2010–2019
Nzambe Azali Kokamba Eklezia na Ye
sánzá ya zómi 2015


Nzambe Azali Kokamba Eklezia na Ye

Mitindo mpe mayokani ezanga motuya ya babosolo mpe malongi ezwami na Masuwa ya Kala ya Siona, esika oyo Nzambe azali kokamba.

Na likita linene ya sanza ya zomi eleki, nabengisaki bayoki balanda toli ya Brigham Young ya kotikala na Masuwa ya Kala ya Siona, oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, mpe kosimba na maboko mibale.1 Wuta wana, nazali na esengo ya koyeba ete mwa bato kati ya libota na ngai mpe basusu bazalaki koyoka mpe batunaki ngai motuna oyo, “Nini ezali kati na Masuwa ya Kala ya Siona oyo tokoki kosimba makasi?” Nakundolisaki bango na oyo Mokambi Brigham Young alobaki: “Tozali kati ya masuwa ya kala ya Siona. … [Nzambe] azali kokamba mpe akotikala kuna. … Azali kotinda, kokamba mpe koyangela. Soki bato bakozala na elikia mpenza na Nzambe na bango, Akokamba biso na bolongobani.”2

Na polele, Tata na biso ya Lola mpe Nkolo Yesu Klisto babongisaki Masuwa ya Kala ya Siona na babosolo ya malamu mpe pete oyo ekosunga biso totikala na kati na bantango ya mikakatano ya bomoi ya nkufa. Tala kaka ndambo.

Eklezia ya Yesu Klisto ekambami ntango nionso na baprofeta ya bomoi mpe bapostolo. Atako liwa mpe bozangi bobongi nie ya bato, basali ya Nkolo bafulami mpo na kosunga toboya mabaku oyo ebangisi bomoi na molimo mpe kosunga biso toleka na bozangi likama na nzela ya bomoi na bokufi kino na nsuka na biso, na nsuka, esika na biso ya lola.

Na ntango ya pene ya mibu na ngai 40 ya kozala elongo na Bakambi Minene, nazali ngai moko litatoli ntango yango mibale bofuli ya kimia mpe bobimisi ya mozindo etombolaki na mosala baprofeta mpe bapostolo, Bakambi Banene misusu, mpe bakambi ya masanga malandi. Atako bazali babongi nie te bazali na makoki ya kosala mbeba, mibali mpe basi malamu oyo baponamaki malamu mpo na kotambwisa mosala ya Nkolo liboso na lolenge oyo Akambaki.

Bokoki kondima makambo oyo: Nkolo atambwisaka Ekllezia na Ye na nzela ya baprofeta mpe bapostolo ya bomoi. Oyo ezali lolenge Ye asalaka mosala na Ye ntango nionso. Ya solo, Mobikisi ateyaki, “Nazali koloba na bino ya solo mpenza, moto oyo ayambi moto ngai natindi, ayambi ngai.”3 Tokoki te kokabola Klisto na basali na Ye. Na bozangi Bapostolo na Ye ya yambo, tokokaki te kozala na lisolo ya litatoli ya mateya na Ye ebele, ya mosala na Ye, mpasi na Ye na Elanga ya Getesemane, mpe liwa na Ye na ekulusu. Na bozangi matatoli na bango, tokokaki te kozwa litatoli ya bopostolo ya lilita ya mpamba mpe Lisekwa.

Atindaki Bapostolo ya yambo oyo:

“Na yango bokende, mpe boteya bamboka nionso, bobatisa bango na nkombo ya Tata, mpe Mwana, mpe ya Molimo Mosantu:

“Boteya bango batosa makambo nionso oyo natindi bino.”4

Mokumba oyo ezongisamaki sika na mikolo na biso moko ntango Nkolo abengaki Joseph Smith mpo na kozongisa Eklezia, na Bapostolo bakulisama mpo na kosakola nsango malamu na Ye na ntango ya nsuka liboso Azonga lisusu.

