2010–2019
Lokola kopo epasuka
Sánzá ya Zómi 2013


Lokola Kopo Epasuka

Lolenge nini boyanolaka malamu tango makanisi to mikakatano ya mokili etungisaka bino to baye bolingaka?

Apostolo petelo akomaki ete bayekoli ya Yesu Klisto basengeli kozala na mawa ya moko na moko. ”1 na molimo wana nasepeli koloba na baye bazali na maladi ya moto to mikakatano ya makanisi, atako maladi maye mazala pete to makasi nabomoi na bino. Tozali na biyamo ebele tango toyokaka minganga koloba misisa ya moto to liboma, ya malady ya jene mpe maladi ya kolomozome, ya bipolarite, paranoia, mpe shizofenia. Nzoka nde maye manso makoki kozala mingi mikakatano ya makambo ya bomoi ya nkufa, yango esengelite kozala na nsoni na boyebi yango koleka boyebi ya bitumba ya maladi ya motema to litutu ya moke.

Naboluki kimia mpe liyebi na mikakatano miye, ezali ntina makasi kokundola ete tozali kozala—mpe kopona kozala—na mokili ya bokweyi wapi mpona ntina ya bonzambe bolandi nabiso ya bondimi ekozala komekama mpe komeka lisusu mpe lisusu. Bobangite na moango ya Nzambe ezali oyo Mobikisi elakelamaki, Mosikoli, oyo ateyaki bondimi nabiso Na Ye akomatisa biso kati na nkembo likolo ya mimekano oyo mpe bisambisi, atako makasi ya kosala yango ezangi mpona bango mibale Tata oyo atindaki Ye mpe na Mwana oyo ayaki. Ezali kaka mpona bolingo oyo ya bonzambe nde toko lembisa mpasi ya yambo ya bomemi, koleka bososoli, mpebosikoli ya suka.

Botika ngai koleka maladi makasi maye nasili kotanga natala MDD—“Troble Depressif Majeur”—to, mingimingi koleka, “Kolembe nzoto.”Tango nalobeli yango, nalobi na ntina ya suki mabe ya mikolo minsote, bofuti mpako, to tango mosusu ya bolembisi tozalaka nango. Moto nionso akozala motema likolo mpe kosisoa tango moko. Buku ya Molomoni elobi Ammon mpe bandeko na Ye ya mibali basisolamaki na ntango ya mpasi,2 mpe nayango misu kati nabiso bakoki kozala boye. Kasi lelo nazali koloba nantina ya eloko moko ya motuya, mokakatano ya makasi lolenge boye ekopekisa na moto kowza bokasi ya kosala na bofuluki, libulu kati ya makanisi etimoka oyo ezali nkokoso moto mokote akoki koloba ete akokende mosika soki mozwi likama aningisi mapeka mpe kokanisa malamu—atako nazali makasi mpona kotia mapeka na ngwi mpe kokanisa malamu!

Te, molili eye ya botu ya makanisi mpe ya molimo ezali makasi koleka bolembu. Namomaki yango koya na moto anzelu tango molongani na Ye ya mibu Ntuku mitano akufaki. Namonaki yango epai ya bamama bilenge babengami malamu“after-baby blues.” Namonaki yango kobundama na bayekoli, basoda ya kala, mpe nkoko ya mwasi alemba mpona bokoli malamu ya bana na bango ya mikolo.

Mpe namonaki yango na Batata bilenge baye bazali koluka bozali malamu ya mabota mabango. Nayango na monaki mbala moko kati nangai. Ngonga mosusu na bomoi nabiso ya libala tango mosolo bokutani ya mosolo na bolembu makasi ekomi kobangisa biso, Nazwaki mopepe ya kososola ete ezalaki libaku yakoloba ezali solo. Na ngolu ya Nzambe mpe bolingo ya libota na ngai, natikalaki mpiko kati na mosala, kasi atako nsima ya bambula eye nazokoba koyoka sembo mpona basusu koleka makasi to baye batukami na mawa koleka nalolenge ya mpasi eye nazalaki nango. Nayango banso tozwi bokasi kowuta epai baye, na maloba ya profeta, “koluka[ki] …mpe kosepela[ki] na molili makasi”3 mpe koyika mpiko kino yango—te na boke ezalaki Abraham Lincoln, Winston Churchill, mpe Mpaka George Albert Smith, moto yasuka ya sembo mpe na ezaleli ya Klisto ya eleko nabiso, oyo balukaki na bokasi mwa bambula ebele yambo akoma kala te profeta ya moambe mpe Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya basantu ya mikolo mia nsuka.

