2010–2019
Likita Linene: Kolendisa Bondimi mpe Litatoli
Sánzá ya Zómi 2013


Likita Linene: Kolendisa Bondimi mpe Litatoli

O, boni tozali na mposa ya likita linene! Na nzela ya makita bondimi na biso elendisami mpe matatoli na biso eye mozindo.

Matondo, Mokambi Monson, mpo na boteyi mpe ndakisa na yo ya mosala ya Boklisto mpe mokumba na yo mpo na biso banso tozala misionele. Tozali kosambela ntango nyonso mpo na yo.

Na eleko na biso, Mobikisi Yesu Klisto alobelaki bosangani ya Basantu lokola “likita linene na ngai.”1

Bisika nyonso tozali na mokili oyo, lolenge nyonso toyambi misala oyo, natatoli ete tosangani kati na na Yelikita. Natatoli ete tokoyoka liloba na Ye, mpo Ye alobi, “Atako na mongongo na ngaimei to na mongongo ya basali na ngai, ezali ndenge moko.”2

Makita ezali ntango nyonso eteni ya Eklezia ya Yesu Klisto ya solo. Adama asangisaki bana na ye mpe asakolaki na ntina ya makambo ekoya. Mose asangisaki bana ya Yisalaele mpe ateyaki bango mitindo oyo azwaka. Mobikisi ateyaki ebele oyo basanganaki na Mabele Esantu mpe na mokili ya Amerika lokola. Petelo asangisaki bandimi na Yelusaleme. Likita linene ya yambo na mikolo ya nsuka eyokanamaki kaka sanza mibale nsima Eklezia ebongisamaki, mpe Makita makobi tii na mokolo ya lelo.

Makita oyo ezali ntango nyonso na nse ya boyangeli ya Nkolo, ekambami na Molimo na Ye.3 Topesami mokumba ya makambo ya ndenge te. Na baposo mpe basanza, mbala mingi na babutu ezanga mpongi, tozali kolela Nkolo. Na nzela ya kokilaka, kosambelaka, koyekolaka, mpe kokanisaka, tozali koyekola etinda oyo Ye alingi biso topesa.

Boko bakoki kotuna, “Mpo na nini bofuli eyaka na pete mpe nokinoki te?” Nkolo ateyaki Oliver Cowdery, “Osengeli oyekola yango na molimo na yo; nsima osengeli kotuna soki ezalaki malamu.”4 Bitinda ya likita eyelaka biso nsima ya bomilengeli na losambo, na nzela ya Molimo Mosantu.

Libongisi oyo ezali solo mpo na bandimi banso ya Eklezia wana ezali biso komilengela mpo na kosala elongo na makita ya palwasi, ya likonzi, mpe monene. Toyekoli na milimo na biso maye tosengeli mpe tozali na yango na mposa uta Tata na Lola, mpe tosambeli mpo na kososola mpe kosalela maye oyo toteyami. Ntango ngonga ya likita ezali koya, tobonzeli milulu misusu, “kotia [ka] mpembeni makambo ya mokili oyo, [mpo na] koluka makambo ya ntina malamu koleka.”5 Nsima tosangisi mabota na biso mpo na koyoka liloba ya Nkolo, lokola bato ya Mokonzi Benyamina basalaki.6

Bana mpe bilenge balingaka bakotisama na kati. Tosalaki libunga monene soki tokanisi ete likita ezali likolo ya mayoki ya mayele mpe molimo na bango. Na bandimi ya bilenge ya Eklezia, nalaki ete soki bokoyoka, bokoyoka Molimo malamu kati na bino. Nkolo akolobela bino maye Ye alingi bino bosala na bomoi na bino.

Na makita tokoki kozwa liloba ya Nkolo oyo etindami se mpo na biso. Mondimi moko atatolaki: “Wana ezalaki Ngai koyoka lisikulu na yo, Natikalaki monoko polele. … Lisikulu na yo ezalaki libimisi ya moto se moko ewuti mbala moko na Nkolo mpo na libota na ngai. Namona naino te malakisi ya Molimo kati ya bomoi na ngai lokola baminiti wana ntango Molimo Mosantu elobaki mbala moko na ngai.”

Mosusu alobaki, “namiyoki naino te liboso na mozindo mpenza ete lisikulu ezalaki kopesama na ngai.”

Oyo ezalaki kosalema mpamba te Molimo Mosantu amemaka liloba ya Nkolo na mitema na biso na lolenge tokoki kososola.7 Ntango nabandaki kokoma na likita, nabandaki kokoma ntango nyonso malamu te maye molobi azali koloba; nakomaki boyangeli ya ngai moko oyo Molimo azali kopesa ngai.