Ezalaka ntango nionso likambo ya mpasi mpo na mokili endima baprofeta mpe bapostolo ya bomoi, kasi ezali na ntina mpenza kosala bongo mpo na kososola malamu Bomikabi mpe mateya ya Yesu Klisto mpe kozwa bofuluki ya mapamboli ya bonganganzambe oyo epesami na baoyo Ye abiangi.

Bato ebele bakanisa bakambi ya Eklezia mpe bandimi basengeli kozala babongi nie. Babosani ete ngolu ya Nkolo ezali ya kokoka mpo na kokokisa mosala na Ye na nzela ya bato. Bakambi na biso bazali na makanisi malamu mingi koleka, kasi ntango mosusu tosalaka mbeba. Yango ezali kaka te na Eklezia, mpo lolenge moko esalemaka na babozalani na biso kati na baninga, bato ya pembeni, mpe baninga ya mosala mpe ata kati na balongani mpe na mabota.

Kotalaka botau ya bato ezali kutu pete. Nzokande, tosalaka mbeba makasi na kotalaka bobele lolenge ya moto ya moko mpe mosusu mpe ezangisaka komona loboko ya Nzambe kosalaka na nzela ya baoyo Ye abiangi.

Koyekamaka na lolenge nini Nkolo afulaka bakambi na Ye baponama mpe lolenge nini Ye asalisaka Basantu basala makambo kitoko mpe ya momesano te atako lolenge na bango ya bomoto ezali na nzela moko tosimbaka na nsango malamu ya Yesu Klisto mpe kotikala na bozangi likama na kati ya Masuwa ya Kala ya Siona.

Bosolo ya mibale ezali malongi ya mwango ya lobiko. Na nzela ya Profeta Joseph Smith, Nzambe apesaki Buku ya Mormon, Doctrine et Alliances, mpe mateya ebele ebakisama ya Eklezia. Yango ebakisi boyebi ya mwango ya lobiko, oyo ezali ndimbola ya esika wapi towuti, ntina na biso awa na mabele, mpe esika oyo tozali kokende soki tokufi. Mwango epesi biso lisusu emoneli se moko, ya seko ete tozali bana ya milimo ya Nzambe. Na bososoli ya nani Tata na biso ya Lola azali mpe bozalani na biso na Ye mpe na Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto, tokondima mitindo na Bango mpe tokosala mayokani na Bango oyo bakotambwisa tozonga na miso na Bango ya seko.

Ntango nionso nasimbaka mwana abotama sika, namitunaka ngai moko: “Ozali nani, mwana moke? Okokoma nani na nzela ya Bomikabi ya Klisto?”

Tomitunaka motuna ya lolenge oyo ntango moto moko oyo tolingaka akufi: “Bazali esika nini? Bazali komona nini mpe bakutanaka na nini? Bomoi ekobaka kaka? Ezalela ya bazalani na biso tolingaka mingi koleka ekozali nini na mokili monene ya milimo ya bawa?”

Na mokili wana, libota na biso ezali na bankoko mibale ya basi, Sara mpe Emily, mpe nkoko moko ya mobali, Nathan. Na liwa ya moko na moko ya bankoko, biso lokola libota tokangamaki na maboko mibale na babosolo ya nsango malamu. Mituna na biso eyanolamaki na libondi mpe elikia na nzela ya Bomikabi ya Mobikisi. Atako tozangi bankoko na biso, toyebi ete bazali na bomoi, mpe toyebi ete tokomona bango lisusu. Totondi na esengo mpo na bososoli oyo ya molimo na bantango mikakatano ya moto yemei mpe ya libota.

