2010–2019
Biloko Mike mpe ya Mindondo te
Sánzá ya Zómi 2013


Biloko Mike mpe ya Mindondo Te

Tika biso tosalisa basusu na bondimi mpe bolingo.

Bandeko na ngai mibali mpe basi ya bolingo, kaka mwa baposo eleki nazalaki na ndako ya boteyi misionele na Mexico City mpo na kokabola etinda elongo na bamisionele. Mwasi na ngai mpe ngai tokomaki na ntina bangonga mingi liboso. Wana ezalaki biso kotala malamu bilanga mike kitokoto mpe babalabala ebatelami malamu ya NBM. Tokokaki te komona te yango tomonaki esengo oyo ezalaki kongenge uta na bilongi ya bankama ya bampaka mpe basi ya bilenge misionele, moko na moko ya komipesa na bozwi mayela ya mosala ya lokota ya sika mpe koyekolaka kokumisa ntina na ye lokola misionele.

Wana etelemaki ngai mpo na kokota na mozindo ya likambo kitoko oyo, namikundolaki maloba ya Alma ntango atindaki mwana na ye ya mobali Elamani abatela lisolo ya bato na ye lokola eteni ya nkoma oyo epesamelaka ye mpe kobatela biloko nionso bule mpo ete elinga mokolo moko ekende na bikolo, mabota, nkota, mpe bato nionso.

Alma nsima alobelaki ye:

“sikawa okoki kobanza ete eye ezali liboma na ngai; kasi tala nalobi epai na yo, ete na biloko bike mpe ya mindondo te makambo manene makomemama masalema; mpe nzela ike mbala mingi ikobulunganisa moto ya bwania.

“Mpe Nkolo Nzambe akosalaka na nzela mpo na komema pembeni mwango na ye monene mpe ya seko; mpe na nzela ike mpenza Nkolo akobulunginisaka moto ya bwania mpe akomema mpembeni lobiko na milimo mingi” (Alma 37:6–7).

Bosali mingi ya bamisionele na biso elakisi lolenge ya Nkolo—ete baoyo bamikitisi bakoki “kobengisa basusu baya epai ya Klisto na kosalisaka bango bazwa nsango malamu ezongisani na nzela ya bondimi na Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye, boyamboli, libatisi, kozwaka likabo ya Molimo Monsantu, mpe kotiaka molende kino na suka” (Prechez mon Evangile: Un Guide pour le Service Missionnaire [2004], 1).

Lokola Bandimi ya Eklezia, tozali na makoki, na nzela ya biloko ya mike mpe ya mindondo te ya bisomei, mpo na “[kondimisa] mingi libosani ya nzela na bango” mpe kosalisa komema “bango na boyebi ya Nzambe na bango mpo na lobiko ya milimo na bango” (Alma 37:8).

Na libaku moko nakendeki elongo na mokambi moko ya likonzi mpe episkopo kotala mondimi moko ya mosala moke. Toteyaki ye, na lolenge moko ya pete, na ntina ya mapamboli ya sabata, Tolobelaki ye na bolingo na biso ya bosembo. Ayanolaki, “Nionso nazalaki na yango mposa esengelaki moto moko aya mpe apesa ngai abrazo,” to mbote. Na mbala moko natelemaki mpe nayambaki ye. Moko elandaki ezalaki eyenga. Ndeko mobali kaka oyo ayaki na likita ya elambo elongo na libota na ye mobimba.

Na bokeyi moko ya boteyi mpe botali, Martha, mondimi moko ya paloasi na biso, ayebisaki mwasi na ngai mpe moninga na ye mokolo moko te bazonga lisusu. Akanaka kotika koyaka na eklezia. Moko ya bateyi mpe batali atunaki Martha soki bakokaki koyemba nzembo moko elongo na mbala moko ya nsuka oyo, mpe andimaki. Wana ezalaki bango koyemba, likambo moko ya ndenge esalamaki. Mokemoke, Molimo ebandaki kotonda na lisuku. Moko na moko na bango ayokaki yango. Motema ya Martha ebandaki kolemba. Na miso na ye etonda na mpizoli, alobaki na bateyi mpe batali na ye mayoki ya motema na ye. Na ngonga wana, asosolaki ete ayebaki ete nsango malamu ezalaki solo. Atondaki sikaswa bateyi mpe batali na ye mpe alobaki mposa na ye mpo na bango bazonga. Uta na mokolo wana tii nsima, azalaki koyamba bango na esengo.

