2010–2019
Ete Bakanisa Ye Ntango Nionso
sánzá ya zómi 2015


Ete Bakanisa Ye Ntango Nionso

Nalingaka koyekola mpe komaniola bomoi ya Ye oyo apesaki nionso mpo na ngai mpe mpo na biso nionso.

Nalingaka nzembo ya Eteyelo ya Bana oyo elobi:

Lobela ngai masolo ya Yesu oyo nalingaka koyoka,

Makambo nalingaki kotuna ye soki azalaki awa.

Masolo elekaki na nzela, masolo ya mbu,

Masolo ya Yesu, lobela ngai yango.1

Nandimi ete kobanda momeseno ya koyebisaka masolo ya Yesu epai ya bana na biso mpe libota na biso ezali nzela moko ya malamu koleka ya kobatela mokolo ya sabata lokola esantu na ndako na biso.

Oyo ekomema solo molimo kitoko na ndako mpe ekopesa libota na biso bandakisa uta na Mobikisi Yemei.

Nalingaka koyekola mpe komaniola bomoi ya Ye oyo apesaki nionso mpo na biso banso.

Nalingaka kotanga matangi ya makomi oyo etali bomoi na Ye ezangi masumu, mpe nsima ya kotangaka makomi oyo elobeli makambo oyo Ye asalaki, nakangaka misu na ngai mpe namekaka kotala bangonga oyo ya bule oyo eteyaka ngai mpe elendisaka ngai na molimo.

Bangonga lokola:

  • Ntango abwakaki nsoi na mabele mpe, kosalaka potopoto na nsoi, apakolaki miso ya mobali akufa miso mpe alobaki na ye, “Kende kosukola na liziba ya siloama.”Mpe mobali yango atosaki, mpe asokolaki, “mpe akomaki komona.”2

  • Ntango abikisaki mwasi oyo azalaki na mpasi ya makila mpe asimbaki ndelo ya elamba na Ye kondimaka ete kaka na kosimbaka Ye, akobikisama.3

  • Ntango Abimelaki bayekoli na Ye, kotambola likolo ya mbu.4

  • Ntango Akendaki elongo na bayekoli na nzela ya Emause mpe afungolaki makomi na bososoli na bango.5

  • Ntango abimelaki bato na Amerika mpe alobaki na bango baya epai na Ye mpe batia maboko na bango na mopanzi na Ye mpe boyoka bilembo ya nsete na maboko na Ye mpe makolo na Ye, mpo bakoka koyeba ete Azalaki “Nzambe ya Yisalaele, mpe nzambe ya mabele mobimba, mpe babomaki ye mpo na masumu ya mokili.”6

Bosepela mpo na koyeba ete ezali na baboti oyo balobaka masolo ya Klisto na bana na bango. Nasosolaka yango ntango nazali kotala kati na Eklezia, na manaka ya Eteyelo ya bana, mpe na milulu mosusu.

Natondi baboti na ngai mpo na koteyaka ngai Klisto, mpe nazali kokoba komona lolenge nini ndakisa ya Mobikisi na biso esalisaka mwasi na ngai mpe ngai ntango toteyaka bana na biso moko.

Motema na ngai etondisamaka na esengo ntango namonaka bana na ngai kobetaka masolo ya Klisto na bankoko na ngai. Yango ekundolisaka ngai moko ya makomi na ngai nalingaka, oyo ezwami na . Ezali kati na 3 Yoane mokapo 1, molongo ya 4, oyo elobi, “Nazali na esengo eleki oyo te ete nayoka ete bana na ngai bazali kotambola kati na makambo ya solo.” Mpe mpo na nini te bankoko na biso lokola?

Natondi bakambi na biso oyo bazali ntango nionso koteya biso Klisto, kobatela mokolo ya saba esantu, mpe kolia elambo eyenga moko na moko na lokumu ya Mobikisi.

Saba mpe elambo ekokoma likambo ya bosepeli mingi na koyekolaka masolo ya Klisto. Na kosalaka bongo, tosali mimesano oyo etongaka bondimi na biso mpe litatoli na biso mpe lisusu ebatelaka libota na biso.

