2010–2019
Kanga Mpota na Bango
Sánzá ya Zómi 2013


Kanga Mpota na Bango

Nasambeli ete tokoka komilengela mpo na kopesa mosala ya bonganganzambe nyonso Nkolo akoki kotia liboso na biso na mobembo na biso ya bokufi.

Biso banso topambolami na mokumba mpo na basusu. Kozala na bonganganzambe ya Nzambe ezali kozala moyanoli na Nzambe mpo na bomoi ya seko ya bana na Ye. Yango ezali ya solo, yango ezali kitoko mingi, mpe ntango mosusu yango ekoki komonana ya kolekela.

Ezali na bakambi ya masanga makoki oyo bazali kolanda biso na mpokwa ya lelo oyo bayebi nini nalingi koloba. Awa ezali nini ekomaki na moko na bino. Ekokomaka na mingi na bino—mpe mbala mingi koleka mbala moko. Makambo mikemike ekoki kokesana, kasi ezalela ezali yango kaka moko.

Mpaka moko oyebi malamu te asengaki yo lisalisi. Awutaki koyeba été asengelaki kolongola mwasi na ye mpe bebe mobali ya moke lelo uta na ndako bazalaki kofanda mpo na esika mosusu mpembeni.

Ye mpe mwasi na ye basilaki kosenge moninga moko soki bakokaki kodefa motuka mpo na mokolo ya kolongala biloko na bango ya ndako mpe biloko na bangomei. Moniga adefisaki bango motuka. Elenge tata abandaki kotia nyonso bazalaki na yango na kati na motuka, kasi na mwa baminiti ya yambo, azwaki mpasi ya mokongo. Moninga oyo adefisaki motuka azalaki na mosala mingi mpo na kokoka kosalisa. Elenge tata ayokaki elikia kosila. Akanisaki na yo, mokambi ya lisanga likoki ya bampaka na ye.

Na ngonga asengaki lisalisa, ezalaki na ebandeli ya nsima ya nzanga. Ezalaki mokolo ya likita moko ya Eklezia na mpokwa. Osilaka kolaka kosalisa mwasi na yo na miango ya misala ya ndako mokolo wana. Bana na yo basengeki yo kosala likambo moko na bango, kasi okokisaki yango naino te.

Oyebaki lisusu ete bayi lisanga likoki na bino, mingimingi oyo baleki na botongono, oyo mbala mingi obengaka mpo na kosalisa, bazalaki lokola kozala na ngonga moko kaka ya nkaka oyo ozalaki..

Nkolo ayebaki olingaki kozala na mikolo ya boye ntango abengaki yo na esika oyo, bongo apesi yo lisolo moko mpo na kolendisa yo. Ezali lisese mpo na bazali na bonganzambe oyo mosala elekeli bango. Tokobengaka yango ntango mosusu lisolo ya Mosamalia ya malamu. Kasi ezali ya solo lisusu mpo na momemi bonganganzambe moko ya monene, na mikolo miye mya nsuka ya mpasi ya mosala mingi mpenza.

Lisolo ebongi mpenza mpo na mosali ya bonganganzambe oyo elekeli ye. Bobele kokundola ete ozali mosamalia mpe nganganzambe te, to molewi oyo alekaki mpembeni na moto azokaki.

Okoki kokanisa lisolo wana te ntango okutani na mikakatano ya boye. Kasi nasambeli okosala yango ntango mikolo ya boye ekoya lisusu, lokola yango esengeli ya solo kokoma.

Toyebisami te na makomi ntina nini Mosamalia azalaki kosala mobembo na nzela uta Yelusaleme ti Yeliko. Ezali te lokola azalaki kotambola ye moko zambi ayebaki ete miyibi bazalaki kozela bato bazanga keba. Azalaki na mobembo ya lokengo, mpe lokola ezalaki momesano, azalaki elongo na ye ebwele ya mokumba mpe mafuta mpe vino.

Na maloba ya Nkolo Mosamalia, ntango amonaki moto azokaki, mpamba te “azalaki na mawa.”

