2010–2019
Nazangi Nini Lisusu?
sánzá ya zómi 2015


Nazangi Nini Lisusu?

Soki tozali ya komikitisa mpe ya koteyama, Molimo Mosantu akotindika biso na komibongisa mpe akokamba biso na ndako, kasi tosengeli kotuna Nzambe mpo na boyangeli na nzela.

Ntango nazalaki elenge ya mokolo, nabandaki koluka kokota na Eklezia. Na ebandeli nabendamaki na nsango malamu na nzela ya bandakisa ya baninga na ngai ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka, kasi nsukansuka nasepelaki na malongi ezanga bomekoli. Ntango nayekolaki ete mibali mpe basi ya botongono bakokaki kokoba kokola mpe nsukansuka kokoma lokola baboti na biso ya lola, nakamwaki mpenza. Nalingaki liloba yango; eyokanaki solo epai na ngai.

Nokinoki nsima ya libatisi na ngai, nazalaki koyekola Lisakola na Ngomba, mpe nayebaki lisusu ete Yesu ateyaki bosolo se moko oyo etali bokoli ya seko kati na Biblia. Alobaki, “ozala malamu be lokola tata na bino na Likolo azali malamu be.”1

Nazali mondimi ya Eklezia sikawa eleki mibu 40, mpe ntango nionso natangaka nzela ya likomi oyo, nakanisaka ntina na biso awa na mabele. Toyaki mpo na koyekola mpe kobongisa tii tokoka mokemoke kokoma ya kobulisama to malamu be kati na Klisto.

Mobembo ya boyekoli ezali moko ya pete te. Ebengami “Nzela ya komibongisa mbala na mbala.”2 Wana ezali biso na nzela moke mpe kaka wana, Molimo ezali kokoba kotelemela biso mpo na kozala malamu koleka mpe kobuta likolo koleka. Molimo Mosantu azali moninga abongi ya mobembo. Soki tozali ya komikitisa mpe ya koteyama, Akokamata bison a loboko mpe kokamba biso ndako.

Nzokande, tosengele kotuna Nkolo mpo na baboyangeli na nzela yango. Tosengeli kotuna mwa bamituna ya mpasi, lokola “Nini nazali na yango mposa mpo na kobongwana?” “Boniboni ekoki ngai kobongisa?” “Botau nini esengeli kolendisama?”

Tika totala lisapo ya Boyambi ya Sika ya elenge mokambi ya bozwi. Azalaki elenge mobali moko ya bosembo oyo asilaki kozala kobatelaka Mitindo Zomi, kasi alingaki kokoma malamu koleka. Ntina na ye ezalaki bomoi ya seko.

Ntango akutanaki na Mobikisi, atunaki, “Nazangi Nini Lisusu?”3

Yesu ayanolaki nokinoki, kopesaka toli oyo ezalaki mingimingi mpo na elenge mobali ya bozwi. “Yesu alobi na ye ete, soki olingi kobonga na malamu, kende kotekisa nionso oyo ezali na yo mpe pesa epai ya babola mpe … yaka kolanda ngai.”4

Elenge mobali akamwaki; akanisaki mokolo moko ten a libonza ya bongo. Amikitisaki mpenza mpo na kotuna Nkolo kasi ya botongono mpenza te mpo na kolanda toli ya bonzambe oyo apesamaki. Tosengeli kozala na bolngi ya kosala ntango tozwi eyano.

Mokambi Harold B. Lee ateyaki, “Moko na moko na biso, soki tokokoma na malumu be, tosengeli [na] ngonga moko tomituna motuna, ‘Nini ezali naino?’”5

Nayebaki mama moko ya botongono oyo amikitisaki mpe atunaki Nkolo, “Nini ezali kopekisa ngai uta na bokoli?” Na likambo oyo ya ye, eyano uta na Molimo eyaki nokinoki: “Tika kolelalela.” Eyano oyo ekamwisaki ye; Amikanisaka mokolo moko te kozala molelileli. Nzokande, etinda uta na Molimo mosantu ezalaki polele. Na mikolo oyo elandaki, akomaki na kansansa ya momesano na ye ya komilelalela. Na matondi mpo na botindiki ya kobongisa, azwaki mokano ya kotanga mapamboli na ye na esika ya mikakatano na ye. O ntaka ya mikolo, ayokaki molunge ya eyano ya Molimo.

Elenge mobali ya komikitisa oyo akokaki te komona elenge mwasi ya malamu akendeki epai ya Nkolo mpo na lisalisi: “Nini ezali kopekisa ngai kozala mobali malamu?” atunaki. Eyano oyo eyaki na makanisi mpe motema na ye: “Petola monoko na yo.” Na ngonga wana, asosolaki ete maloba ya mabe mingi ekomaka eteni ya monoko na ye, mpe abandaki kobongwana.

