Yesu Klisto
Lipamboli ya Mayi


Lipamboli ya Mayi

O Nzambe, Tata wa Seko,
tozali kosenga yo na nkombo ya Mwana wa yo, Yesu Klisto,
opambola mpe osantisa mayi
maye mpo na milimo mya banso baye bakomela yango,
ete bakoka kosala yango na bokundoli bwa makila ma Mwana wa yo,
maye masopanaki mpo na bango; ete bakoka kotatola yo,
O Nzambe, Tata wa Seko,
ete bazali komikundola ye ntango inso,
ete bakoka kozala na Molimo mwa ye elongo na bango.
Amene.