Martha abandaki kokende na eklezia elongo na mwana na ye ya mwasi ya leki. Mpo na mibu mingi bazalaki kokende mbala na mbala, na Martha mokolo moko te abungisaki elikya ete mobali na ye akokaki na nsuka kosangana na bango. Na nsuka mokolo ekomaki ntango Nkolo asimbaki motema na ye, mpe abandaki kokende elongo na bango, lokola esalaki bana ba bango misusu ya basi noki nsima. Libota oyo ebandaki koyoka esengo ya solo oyo eyaka uta na kozalaka mapamboli ya nsango malamu na libota na bango. Martha asali uta wana na botongono lokola mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi ya paloasi na biso, mpe mobali na ye asali malamu na mabiangi mingi na likonzi. Nionso oyo ebandaki na boyembi nzembo, likambo moke mpe ya pete oyo esimbaki motema ya Martha.

Namana azalaki mokolo na basoda ya bapaya ya mokonzi ya Sulia, moto ya lokumu, moto ya nguya na motuya, kasi azalaki lisusu moto na mbala (tala 2 Mikonzi 5:1). Nsima ya kozalaka molongi te na kozwaka nkisi uta na mokonzi ya Yisalaele mpo na mbala na ye, Namana akendeki na ndako ya Elisa, mosakoli. Elisa atindelaki ye ntoma, kolobaka:

“Kenda kosukola na Yaladene mbala nsambo mpe nzoto na yo ekobika mpe ekozala mpeto.

“Nde Namana ayokaki nkanda mpe alongwaki, ye ete, Natangi ete akoya solo epai na ngai, mpe akotelema, mpe akobianga nkombo na Yawe Nzambe na ye, mpe akotia loboko na ye na esika na mbala, mpe akobikisa yango. …

“Nde baumbu na ye babelemaki, balobaki na ye ete, Tata na biso, soko mosakoli alobaki na yo ete osala likambo monene, yo osali yango te? Na koleka, soko alobi na yo ete, Sukola mpe akopetwa!

“Boye akitaki mpe asukolaki na Yaladene mbala nsambo lokola nzoto na ye ekomaki lisusu lokola nzoto ya mwana moke, apetwaki ” (2 Mikonzi 5:10–11, 13–14).

Profeta na biso, Mokambi Thomas S. Monson, akebisi biso banso tokende mpe tobikisa bandeko na biso mibali mpe basi. Alobaki: “Mokili ezali na mposa ya lisalisi na bino. Ezali na makolo ya kosunga, maboko ya kosimba makasi, mayele ya kolendisa, mitema ya kofula, milimo ya kobikisa. Mapamboli ya seko ezali kozela bino” (“To the Rescue,” Ensign, sanza ya mitano2001, 48; to Liahona, sanza ya sambo 2001, 57).

Natatoli ete mingi ya baoyo bazali na mposa ya lisalisi na biso bazali kuna kozelaka biso. Babelemi mpo na bandeko na bango bilombe mibali mpe basi basalisa bango mpe babikisa bango na nzela ya biloko mike mpe ya mindondo te. Nalekisi ngai moko ngonga mingi kokende kotalaka bandimi ya Eklezia ya mosala moke oyo mitema na bango misili kokomisama pete na Nkolo, oyo sikawa babelemi mpo na koyamba matatoli na biso mpe maloba na biso ya bosembo ya bolingo. Ntango tosali mpe tobengisi bango, bakozongela Eklezia na kotatabana te.

Tika biso tosalisa basusu na bondimi mpe bolingo. Tika biso tomikundola elaka ya Nkolo:

“Mpe soki ezali ete osengeli kosala mikolo na yo nionso na kongangaka boyamboli na bato oyo, mpe omemi, ata molimo moko epai na ngai, boni monene esengo na yo ekozala elongo na ye na bokonzi ya Tata!

“Mpe sikawwa, soki esengo na yo ekozala monene elongo na molimo moko oyo omemi epai na ngai na bokonzi ya Tata na ngai, boni monene ekozala esengo na yo soki osengeli komema milimo mingi epai na ngai!” (D&C 18:15–16).

Natatoli na ntina ya bolingo ya Nkolo epai ya bana na Ye banso. Nayebi Ye azali na bomoyi mpe ete Ye azali Mosikoli na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.