Mwa baposo eleki, ntango nazalaki koyekola lisusu etinda ya Mokambi Russell M. Nelson oyo epesamaka na likita linene ya nsuka, mpe ntango nazalaki komaniola likolo ya mokolo ya Saba, nayokaki litondi ya mozindo mpo na lipamboli mpe litomba ya kozalaka na makoki ya kolia elambo. Mpo na ngai, wana ezali ngonga moko ya lokumu, esantu, mpe ya molimo. Nasepelaka makasi na likita ya elambo.

Ntango nazalaki komaniola, nayekolaki na bokebi mapamboli ya lipa mpe mai, natangaki mpe natiaki makanisi na nsambo mpe bokuli ya elambo. Nabandaki kosambela na ntina na yango mpe kokende likolo kati na molimo na ngai mpe motema na ngai makambo oyo ekangani na yango.

Na ezalela ya losambo, nakanisaki na ntina ya mokolo wana, mokolo ya yambo ya feti ya limpa ezanga mfulu, ntango Yesu, na eyano na motuna ya bayekoli na Ye oyo etali esika wapi kolengela elambo ya Elekeli, ayanolaki bango, kolobaka, “Boyingela kati na mboka epai ya songolo mpe loba na ye ete, Molakisi alobi ete elaka na Ngai ebelemi Nakosala Elekeli epai na yo elongo nabayekoli na ngai.”7

Namekaka kotala kati na molimo na ngai bayekoli kosombaka bilei mpe na bokebi kolengelaka mesa mpo na kolia elongo na Ye na mokolo wana ya kafukafu. Mesa mpo na bato 13, Ye mpe bayekoli zomi na mibale, oyo Alingaki.

Nalelaki ntango namonaki Klisto koliaka elongo na bango mpe kolobaka ete, “Nazali koloba na bino ete moko kati na bino akokaba ngai.”8

Nakanisaki na ntina ya bayekoli ya mawa kotunaka Ye, “Nkolo ezali nde ngai?”9

Mpe ntango Yuda atunaki Ye motuna se moko, Azongisaki na kimia, “Olobi yango.”10

Nakokaki komona maboko wana oyo ebikisaka, elendisaki, etongaki, mpe epambolaki, ebukaki limpa, mpe Yesu kokataka lipa alobaki, “Bokamata, bolia; oyo nzoto na ngai.”11

Nsima Azwaki kopo etonda na vino mpe atondi mpe apesi kopo epai na bango, kolobaka, “Bomela na yango bino banso, mpo ete oyo ezali makila na ngai ya boyokani ya sika, oyo esopanski mpo na bato mingi mpo na bolimbisi ya masumu.”12

Na mayele na ngai, natalaki bayekoli, moko na moko, mpe namonaki na miso na bango motungisi na bango mpo na Nkolo, oyo balingaki mingi mpenza. Ezalaki lokola soki nafandaki kuna na bango, kotalaka makambo nionso. Nayokaki mpasi makasi na motema na ngai, etonda mpasi mpe mawa mpo na oyo ezalaki pembeni ya kosalama na Ye mpo na ngai.

Molimo na ngai etondisamaki na mposa moko makasi mpo na kozala moto malamu koleka. Na boyamboli mpe mawa, nalingaki na esengo kozala na makoki kokausa mpe koboya bosopani ya ata mwa matanga ya makila na Ye oyo esopanaki na Getesemane.

Nsima namaniolaki likolo ya elambo toliaka na poso nionso na bomikondoli Ye. Ntango ezalaki ngai kosala bongo, nasambelaki mpo na liloba moko na moko ya mapamboli na ntina ya limpa mpe mayi. Nakanisaki na mozindo likolo ya maloba “mpe bamikundola ye ntango nionso” na lipamboli ya limpa, mpe “Ete bamikundola ye ntango nionso” na lipamboli ya mayi.13

Nasambelaki na ntina ya oyo elingi koloba kokanisa Ye ntango nionso.