Maye malobami ezali ya motuya te lokola maye toyoki mpe maye tosimbi.8 Yango wana tosalaka makasi tosala likita na esika wapi mongongo ya kimia, ya moke ya Molimo ekoki koyokama, kosimbama, mpe kososolama na polele.

O, boni tozali na mposa ya likita linene! Na nzela ya Makita bondimi elendisami mpe matatoli na biso eyesami mozindo. Mpe ntango tobongwani, tolendisami mpo na kotelema makasi koyamba mwa mipanga ya moto ya mikolo ya nsuka.9

Na bazomi ya mibu kala te Eklezia ebatelami mingi na koyokana malamu te mpe minioko oyo Basantu ya ebandeli bakutanaki na yango. Ekozala ntango nyonso bongo te. Mokili ezali kotambola mosika na Nkolo na lobango mpe mosika koleka esalema naino liboso te. Bonguna elembisami likolo ya mabele. Tozali kotala, koyoka, koyekola, mpe kokabola maloba ya baprofeta mpo na kokebisama mpe kobatelema. Mpo na ndakisa, “Libota: Esakola na Mokili” epesamaki kala liboso tomona mikakatano oyo sikawa libota ezali kokuta. “Klisto ya Bomoi: Litatoli ya Bapostolo” elengelamaki yambo na ntina ya ntango tokozala na mposa na yango mingi mpenza.

Tokoki koyeba bantina nyonso oyo baprofeta mpe balobi ya Makita balobelaka biso na makambo moko boye na likita te, kasi Nkolo ayebi. Mokambi Harold B. Lee ateyaki: “Kimia moko tozali na yango lokola bandimi ya Eklezia oyo ezali … kosala keba na maloba mpe mitindo oyo Nkolo akopesa na nzela ya profeta na Ye. Ekozala na mwa makambo oyo ekosenga bompikiliki mpe bondimi. Okoki te kolinga maye mawuti na bakonzi ya Eklezia. Ekoki kotelemela baemoneli ya [moto se moko] na yo. Ekoki kotelemela baemoneli ya bato na yo. Ekoki kobundisama elongo na mwa bomoi na yo na bato. Kasi soki ozali koyoka makambo oyo, lokola soki kowuta na monoko ya Nkolo Yemei, na bompikiliki mpe bondimi, elaka ezali ete ‘bikuke ya lifelo ekokangama mpo na yo te; … mpe Nkolo Nzambe akopanza banguya ya molili liboso na yo, mpe kosala ete balola eningana mpo na bolamu na yo, mpe nkembo ya nkombo na ye’ (D&A 21:6).”10

Lolenge nini Mokambi Lee ayebaki maye tokozala kokutana na yango na mokolo na biso? Ayebaki mpamba te azalaki profeta, momoni, mpe mobimisi. Mpe soki tozali koyoka mpe kotosa baprofeta sikawa, kosangisaka baoyo bakoloba na likita oyo mpenza, tokolendisama mpe kobatelema.

Mapamboli minene ya likita linene eyelaka biso ntango likita esili. Mikundola ndakisa ekomami mbala mingi na makomi: tosangani mpo na koyoka maloba ya Nkolo, mpe tozongi na mabota na biso mpo na kotia yango na bomoi na biso.

Nsima Mokonzi Benyamina koteya bato na ye, “apanzaki ebele, mpe bazongaki, moko na moko, engebene na mabota na bango, o ndako ya bangomei.”11 Na mokolo na ye, Mokonzi Limyi asalaki eloko moko.12 Nsima ya koteyaka mpe kosalaka epai ya bato na tempelo na Bountiful, Mobikisi abondelaki bato, “Bozonga epai na bino, bokanisa maloba nayebisi bino mpe bosenga na Tata, na nkombo na ngai, bokasi ya koyeba mpe kobongisa mitema mpo lobi nakoya lisusu epai na bino.”13

Tondimi libengisi ya Mobikisi ntango tokanisi mpe tosambeli mpo na koyeba maye toteyami mpe nsima kokende liboso mpe kosala bolingi na Ye. Bomikundola maloba ya Mokambi Spencer W. Kimball: “Nabongoli motema na ngai ete ntango nakokende ndako uta na likita [linene] oyo… ezali na bisika ebele, ebele na bomoi na ngai oyo nakoki kobongisa nie. Nasali molongo na yango na moto, mpe nazali kozela kokende mosala nokinoki wana ezali ngai kotanga.”14 Mokambi Monson kala te alobaki: “Nalendisi bino botanga masikulu … mpe bokanisa na ntina ya bitinda oyo ezwami na kati. Namoni na bomoi na ngaimei ete nazwi kutu mingi uta masakoli efulama ntango nazali koyekola yango na mozindo makasi koleka.”15

Na kobakisa na kobengisaka biso tozala na boyekoli makomi ya moto se moko mpe ya libota, Tata na Lola alingi biso toyekola mbala na mbala mpe tosalela maye toyekoli na likita. Natatoli ete baoyo batii elikia na bango na Nkolo mpe basaleli toli oyo na bondimi bakozwa bokasi monene mpo na komipambola mpe mabota na bango mpo na bankola ekoya.

