akokamba, mpe bozangi bosembo ekokoma sembo. “Mpo ete Nkolo akozala katikati na bango, mpe nkembo na ye ekozala likolo na bango, mpe akozala mokonzi mpe molobeli na bango” (Malongi mpe Mayokani 45:59).

Elilingi
bilenge basi

Botya elikya na Lisekwa.

Bato nyonso bakosekwisama. Tokozwa banzoto ya peto, ezanga bokufi. Tokoki lisusu komona balingami na biso oyo bakufa. “Molimo mpe nzoto ekosangana lisusu na lolenge na yango ebonga nie; enama mpe ekangisele lokola ekozongisama na lolenge ya yango mpenza, kutu lokola tozali na ntango oyo” (Alma 11:43).

Elilingi
Yesu Klisto Abimeli Banefi

Banefi ya kala bazalaki na bondimi na Mobikisi yambo Ye aya. Tokoki Kozala na bondimi ete Mobikisi akoya lisusu—ntango “[biso] tokomona [Ye] na mapata ya lola, alati nguya mpe nkembo monene” (Malongi mpe Mayokani 45:44; tala lisusu Misala 1:11) Lolenge nini boyebi ete Ye akoya lisusu ebongoli oyo yo okosala lelo oyo?

Litangi

  1. Russell M. Nelson, “Hope of Israelworldwide youth devotional, June 3, 2018), Gospel Library.