2010–2019
Komekama mpe Kosenginiama— kasi Kosungama
sánzá ya zómi 2015


Komekama mpe Kosenginiama— kasi Kosungama

Tokoki kosungana moko na mosusu lokola bana ya Tata na biso ya Lola na mimekano mpe masenginia.

Na mobembo ya bomoi, tomekami mpe tosenginiami. Tozali mpe na libaku ya kosalela bosomi ya kopona mpe kosungana moko na mosusu. Babosolo wana ezali eteni ya mwango ya kitoko mpe malamu mpenza ya Tata na biso ya Lola.

Mokambi John Taylor ateyaki : “Nayokaki Profeta Joseph koloba, ntango alobaki na Bazomi na Mibale na libaku moko: ‘Bokoleka na mimekano ya ndenge nionso. Mpe esengeli mpenza mpo na bino bomekama lokola ezalaki mpo na Abalayama mpe basali mosusu ya Nzambe, mpe (alobaki) Nzambe akomeka bino, mpe Akosimba bino mpe Akobalusa solo nsinga ya mitema na bino.’”1

Mbala moko tokomi na mobu ya boyanoli, mimekano mpe masenginia ezali momesano. Ntango mosusu ekoki kokoma mikumba ya kilo, kasi ekoki lisusu kopesa biso bokasi mpe bokoli ntango tolongi yango mpenza.

Na esengo, mikumba wana esengeli komemama yango moko te. Alma ateyaki, “Soki oyo ezali mposa ya mitema na bino mpo na kokota na etonga ya Nzambe, mpe kobiangema bato na ye, mpe bolinga komema mikumba ya moko na mosusu,ete ekoka kozala pepele.”2 Maloba wana elakisaki ete tozali na mokumba ya kosungana moko na mosusu. Mokumba wana ekoki koya uta na libiangi na Eklezia, mosala, to bondeko to lokola eteni ya mokumba ya bonzambe lokola baboti, balongani, to baye libota— to bobele uta kozalaka eteni ya libota ya Nzambe.

Nakopesa bandakisa minei mikumba na biso ekokoma pepele ntango tosungani moko na mosusu.

1. Mobikisi alobaki, “Soki nani akangi yo mpo okende na ye kilometele moko, kenda na ye na mibale.”3 Mpo na ndakisa, tosengami kokende na tempelo mbala na mbala, soki mabaku na biso moko epesi biso nzela. Kokende na tempelo esengi libonza ya ngonga mpe makoki, mingimingi mpo na baye basengeli kosala mobembo mpo na ntaka molai. Nzokande, libonza oyo ekoki kozwama lokola eteni ya kilometele ya yambo.

Tobandi kotambola na kilometele ya mibale ntango tososoli maloba “luka, zwa, teya,”4 ntango toluki mpe tobongisi bankombo ya bankoko na biso mpo na makuli ya tempelo, ntango tosungi na kokoma, ntango tosali mosala lokola basali na tempel, mpe ntango toluki banzela mpo na kosunga basusu kososola ntina ya tempelo.

Ntango nazalaki kosala lokola Ntuku Sambo ya Etuka, moko ya makonzi ya lisanga nazalaki kokamba basalaki mobembo monene na tempelo. Tempelo epayi wapi bandimi bakedaki ezali moke, mpe na mawa ezalaki na bandimi mingi oyo, atako basalaki mobembo molayi ya bangonga 12, bazalaki na makoki te mpo na kokota na tempelo mpo ete elekisaka motango ya sika ya mokolo na mokolo.

Mikolo moke nsima ya mobembo oyo, Nakendaki kotala likonzi oyo mpe natunaki na mokambi soki, nakokaki kosolola na ndambo ya bandimi oyo bazalaki na makoki ya kozala na tempelo mokolo wana. Moko ya bandeko mibali nakendaki kotala alobaki na ngai: “Mpaka, kobanga te. Nazalaki na ndako ya Nkolo. Nafandaki na ekiti na elanga mpe namaniolaki na makanisi na ngai makuli. Bongo nazwaki libaku ya kokota, kasi na esika nalekisaki ndeko mobali mosusu, oyo ayaki na tempelo mpo na mbala ya yambo mpo na kokangisama na mwasi na ye, kozwa esika na ngai. Bazwaki libaku ya kozala na mayangani mibale mokolo wana. Nkolo ayebi ngai, mpe apambolaki ngai, mpe tozali malamu.