Epai na ngai, elingi koloba:

  • Kokanisa bomoi na Ye ya yambo na mbotama, ntango mabele kitoko oyo esalemaki na Ye.14

  • Kokanisa mbotama na Ye kati na komikitisa na elielo, na Beteleme ya Yuda.15

  • Kokanisa ntango, kutu lokola mwana mobali ya mibu 12, Ateyaki mpe alobaki na badokotolo kati na tempelo.16

  • Kokanisa ntango Akendaki pembeni na nkuku na esika ekauka, na mibu 30, mpo na kolengela mosala na Ye ya bokufi.17

  • Kokanisa ntango Abongwanaki elongi liboso ya bayekoli na Ye.18

  • Kokanisa ntango Asalaki elambo, na Lipati ya Nsuka elongo na bango.19

  • Kokanisa ntango Akendaki na Elanga ya Getesemane mpe aniokwamaki mpenza kuna mpo na masumu, bampasi, bamawa, mpe bamaladi na biso nde makila ebimaki uta na madusu nionso ya poso.20

  • Kokanisa ntango, nsima ya boniokwami mingi mpenza mpe mpasi makasi, kutu naino na Getesemane, Awanganamaki na lipwepwe na moko ya bayekoli oyo Abengaki moninga.21

  • Kokanisa ntango bamemaki Ye epai ya Pilato mpe Herode mpo na kosambisama.22

  • Kokanisa ntango Atiolamaki, atutamaki, abwakelamaki nsoi, abetamaki, mpe afiakolamaki na fimbu oyo ezokisaki mosuni na Ye.23

  • Kokanisa ntango ekoti ya banzube etiamaki na makasi na moto na Ye.24

  • Kokanisa ete Esengelaki komema ekulusu na Yemei na Golgota mpe ete Abetamaka nsete kuna na ekulusu, koniokwamaka mpasi nionso ya nzoto mpe ya molimo.25

  • Kokanisa ete na ekulusu, nsopo na Ye etonda na bolingani, atalaki baoyo babaki Ye na ekulusu mpe atombolaki miso na likolo, kobondelaka,, “Papa, limbisa bango; mpo bayebi te nini bazali kosala.”26

  • Kokanisa ntango Ye, koyebaka ete akokisi etinda na Ye ya kobikisa bato ya mokili mobimba, apesaki molimo na Ye na maboko ya Tata na Ye, Tata na biso.27

  • Kokanisa Lisekwa na Ye, oyo ekokisi lisekwa na biso moko mpe makoki ya kozala na mopanzi na Ye seko na seko, na kotalaka nini toponaki.28

Mpo na kobakisa, komaniola likolo ya losambo ya elambo mpe ntina ya maloba ya nsambo ekundolisi ngai lolenge ya kokamwa yango ezali kozwa elaka, ntango ya kopambola elambo ete lokola tokokanisa Ye, tokozala na Molimo na Ye elongo na biso.29

Nandimi ete Nkolo azali na ntango na Ye moko mpo na kopesa biso bobimisi. Nasosolaki likambo oyo polele ntango nazalaki koyekola Mosakoli 3:1, 6, oyo elobi:

“Ezali na ntango moko mpo na nyonso, mpe ntango mpo na likambo nionso na nse ya lola: …

“Ntango ya kozwa, mpe ntango ya kobungisa; ntango ya kobomba, mpe ntango ya kobwaka.”

Elambo ezali mpe lisusu ntango mpo na Tata na Lola koteya biso na ntina ya Bomikabi ya Mwana na Ye ya Bolingo--Mobikisi na biso, Yesu Klisto--mpe mpo na biso kozwa bobimisi na ntina na yango. Ezali ntango ya “kobeta na ekuke, mpe bakofungolela bino,”30 mpo na kosenga mpe kozwa boyebi na ye. Ezali ntango mpo na biso kosenga Nzambe na limemia boyebi oyo. Mpe soki tosali bongo, ntembe ezali te ete tokozwa boyebi yango, oyo ekopambola bomoi na biso koleka ndelo.

Nalingaka Saba, elambo, mpe ndimbola na yango. Nalingaka Nkolo na molimo na ngai mobimba. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.