2010–2019
Tala na likolo
Sánzá ya Zómi 2013


Tala Likolo

Lelo ezali ntango ya kotala na ebandeli ya bosolo mpe bondimi ete matatoli mabiso mazali makasi.

Tango nazalaki na mibu muambe, bandeko nangai mibale na ngai totindamaki mpembeni ya engumba mpona kosomba bilei mpona mikolo zomi na mitano ekoya. Kotaka sima, Nakamwaki na boni mingi lolenge koko na ngai mpe tata mwasi mpe noko bazalaki mpona biso. Na ntongo lilkolo ezalaki pole mpe kongenga lokola tokendaki na mwa molongo na biso ya bampunda misato.

Na kati kati ya esobe, tozuaki likanisi malamu ete tokoka kokita mpe tobetaki lisano ya bile. Nde tobetaki Tomemamaki—ntango molai. Tomipesaki mingi na lisano tokokaki te komona “bilembo ya ntango” likolo ya mitu na biso ndenge mapata molili ezipaki likolo. Sima ya ntango tomonaki nini ezalaki koleka, tozuaki atako ntango te ya kobongisa bampunda na biso. Mvula ebetelaki biso ya makasi koleka, mpe londende ebetaki bilongi nabiso, ete tokanisaki te nini esengelaki biso kosala kasi tozipamaki nase ya poso ya mpunda.

Na bozangi mpunda, topolaki na mayi mpe malili, to kobaki mobembo na biso, na lombango. Lokola tokomaki mpene ya kokoma esika tobandaki kokende, tomonaki ete nzela monene po na kokota na engumba etondaki mayi mpe ezalaki lokola ebale koyaka liboso na biso. Sikoyo boponi na biso semoko ezalaki kolongola bilamba tozipaki mpe komata efelo na kanga moyibi oyo ezingaki engumba. Butu ekomaki makasi, tolembaki mpe na mabibi na kopola, tolukaki komibomba na ndako ya liboso tomonaki na bokoti na engumba. Libota ya bilenge malamu kuna emekaki kopesa biso moto po na koyetola, toliaki elubu kitoko ya madesu ya burritoss, mpe bapesaki biso mbeto ya kolala na eteni ya ndako po na biso moko. Kala te tomonaki ete eteni ya ndako nse na yango ezalaki ya kobeba, mpe tozuaki likanisi mosusu. Tosalaki zolongono na nse mpe tokobaki na lisano ya bile na biso kino toyokaki mpasi mpona kolala.

Lokola bana tozalaki kokanisa kaka po na biso moko. Tokanisaki te po na bolingo moko oyo ezalaki koluka na kobungisaka elikia po nakozongisa biso na mdako—soki toyebaki, tokokaki kosala mobembo ya lolenge tosalaki wana te. Mpe, soki tozalaki na bwania, tokokaki kotala likolo, kotala mapata kosangana, mpe kosala na lombangu kozala mosika ya mopepe. Sikawa ete Nazwi mwa boyebi, Nazali kaka kokanisa ngai moko, “Kobosana te tala na likolo.”

Boyebi na ngai na ya bandeko na ngai etangisi ngai kotiya bokebi na bilembo ya batango nabiso. Tozali na eleko ya mpasi, mikolo mya bopengwi polo atalisaki:“Bato bakomilinga bango moko, …bozangi botosi na baboti, bozangi botondi, bozangi bule,…bakosi, bato na yauli, …balingi bisengo ya mokili koleka Nzambe” (2  (Timote 3:2–4).

Kolobaka po na ntango wana, Mpaka Dallin H. Oaks: “Tosengeli tokesenisa makambo ya mosuni na ya kolengela molimo. … na kobongisaka mingi lokola tokoki kozala na zololo na kozanga kotala mikakatano—molimo” (“komilengela mpona boyei ya mibale,” Ensignto Liahona, ya sanza ya mitano ya 2004, 9). Na maloba mosusu, tokoki te kozala zololo na kotala na likolo.

Tosala noki mpenza tolinga po na molimo tobongisa mpona ntango lokola likama, nalingi nampesa maloba ya bokebisi po na moko ya bilembo makasi ya ntango. Bomoyi na ngai ya mosala etiaki ngai liboso ya tekinolozi, kasi na ndimi litomba ezali na yango, mingi mingi na bopanzi sango. Basango mingi po na bato ezali sika na songe ya misapi na biso. Kasi iteneti ezali na mingi oyo ya mabe mpe ya kokosama. Tekinolozi eza komatisa bonsomi na biso ya liloba, kasi ezali mpe kopesa basango ya mabe epayi ya bato ebele. Tala po na nini sika, ebele koleka, tosengeli kokundola liteya ya seko; “Na bambuma na bango nde bokoyeba bango’’ (Matai7:20).

Mingi mingi, nasengi bino botala bilili ya mabe to kolanda bafundi ya lukuta ya Klisto mpe ya profeta Joseph Smith te. Nyonso mibale esukaka lolenge moko: kobungisa Molimo Mosantu na nguya na yango ya bobateli, ya kosunga biso. Bizaleli mabe bikolanda mpe ntango tokozanga esengo.