2. Seka. Eloko moke oyo ekoki kosunga baoyo mikakatano elekeli to bazali na mikumba. Ntango ya liyangani ya bonganganzambe ya likita linene ya Sanza ya Minei eleki oyo, nafandaki liboso lokola moko ya Bakambi Banene mitano babiangemaki sika. Tofandaki esika wapi bandeko basi ya bakambi ya masanga malandi bafandi sikawa. Nazalaki koyoka bobangi mpenza mpe libiangi na ngai ya sika elekelaki ngai.

Ntango tozalaki koyemba loyembo ya katikati, nayokaki liyoki makasi ete moto moko azalaki kotala ngai. Nakanisaki na ngaimei: “ezali na bato koleka 20,000 na ndako oyo, mpe mingi kati na bango bazali kotala ngambo oyo. Ya solo moto moko azali kotala yo.”

Wana ezalaki ngai kokoba koyemba, nayokaki lisusu liyoki makasi ete moto moko azalaki kotala ngai. natalaki na molongo wapi Bapostolo Zomi na Mibale bafandaki mpe namonaki ete Mokambi Russell M. Nelson abalukaki na kiti na ye, kolukaka wapi esika tofandaki. Totalanaki na miso, mpe asekisaki ngai moke makasi. Kosekisa moke wana epesaki kimia na motema na ngai ya bobangi.

Nsima ya Lisekwa na Ye, Yesu Klisto akendaki kotala mpate na Ye mosusu. Abiangaki mpe akulisaki bayekoli zomi na mibale, mpe na likoki wana, basalaki kati na bato. Nkolo Yesu Klisto Yemei atelemaki kati na bango. Nkolo asengaki bango bafukama mpe babondela. Nandimi te soki babiangami mpe bayekoli zomi na mibale bakulisamaki ya sika bazalaki na bobangi ya libiangi na bango, kasi makomi elobi, “Esalamaki ete Yesu apambolaki bango ntango bazalaki kobondela epai na ye, mpe elongi na ye esekaki moke mpo na bango, mpe pole ya elongi na ye engengaki likolo na bango.”5 Na likita linene eleki, koseka moke moko elembisaki mikumba na ngai mbala moko mpe na lolenge ya kokamwa.

3. Koloba mayoki ya ngolu epai ya basusu. Soki ozali mosimbi bonganganzambe, nasengi osalela nguya na yo mpo na kosunga bana ya Nzambe, kopesaka bango mapamboli. Loba maloba ya libondisi mpe ya kolendisa bato oyo bazali na mpasi to na moniokoli.

4.Moboko ya mwango ya Nzambe ezali Bomikabi ya Nkolo Yesu Klisto. Ata mbala moko na poso, tosengeli kokanisa lokola esalaki Mokambi Joseph F. Smith na“ bolingo monene mpe ya kokamwa elakisamaki na Tata mpe Mwana na boyei ya Mosikoli kati na mokili.”6 Kobengaka basusu mpo baya na eklezia mpe mpo ya kokabola na bolongobani elambo ekoki kopesa bana ya Tata ya Lola mingi mpo na kokanisa na oyo etali Bomikabi. Mpe soki tozali ya kolongobana te, tokoki koyambola. Mikundola ete Mwana ya Oyo Aleki Likolo akitaki na nse ya nionso mpe azwaki likolo na Ye mabunga na biso, masumu, bobuki mibeko, bokono, mpasi, mawa, mpe kobwakisama. Makomi eteyi biso ete Klisto “amataki na likolo mpe lisusu akitaki na nse ya biloko binso, na lolienge ete asosolaki makambo manso.”7

Ezali na ntina te nini ezali bitumba na biso ya moto—soki ezali bokono to kobwakisama ewumela to koniokwama masenginia mpe mimekano ya monguna—Mobateli Mpate Malamu azali kuna. Abengaka biso na nkombo mpe alobi, “Boya epai na ngai, bino banso oyo bolembi mpe bozali na bozito, mpe nakopesa bino kimia.”8

Nalingi koloba na mokuse biteni minei:

Ya yambo—kenda na kilometele ya mibale.

Ya mibale—nasengi seka moke. Koseka na yo ekoki kosunga basusu.

Ya misato—lakisa boboto.

Ya minei—benga basusu mpo na koya na eklezia.

Napesi litatoli na ngai ya Mobikisi. Yesu ezali Klisto, Mwana ya Nzambe na bomoi, mpe Azali na bomoi. Nayebi ete Asungaka, na nguya mpe likolki na Ye nionso, mwango ya Tata. Nayebi ete Mokambi Thomas S. Monson azali profeta ya bomoi. Azali na bafungola nionso mpo na kotambwisa na elonga mosala ya Nzambe na mabele. Nayebi ete tokoki kosungana moko na mosusu lokola bana ya Tata na biso ya Lola na mimekano mpe masenginia na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.