Mingi koleka bobele koyoka mawa, asalaki. Ntango inso mikundola makambo mikemike ya lisolo:

“Mpe [a]kendeki epai na ye, mpe akangaki mpota na ye, kosopaka mafuta mpe vino, mpe afandisaki ye na ebwele na yemei, mpe amemaki ye, mpe asalisaki ye.

“Mpe lobi ntango alongwaki, abakisaki mbongo, mpe apesaki yango na nkolo ndako, mpe alobaki epai na ye, Salisa ye; mpe oyo okofuta koleka, ntango nakoya lisusu, nakofuta yo.” 1

Yo mpe basimbi bonganganzambe bobiangemi mpo na kokamba bakoki kozala bobangi te misato. Yambo, Nkolo akopesa yo, soki osengi, mayoki ya mawa Ye akoyoka mpo na baye bazali na mposa. Ya mibale, akopesa basusu, lokola nkolo ndako, mpo na kosangana na yo na mosala na yo. Mpe ya misato, Nkolo, lokola Mosamalia malamu, akofuta mbano mingi koleka na banso oyo basanganaki na kopesa lisalisi na baye na mposa.

Yo mokambi ya lisanga likoki ntango mosusu osalaki na bobangi te wana mbala moko to koleka. Osengaki na basusu ya bonganganzambe ya Nkolo lisalisi, na bondimi ete bakoyanola na mawa. Obangaki te mpo na kotuna baye bayanoli mbala mingi na kala mpamba te oyebaki ete bakoyoka mawa na pete. Osengeki bango koyebaka ete na kala bayokaki bokabi ya Nkolo ntango baponaki kosalisa. Otunaki boko basilaki kozala na mikumba, koyebaka ete ntango libonza ezali monene, monene ekozala mbano bakozwa na Nkolo. Baye basalisaki na kala bayokaki botondi ya kofuluka ya Mobikisi.

Okokaki malamu kozala na bofuli te mpo na kosanga moto moko kosalisa na kotondisa na mpe kolongola na motuka wana. Lokola moyangeli oyebi bayi lisanga likoki mpe mabota na bango malamu. Nkolo ayebi bango malamu mpenza.

Ye ayebi mwasi ya nani azalaki penepene ya kolemba mpamba te mobali na ye akokaki te kozala na ngonga mpo na kosala nini azalaki na yango mposa esalema mpo na kosalisa bamposa na ye. Ye ayebi bana ninib akopambolama na komonaka tata bango kokende mbala mingi koleka moko mpo na kosalisa basusu to soki bana bazalaki na mposa ya koyoka ete basengeli na tata na bango mingi mpo alekisa ntango mingi koleka elongo na bango na mokolo wana. Kasi Ye ayebi lisusu ete nani azali na mposa ya libengisi mpo na kosalisa kasi akoki kozala ntango mosusu to moluki ya bolingi.

Okoki te koyeba bayi lisanga likoki na yo malamu mingi mpenza, kasi Nzambe ayebi. Yango wana, lokola osalaki mbala mingi, osambelaki mpo na koyeba nini kosenga mpo na kosalisa basusu. Nkolo ayebi nani akopambolama na kosengama mpo na kosalisa mpe libota ya nini ekopambolama na bosengama te. Yango ezali libimisi okoki kozela eya na yo ntango ozali kokamba na bonganganzambe.

Namonaki yango kokoma ntango nazalaki elenge mobali. Nazalaki mosungi ya yambo na lisanga likoki ya banganganzambe moko. Episikopo abengaki ngai mokolo moko na ndako na ngai. Alobaki ete alingaki ngai kokende elongo na ye mpo na kotala mokufeli mobali moko na bosenga makasi. Ye alobaki zali na mposa na ngai.