Balingami mibali mpe basi, soki bokweyisami na eloko eye ekotiya ntembe na litatoli na bino ya sango malamo, nasengi na bino botala likolo. Botala na ebandeli ya bwanya mpe ya bosolo nionso. Boleyisa kondima na bino mpe litatoli na bino na maloba ya Nzambe. Bato mingi na mokili bakoluka kobebisa kondima na bino na lokuta na kosangisaka yango na ndambu ya bosolo. Tala ntina bosengeli kotikala bato balongobani na Molimo. Kozala elongo na Molimo Mosantu ezali bobele mpo na koyoka nzoto malamu te-ezali likambo ya motuya mpo na libiki na bino na molimo. Soki bobateli maloba ya Klisto te mpe boyoki bitinda ya Molimo te, bokoyokisama soni (tala Joseph Smith -Matai 1:37). Tosengeli kosala makambo maye.

Yezu Klisto, oyo asalaki mabe te, na Joseph Smith, oyo andimaki yemei ete azalaki moto ya bobongi nie te, babomaki bango epai ya bato mabe baye bandimaki litatoli na bango te. Boniboni tokoki koyeba ete litatoli na bango ezali solo—ete Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe mpe Joseph Smith azali profeta ya solo?

Na mbuma na bango nde bokoyeba bango. Mbuma ya malamu ekoki kokola na nzete ya mabe ? nayebi mpona ngai moko ete mosikoli na ngai alimbisaki masumu ma ngai mpe alongolaki ngai na nkanga, apesi ngai makoki ya esengo oyo nazuaki te na bomoyi na ngai. Po nayebi ngai moko ete Joseph Smith azalaki profeta na tina te nalandaki bilaka ya mpete ya buku ya Mormon : “Tuna na Nzambe, tata wa seko, o nkombo ya Klisto” (Moloni 10:4). Na maloba mokuse, tala na likolo.

Ezali na mingi oyo bakosenga na bino ete bosengeli kozala elembo ekomonana po na kondima na bosekwi ya Klisto to na bosolo ya bozongisi sango malamu na ye. Po na bango nakokundola maloba ya Alama na Korihor, oyo amemaki basusu bandima te: “Ozali na bilembo mingi, olingi komeka nzambe na yo? Ekoloba yo, lakisa ngai elembo,ntango ozali na litatoli na bandeko na yo baye banso? Mpe lisusu na baprofeta basantu banso? Makomi ezali liboso na yo” (Alama 30:44).

Bino na ngai tozali komona bosolo ya bokasi ya bosikoli ya Mobikisi. Tozali komona bosolo ya mosala ya Profeta Joseph Smith na botongono ya basantu oyo batikali makasi na litatoli na bango. Eklezia ya Yezu Klisto epanzani sika na mokili mobimba mpe ezali kokola na lolenge ezalaki liboso te—eyambami, lokola na ntango ya Klisto, na bato ya sembo baye bazali na ntina ya komona to kosimba mpo na kondima te.

Moto moko te ayebi ntango Nkolo akozonga lisusu. Kasi mikolo ya pasi ezali sika likolo na biso. Lelo ezali ntango ya kotala na ebandeli ya bosolo na bobangi te ete matatoli ma biso mazali makasi.

Tozonga na lisolo na ngai, bandeko na ngai elongo na ngai tolamukaki na tongo na moyi kongenga na likolo kitoko. Mobali moko abetaki na ekuke mpo na koluka bana misato ya mibali babungaki. Atiaki biso likolo ya bampunda, mpe tobandaki kozonga na ndako koleka kaka na esobe moko wana. Nakoki te kobosana oyo tomonaki na nzela ya bozongi ndako—bato ebele oyo bazalaki koluka biso butu mobimba, badangi na bango na mituka ya minene na bango ekangamaki na potopoto. Bakutaki kiti ya mpunda awa mpe mpunda kuna, na ntango bamonaki biso kozongo ndako, nakokaki koyoka bolamu mpe bolingo na bango. Na bokoti na engumba, bandeko na ngai bato ebele bazalaki kozela biso, mpe liboso na bango ezalaki koko ya mwasi molingami na ngai na noko mpe tata mwasi. Bayambaki biso mpe balelaki, na esengo koleka ete bamonaki bana na bango oyo babungaki. Nini ya monene namikundola ete Tata na biso na lola azali kokanisela biso. Azali na motema mokuse bozongi na biso na ndaku.

Iyo, bazali bilembo ya mipepe makasi kosalema mpembeni na biso. Tika totala na likolo mpe tomilengela. Tala bobangi te ezali kati na litatoli ya makasi. Tika tobatela mpe toyeisa matatoli na biso makasi mikolo minso.

Nayebi tokoki kovanda elongo lokola libota po na libela, ete Tata na biso ya bolingo wa likolo azali kozela biso, bana na ye, na maboko ya kofungwama. Nayebi ete Yezu Klisto, mosikoli na biso, azali na bomoyi. Lokola elongo na petelo, ezali misuni na mikuwa te emonisi ngai, kasi Tata na ngai oyo azali na likolo[ tala na Matai 16:15–19). Na kombo esantu ya Yesu Klisto, amene.