Mwasi moko monzemba ya elombe atunaki motuna: “Nasengeli na nini mpo na kobongwana?” mpe Molimo elobelaki ye na nse, “Kokata bato te ntango bazali kosolola.” Molimo Mosantu apesaka mpenza mpenza toli elongobana. Azali moninga malamu mpenza mpe akoyebisa bisu makambo oyo moko te mosusu ayebi to azali na makasi ya koloba.

Misionele moko asilisa amimonaki na mawa na manaka moko ya etonda mpenza. Azalaki komeka kozwa ngonga mpo na mosala, koyekola, libota, mpe libiangi na Eklezia. Asengaki toli epai ya Nkolo: “Boniboni nakoki koyoka kimia na nionso nasengeli kosala?” Eyano ezalaki te oyo azelaki; azwaki liyoki ete asengelaki kotosa mingi koleka mokolo ya Saba mpe kobomba yango esantu. Akanaki kopesa Eyenga na mosala ya Nzambe—kotia pembeni mateya ya eteyelo na ye na mokolo wana mpe koyekola nsango malamu na esika wana. Mbongwana moke oyo ememaki kimia mpe kokokana oyo azalaki koluka.

Mibu eleki natangaki na magazini moko ya Eklezia lisolo ya elenge mwasi oyo azalaki kofanda mosika na ndako mpe azalaki kokende na eteyelo. Azalaki kozwa te na mateya na ye, bomoi na ye ni lisanga ezalaki oyo alikiaka te, mpe azalaki mpenza na esengo te. Na nsuka mokolo moko akweyaki na mabolongo na ye mpe alelaki, “Nakoki kosala nini mpo na kobongisa bomoi na ngai?” Molimo Mosantu alobaki na nse, “Lamuka mpe petola kisuku na yo.” Botindiki oyo eyaki lokola likamwisi mobimba, kasi ezalaki kaka ebandeli oyo azalaki na yango bosenga. Nsima ya kozwaka ngonga ya kobongisa mpe kotia makambo na molongo, ayokaki Molimo kotondisa kisuku na ye mpe kotombo motema na ye.

Molimo Mosantu alobaka na biso te ete tombongisa makambo nionso na mbala moko. Soki esalaki bongo, tolingaki kokoma ya kolemba mpe kotika. Molimo esalaka elongo na biso engebene na mbangu na bisomei, limbe moko na ngonga, to lokola Nkolo ateyaki, “monkoloto likolo ya monkoloto, mosise likolo ya mosise, … mpe bapambolami bango baye bokoyokamela epai ya mitindo na ngai, … mpo epai ya ye oyo akoyamba nakopesa mingi koleka.”6 Mpo na ndakisa, soki Molimo Mosantu azalaki kotindika yo oloba “melesi” mbala mingi, mpe ayanoli na botindiki wana, nde Akoki koyoka ete ngonga ekoki mpo mpo ete yo oleka na likambo moko ya momekano koleka—lokola koyekola koloba, “Limbisa; wana ezalaki mbeba na ngai.”

Elilingi
Kokabola Elambo na Libota

Ngonga malamu be mpo na kotuna “Nini nazangi lisusu?”ezali ntango tozwaka elambo. Apostolo Paulo ateyaki ete oyo ezali ngonga moko mpo ete moko na moko na biso tomimeka.7 Na ngonga ya limemia oyo, ntango makanisi na biso mabaluki na lola, Nkolo akoki na boboto koloba na biso maye tosengeli kosala nsima.

Lokola bino, nazwi nsango mingi uta na Molimo mosantu mibu oyo kolakisaka ngai lolenge nini nakokaki komibongisa. Tika nakabola mwa bandakisa ya ngamei oyo endimamaki mobimba. Babotindiki oyo esangisi:

  • Kotombola mongongo na yo te.

  • Mibongisa, kela molongo moko ya makambo ya kosala mokolo na mokolo.

  • Batela malamu koleka nzoto na yo na koliaka bambuma mpe ndunda mingi koleka.

  • Matisa mbala na yo ya kokende na tempelo.

  • Zwa ngonga ya komaniola liboso osambela.

  • Senga toli na mwasi na yo.

  • Mpe zala na bompikiliki ntango ozali kokumba; kolekisa ndelo ya mbangu te. (Nazali kokoba kobunda na moko oyo ya nsuka.)