Tata na Lola apesi nzela. Na likita oyo, 97 likolo ya nkama ya Eklezia ekoki koyoka bitinda oyo na nkota na bangomei. Bamilio ya bandimi na bikolo 197 bakotala likita oyo na nkota 95. Na mikolo kaka mibale to misato bitinda ekobima na LDS.org na Angele, mpe na poso moko ekobanda kozwama na nkota 52. Sikawa tozali kozwa bazulunale ya Eklezia eniatami na baposo misato ya likita linene. Lisusu te tosengeli mpenza kozela basanza mpo ete masikulu eyela na nzela ya mikanda. Na ordinatele, to biloko mususu ya lotiliki, tokoki kotanga, koyoka, kotala, mpe kokabola mateya ya baprofeta. Ata ntango nini, ata bisika nini, tokoki kotandola boyebi na biso, kolendisa bondimi mpe litatoli na biso, kobatela mabota na biso, mpe kokamba mango na kimia na ndako.

Bitinda ya likita oyo ekokende lisusu na pologalami ya bilenge na Iterneti. Baboti, bokoki kokota na mateya ya bilenge mpo na binomei na LDS.org. Bozwa maye bana na bino bazali koyekola, mpe bosala yango makambo ya boyekoli ya binomei, bosololi na libota, makita ya libota na mpokwa, masanga ya libota, mpe masolo ya moto se moko elongo na moko na moko ya bana na bino oyo etali maye basengeli koteyama moto na moto.

Nalendisi bandimi banso basalela banzela nyonso na bawebsite ya Eklezia mpe batelefoni. Ezali kokoba kokomisama malamu mpo ete ezala pete koleka mpo na kosalela mpe ntina koleka na bomoi na biso. Na LDS. Org bokokuta banzela mpo na kosalisa bino boyekola nsango malamu, bolendisa ndako mpe libota na bino, mpe bosala na libiangi na bino. Bokoki lisusu kokuta bankoko na bino oyo basengeli na makuli ya tempelo banzela mpo na kosunga bino na mosala ya lobiko, kosangisaka bokaboli nsango malamu. Baboti bakoki kozwa bokambi na kolengelaka bana na bango mpo na libatisi, bonganganzambe, bamisio ya ntango mobimba, mpe tempelo. Bakoki kosalisa biso kotambola na nzela eke mpe kaka ya makuli mpe mayokani mpe malamu ya tempelo mpo na lipamboli ya bomoi ya seko.

Na likita ya nsuka ya sanza ya minei, na likita linene ya bonganganzambe, nalobaki na ntina ya tata na ngai koyemaka elilingi ya soda alati ebundeli mpo na koteya ngai na ntina ya bolati bibundeli nyonso ya Nzambe mpe bobateli ya molimo ememaka.

Nsima ntango liyangani wana esilaki, tata moko alobaki na libota na ye maye ayekolaka. Ya kofulama, mwana na bango ya elenge mobali Jason alukaki LDS.org mpo amiyokela etinda yango. Mwa mikolo nsima abimaki na likita ya libota na mpokwa mpo na kokabola liteya yango elongo na bandeko na ye mibali mpe basi. Ye oyo.

Elilingi
Jason

Etinda ya likita moko ya pete, efulama ya Nkolo, eyambamaki na mwana moko, eteyamaki na libota na lolenge ya moto se moko, ya nguya. Nalingi linzanza ya tolo na ye ya bosembo. Nalingi nguba na ye ya bondimi mpo na kotelemela mwa mimpanga ya moto ya monguna. Oyo ezali mampamboli ya likita.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, napesi litatoli na ngai ya ndenge ete Nkolo Yesu Klisto azali na bomoi mpe atelemi na moto ya Eklezia oyo. Oyo ezali likita linene na Ye. Nalaki bino na nkombo na Ye ete soki bosambeli na mposa ya bosembo ya koyoka mongongo ya Tata na Lola na bino na bitinda ya likita oyo, bokomona ete Ye alobi na bino mpo na kosalisa bino, kolendisa bino, mpe kokamba ndako nabino na miso na Ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.