Yesu Klisto
Lipamboli ya Lipa


Lipamboli ya Lipa

O Nzambe, Tata wa Seko,
tozali kosenga yo na nkombo ya Mwana wa yo, Yesu Klisto,
opambola mpe osantisa lipa
liye mpo na milimo mya bango banso baye bakolia yango,
ete bakoka kolia yango na bokundoli bwa nzoto ya Mwana wa yo,
mpe batatola yo, O Nzambe, Tata wa Seko,
ete balingi kokamata likolo na bango nkombo ya Mwana wa yo,
mpe komikundola ye ntango inso
mpe kobatela mitindo miye apesaki bango
mpo ete bakoka ntango inso kozala na Molimo mwa ye elongo na bango.
Amene.