Kasi lolenge nini yo oyanolaka malamu tango makanisi to mikakatano ya mokili etungisaka bino to baye olingaka? Likolo ya nyonso, bobungisa kondima nabino na Tata wa likolote, oyo alingaka bino mingi koleka makanisi nabino. Lokola Mokambi Monson alobaki na Lisanga ya Bamama basungi nalonge ya malamu poso eleki nasima ya nzanga: “Bolingo wana ekoki kobongwamate. …Ezali wana mpona bino natango ya mawa to ya esengo, kolemba to elikia. Bolingo ya Nzambe ezali wana mpona bino atako bokoyoka ete ezali yabino[yango]. Ezali pete tango nionso wana.”4 botiya ntembe na yango atako mokete, mpe botiya mitema makasite. Botosi nakolandaka misala ya mpiko oyo ekomeka Molimo ya Nkolo na bomoi na biso. Boluka mateya ya baye na bafolongola nantina ya molimo ya bomoi na bino ya malamu. Tuna mpe luka mapomboli ya Bonganganzambe. Zwaka elambo mposo yonso, mpe simba nalombango na bilaka esantu ya bomikabi Yesu Klisto. Likya na makamuisi. Namonaki yango mingi koya tango maloba mosusu elingaki kolobama ete elikya ebungi. Elikya ezalite kobungisa. Soki makamwisi oyo eye nalombangote to efuluka to emonanate nionso, kundola ndakisa ya mikakatano ya Mobikisi: soki kopo ya bololo elekite, mela yango mpe zala makasi, mipesa na mikolo ya malamu makasi.5

Nabokimi bokono yango soki epesimeli biso, tala bokasi nayo moko mpe na basusu bokoki kozala na bokasi ya kosalisa. Lokola na motuka nabino, kozala na bokebi na kotala moto, mbongo, to kotala esanzi. Tango bolongi “mikakatano ya makasi,” sala bokokisa ya malamu. Bolembu ezali monguna monene nabiso nyonso—nayango malembe, bopemi, bozongisi mpe bokasi lisusu. Ba fizisie balaki biso ete soki soki tozwi ntango yako zala malamu te, tokozwa ntango oyo ekoya tokozala maladi.

Soki makambo ezali kokoba kozala mpasi, luka mateya ya bato na bwanya na boyebi malamu, byebi mosala mpe ntina na misu ya bato. Zala sembo nabango na maye matali lisitwale nayo mpe mikakatano nayo. Losambo mpe botosi ya mikano bazali kopesa mpe biyano bazali kopesa. Soki ozalaki na apandisiti, Nzambe azali kozela ete ozwa lipamboli ya Bonganganzambempe zwa nkisi elongobana. Nayango lisusu na mikakatano ya makanisi. Tata wabiso ya lola asengi biso kosalelanyonso likabo malamu eye apesi biso na eleko oyo.

Soki bozali batungisami to monganga na esika eye, kozala na lolendote namonene ya mosala nayo. Kokanisate ete okoki kosala nyonso, kasi oyo yo okoki kosala. Soki maye mazali kaka malongi moke, zala na esengo mpona bango mpe zala moto wa motema molayi. Zomi na mibale ya batango na makomi, Nkolo apesi mikano na moto“kotelema ngwi”to“kokitisa motema”—mpe kozela. 6 koyika mpiko na biloko mosusu ezali yoko ya ezaleli nabiso bomoyi.