Ntango nazalaki kozela ye mpo na kokamata ngai na ndako na ngai, nazwaki mobulu. Nayebaki episikopo azalaka na basungi ya makasi mpe ya buanya. Moko azalaki zuzi moko ya koyebana. Mosusu akambaki kompani moko ya monene mpe alingaka nsima kokoma Mokambi moko Monene. Episikopo yemei alingaka mokolo mosusu kosala lokola Mokambi moko Monene. Ntina nini episikopo azalaki koloba na nganganzambe moko azanga ntoki, “Nazalaki na mposa ya lisalisi”?

Malamu, nayebi malamu mingi sikawa nini akokaki koyebisa ngai: “Nkolo azali na mposa ya kopambola yo.” Na ndako na mwasi akufela mobali, namonaki ye koyebisa mwasi ete akozwa lisalisi ya Eklezia te kino akokotondisa mokanda ya mosolo atikelaki ye na mokolo elakaki. Na nzela ya ndako asekaki na bosutuki na ngai mpe alobaki, “Hal, ntango akososola kosalela mosolo na ye akokoka kosalisa basusu.”

Na libaku mosusu, episikopo akamataki ngai elongo na ye na ndako ya baboti ya molangwa oyo batindaki bana basi mibale ya mike ya kobanga mpo na kokutana na biso na ekuke. Nsima atalaki bilenge basi mibale wana, abalukaki mpe alobaki na ngai, “Tokoki kobongala naino te mobomano na bango, kasi bakoki koyoka ete Nkolo alingi bango.”

Na likambo kosusu akamataki ngai na ndako ya moto moko oyo ayaki na eklezia te mpo na mibu. Episikopo alobaki na ye boni alingaki ye mingi mpe boniboni palwasi ezali mingi na mposa na ye. Emonanaki lokola esalaki eloko te na moto wana. Kasi ngonga wana, mpe mbala nyonso episikopo akamataki ngai elongo na ye, mpe asalaki eloko mpenza na ngai.

Ezali na nzela moko te ete nakoka koyeba soki episikopo asambelaki mpo na koyeba nganganzambe nini akopambolama na kokendaka na ngai na babotali wana. Akokaki kozwa banganganzambe misusu elongo na ye mabala mingi. Kasi Nkolo ayebaki nalingaki kozala mokolo moko episikopo moko kobengisaka baye bandima na bango bakoma malili mpo na kozonga na moto ya nsango malamu. Nkolo eyebaki nalingaki mokolo moko kozala na mosala na mokumba ya bonganganzambe mpo bankama mpe kutu bankoto ya bana ya Tata ya lola oyo azalaki na mposa ya ntango..

Bino bilenge babali bokoki te koyeba misala nini ya mosala ya banganganzambe Nkolo azali kolengela kopesa bino. Kasi momekano monene mpo na mosimbi bonganganzambe nyonso esali kopesa lisalisi ya molimo. Biso banso tozali na mosala wana. Eyei na kozalaka moyi lisanga likoki moko. Eyei na kozalaka moyi libota moko. Soki bondimi ya moto moko na lisanga likoki na bino to libota na bino bobundisami na Satana, okoyoka mawa. Mingi lokola lisalisi mpe boboto epesamaki na Mosamalia, lisusu okosalisa bango na mafuta ekobikisaka mpo na bampota na bango na ngonga ya mposa.

Na mosala lokola misionele ya ntango mobimba, bokokenda na bato nkoto na mposa monene ya molimo. Mingi, kino boteyi bango, bakoyeba kutu te ete bazali na mpota ya molimo oyo, soki nkisi te, ekomeme bobola ezanga nsuka. Okokende na etinda ya Nkolo mpo na kosalisa bango. Bobele Nkolo akoki kokanga bampota ya molimo ntango bandimi makuli maye makambi na bomoi ya seko.