Libonza ya komikaba ya Mobikisi ezali oyo esalaka ete malamu be to bobulisami ekokisama. Tokokaki ntango moko te kosala yango na bisomei, kasi ngolu ya Nzambe ekoki mpo na kosalisa biso. Lokola Mpaka David A. Bednar mokolo moko alobaki: “Mingi kati na biso basosolaka na polele ete Bomikabi ezali mpo na basumuki. Nzokande, nandimi mpenza te, ete toyebaka mpe tososlaka ete Bomikabi ezali lisusu mpo na basantu—mpo na mibali mpe basi malamu oyo bazali botosi, balongobani, mpe na kansansa mpe oyo bazali kobunda mpo na kokoma malamu koleka.”8

Elilingi
Mwasi azali kosambela

Nalingi kopesa likanisi ete moko na moko na bino azali na ngalasisi ya molimo oyo ntango mosusu nokinoki, ntango mususu kutu na mpokwa ya lelo ntano ya koosaka nsambo na bino. Na bomikitisi tuna Nkolo motuna oyo elandi: “Nini ezali kopekisa ngai na bokoli?” Na maloba mosusu: “Nini ezali naino?” Nde nzela eyano na kimia. Soki ozali sembo, eyano ekokoma polele nokinoki. Ekozala libimisi embimi mpo na yo kaka.

Ntango mosusu Molimo akoyebisa yo ete osengeli kolimbisa moto moko. To okoki kozwa etinda ya kozala na boponi mingi na oyo etali bafilimi oyo otalaka to miziki oyo oyokaka. Okoki komiyoka kozala bosembo mingi koleka na misala na yo ya nkita to ya bokabi mingi koleka na makabo ya kokila. Mabaku ezali mingi.

Molimo akoki kolakisa biso botau na biso, kasi Ye azali lisusu na makoki ya kolakisa biso babokasi na biso. Ntango mosusu tosengeli kotuna nini tozali kosala oyo ezali malamu mpo ete Nkolo akoka kotombola mpe kolendisa biso. Ntango totangi mapamboli ya bankoko na biso, tokundulisami ete Tata na biso na Lola ayebi likoki na biso ya bonzambe. Asepeli ntango nionso totie litambe moko liboso. Mpo na Ye, nzela na biso ezali mpenza ntina mingi koleka mbangu na biso.

Botingama, bandeko mibali mpe basi, kasi mokolo moko te bolemba. Tokosengela kokende na ngambo ya lilata liboso basi, kasi mokolo moko te bolemba. Tokosengela kokende na ngambo ya lilata liboso tokoma mpenza malamu be, kasi awa na bomoi ya kufa tokoki kotia moboko. “Ezali mokumba na biso ya kozala malamu lelo koleka oyo tozalaki lobi, mpe malamu lobi koleka oyo tozali lelo.”9

Sokibokoli ya molimo ezali priorite na biso ten a bomoi na biso, soki tozali na nzela ya komibongisa mbala na mbala te, tokozanga makambo ya motuya oyo Nzambe alingi kopesa biso

Mibu eleki natangaki maloba ya Profeta Spencer W. Kimball, oyo etikaka elembo ya ntango molai na ngai. Alobaki: “Nayekoli ete wapi ezali na motema ya losambo, nzala mpo na bosembo, bolimbisi ya masumu, mpe botosi ya mitindoya Nzambe, Nkolo asopi pole mingi mpe mingi koleka tii nsukansuka ezali na nguya mpo na kopasola elamba ya lola. ... Moto ya bosembo ya bongo azali na elaka ya motuya ete mokolo moko akomona elongi ya Nkolo mpe akoyeba ete ye azali.”10

Ezali losambo na ngai ete oyo likambo ya motuya oyo ekoki kozala ya bino mokolo mosusu, ntango tozali kosa nzela na Molimo Mosantu mpo akamba biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Matai 5:48.

  2. Neal A. Maxwell, “Testifying of the Great and Glorious Atonement,” Ensign, sanza ya zomi 2001, 12; Liahona, sanza ya minei 2002, 9.

  3. Matai 19:20.

  4. Matai 19:21.

  5. Teachings of Presidents of the Church: Harold B. Lee (2000), 197.

  6. 2 Nefi 28:30.

  7. Tala 1 Bakolinti 11:28.

  8. David A. Bednar, “The Atonement and the Journey of Mortality,” Ensign, sanza ya minei 2012, 42; Liahona, sanza ya miei 2012, 14.

  9. Joseph Fielding Smith, Doctrines of Salvation, comp. Bruce R. McConkie, 3 vols. (1954–56), 2:18.

  10. Spencer W. Kimball, “Give the Lord Your Loyalty,” Ensign, sanza ya misato 1980, 4; Tambuli, sanza ya mibale 1981, 47.