Mpona minganga, nabokasi na bino ya malamu nakozala na bokolongono bwa nzoto ya basusu, bobebisa ya bino mokote. Na nyoso eye bazala na bwanya.bokima mbangote lokola bozali makasi.7 atako oyo bokoki to bokoki kosate, bpkoki kosambela mpe bokoki kopesa “bolingo ya solo.”8 “bolingani, mpe ezali bonsomi; … [oyo] elimbisaka biloko binso, …elikya na biloko binso, koyika mpiko na nyonso. Bolinganite kozanga. ”9

Lisusu epesaka biso bokasi yakokundola ete na bokono nyonso to botungisi ya mikakatano, ezali kaka ebele na bomoi kozala na elikya nantina mpe esengo mpona. Tozali mingi koleka basuka nabiso to mitungisi nabiso! Stephanie Clark Nielson mpe libota naye bali baninga nabiso uta mibu Ntuku misato. Na 16 ya sanza ya moambe,2008 Stephanie mpe mobali naye, Christian, bazalaki na bokweyi ya mpempo mpe moto epelaki ye makasi kaka bilembo ya manzaka naye nde eyebanaki tango bandeko ya libota naye bayaki koluka ye. Ezalaki mwa mpasi ete Stephanie azala na bomoi. Sima ya sanza misato ya pongi ya koma, Ye alamukaki komitala ye moko. Nayango, monganga ayaki na bana minei nase ya mibu sambo, Stephanie alingakite bamona ye atakote lisusu. Amonaki ete ezalaki lisusu ntinate azala nabomoi. “Nakanisaki ete esengelaki kozala mpete,” Stephanie ayebisanga mokolo moko na bilo nangai, “soki babosani ngai mpe nakolimwa na pete na bomoi nabango.”

Kasi na nyongo naye ya seko, mpe na nsambo ya mobali, libota, baninga, bana kitoko minei mpe ya mitano oyo abotamaki na Nielsons ya sanza zomi na moambe, Stephanie abundaki na nzela naye yabozongi nakozala moko ya bamama bayebana“mommy bloggers” na mboka, nakolanda naba miliyo minei baye bazali kolanda bog naye”ntina ya Bonzambe” na bomoi ezali yakozala mama kolengela nyonso mikolo azali kosala na mabele kitoko oyo.

Atako bitumba nabino, ba ndeko nangai ya mibali mpe ya basi—makanisi to mikakatano to ya nzoto to ya lolenge mosusu—kopona na ntina ya kitoko ya bomoite nakotiya suka nayango! Tiya elikya na Nzambe. Simba bolingo na Ye. Yeba ete mokolo moko pakapaka ekopasuka na pete mpe milili nyonso ya bokufi ekokima. Atako tokoki koyoka lokola tozali “kopo epasuka,” lokola banzembo elobi,10 tosengeli kokundola, ete kopo ezali kati ya maboko ya mosali Mbeki ya Nzambe. Bobungisi makanisi ekoki kobikisama lokola bobukani mikuwa mpe lokola bobukani mitema ebikisamaka. Tango Nzambe na mosala ya kobongisa, mingi kati nabiso bakoki kosungama na kozala na bolingo, nakozanga lisambisi, mpe sembo.

Natatoli na bosekwi esantu, likabo eye malamu ya libanga mama na bomikabi ya Nkolo Yesu Klisto! Elongo na Apostolo Polo, natatoli ete oyo elonamaki na bosoto ekokola mokolo moko na bolamu mpe oyo elonami na bolembu ekokola na nkembo.11 natatoli na mokolo wana tango bolingo ya baye toyebi mpona kozala na bozangi makoki ya bokufi bakotelema liboso nabiso na nkembo mpe monene, kokata mpema malamu na nzoto mpe na makanisi. Ekozala ntango malamu nini! Nayebite soki tokozala malamu kaka mpona biso moko yango nde tozali komona bikamwisi yaboye to bolamu mpona bango baye bazali yakofuluka na bolamu mpe na suka“somi na suka,” 12 Kino13 Nasambeli, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.