Lokola moyi lisanga likoki, lokola moteyi na ndako, mpe lokola misionele, bokoki kosalisa bato te kobongisa mbeba ya molimo longola se soki bondimi na yo ezali makasi. Yango elingi koloba mingi koleka kotanga makomi mbala na mbala mpe kosambela likolo na yango. Losambo na ngonga mpe ya likololikolo na makomi ezali te bolengeli ekoki. Bondimi lisusu ete nini okozala na yango mposa ekoya na toli uta na eteni84 ya Doctrine et Alliances: “Kotiaka te likanisi liboso nini okosala; kasi kotondisaka na moyele na yo na bokobi maloba ma bomoi, mpe ekopesamela yo na ngonga wana mpenza eteni wana oyo ekoki mpo na moto nyonso.” 2

Elaka eye ekoki bobele kosengama kaka soki biso “totondisi” maloba ya bomoi mpe tosali yango na bokobi. Eteni ya kotonda ya makomi elingaki koloba mpo na ngai eloko na koyokaka likambo etali maloba. Na ndakisa, ntango tokei komeka kosalisa moto moko kotepatepaka na bondimi na ye etali libiangi ya bonzambe ya Profeta Joseph Smith, mayoki mazongaki na ngai.

Ezali te maloba uta na Buku ya Mormon. Ezali liyoki moko ya bobangi te ya bosolo oyo ekoya ntango inso ntangi mwa mokoloto ya Buku ya Mormon. Nakoki kolaka bino te ete ekoya na moto nyonso ayingalami na ntembe etali Profeta Joseph to Buku ya Mormon. Kasi nayebi Joseph Smith azali Ptofeta ya Bozongisi mpe nayebi été Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe.mpo ete nabombi yango

Nayebi na mayele ete bokoki kozwa bondimi ya sikisiki ya bosolo uta na Molimo mpamba te eyaki na ngai. Bino mpe ngai tosengeli kozala na bondimi ya sikisiki wana yambo Nkolo atia biso na Nzela ya moto ya mobembo tokolingaka oyo azokisamaki na banguna ya bosolo.

Ezali na bolengeli bosusu tosengeli biso kosala. Ezala lolenge ya moto kokoma makasi na bampasi ya basusu. Yango ezali ntina nini Mobikisi akendeki na bolai boye mpo na kolobela Bomikabi na Ye mpe ya Ye bozwi likolo na Ye bampasi mpe mawa ya banso ya bana ya Tata na biso na lola ete Ye akoka kobikisa bango.

Ata basimbi bonganganzambe ya bokufi ya bolamu mingi ya Tata ya lola koleka bakobutaka te na ndeko wana ya mawa na pete. Lolenge na biso ya bato ezali kozanga bompikiliki na moto oyo akoki te komona bosolo oy ezali polele mpo na biso. Tosengeli kosala na bokebi ete bozangi bompikiliti na biso elimbolama lokola bokweyisi to bobwakisi.

Ntango tomilengeli kopesa lisalisi mpo na Nkolo lokola basali ba Ye ya bonganganzambe na Ye, ezali na likomi moko mpo na kokamba biso. Mosamalia Monene azalaka na likabo. Tosengeli na yango, mpe Nkolo alobeli biso ndenge nini tokoki kozwa yango:

“Yango wana, bandeko babali ba ngai, soko bozangi lolango, bozali eloko te, mpo lolango lolembi mokolo moko te. Yango wana, kangamani epai ya lolango, loye lozali lonene mingi koleka inso, mpo biloko binso bikolembe—

“Kasi lolango lozali bolingi bwa peto bwa Klisto, mpe botii molende libela; mpe oyo amononi kozalaka na lango o mokolo mwa nsuka, ekozala bolamu na ye.

“Yango wana, bandeko balingami ba ngai, sambelani epai ya Tata na makasi manso ma motema mwa biso, ete bokoka kotonda na bolingi boye, boye apesi epai ya baye banso bazali balandi ba solo ba Mwana Mobali wa ye, Yesu Klisto; ete bokoka kokoma bana babali ba Nzambe, ete ekobima ye tozala bo ye, mpo tokomono ye lokola azali; ete tokoka kozala na elikia eye; ete topetolama, kutu lokola azali peto.”3

Nasambeli ete tokoka komilengela mpo na kopesa mosala ya bonganganzambe nyonso Nkolo akoki kotia liboso na biso na mobembo na biso ya bokufi. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.