Bosolo mosusu ya motuya na Eklezia ezali ete Tata na Lola akelaki Adama mpe Ewa mpo na ntina ya lokumu. Ezali mokumba na bango—mpe, oyo elandi, mokumba ya bana na bango—kokela banzoto ya nkufa mpo na bana ya milimo ya Nzambe mpo bakoka koyeba bokufi. Na lolenge wana, Tata ya Lola atindi bana ya molimo na Ye na mabele mpo na koyekola mpe kokola na nzela ya boyebi ya bomoi ya mabele. Mpo ete Ye alingaka bana na Ye, Nzambe atindaka bapanzi nsango na Ye mpe Bapostolo mpo na koteya bango na ntina ya Yesu Klisto lokola katikati ya mosala lokola Mobikisi na biso.

O ntaka ya bikeke, baprofeta bakokisi misala na bango ntango bakebisaki bato na makama liboso na bango. Bapostolo ya Nkolo bazali na lotomo ya kobatela, kokebisa, mpe kotala mpo na kosunga baoyo bazali koluka biyano na mituna ya bomoi.

Mibu ntuku mibale eleki, Bokambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale balobaki “Libota: Esakola na Molongo.” Kati ya mokanda efulama wana, tosukisaki na oyo elandi: “Biso Tozali kokebisa bato oyo babukaka boyokani ya bopeto ya mwasi moko-mobali moko, ba oyo baniokolaka balongani to mpe bana na bango, to ba oyo bakokaka te mikumba ya mabota na bango ete bakosambisama liboso ya Nzambe. Mpe lisusu, tozali kokebisa ete kopanza libota ekokweyisa makama ya mpasi likolo na bato, ya masanga ya bato mpe ya biloko lokola baprofeta ya kala mpe ya ntango na biso.”5

Lokola Bapostolo, tolobi lisusu likebisi ya lokumu oyo lisusu lelo. Nasengi bomikundola ete mitindo mpe mayokani ezali babosolo mpe malongi ezanga motuya oyo ezwami na Masuwa ya Kala ya Siona, esika oyo Nzambe azali kokamba.

Malongi mosusu ya ntina oyo tosengeli kokangama na yango ezali kotosa mokolo ya Saba. Oyo esungaka biso totikala peto na makambo ya mokili, epesaka biso kimia ya nzoto, mpe epesaka moko na moko na biso bosanzoli ya sika ya Tata mpe Mwana mokolo ya eyenga nionso.6 Ntango tosepeli na mokolo ya Saba, ezali elembo ya bolingo na biso mpo na Bango.7

Lokola eteni ya babokasi na biso ya kosepela na Saba, totuni bayangeli ya bisika mpe bandimi ya Eklezia bamikundola ete liyangani ya elambo ezali ya Nkolo mpe esengeli kozwama misisa mpe kofandisama na mateya na Ye. Bolakisi ya likuli ya elambo ezali ntango tokomisaka sika mayokani mpe tolakisaka lisusu bolingo na biso mpo na Mobikisi mpe tomikundolaka libonza na Ye mpe Bomikabi na Ye.

Molimo moko oyo ya kosanzola esengeli kotikala na sanza nionso mpo na kokila bilei mpe makita ya litatoli. Likita ya elambo oyo ezali mpo na bandimi balakisa na mokuse botondi, bolingo, mpe bosepeli mpo na Tata na biso ya Lola, Yesu Klisto, mpe nsango malamu ezongisama mpe kopesa litatoli ya moto yemei ya makambo oyo. Likita ya kokila mpe ya litatoli ezali ntango ya kokabola makanisi efulama na mokuse mpe kopesa litatoli ya lokumu. Ezali ntango ya kopesa lisukulu te.

Bilenge bana basengeli koyekola kokabolaka matatoli na bango na Eteyelo ya Bana mpe elongo na baboti na bango na likita ya libota na mpokwa kino basosola ntina ya ndimbola ya litatoli.

Bobeti nsete oyo eleki kala te ya kosepela na Saba ezali eyano ya mbala moko ya bofulami kowuta na Nkolo na nzela ya bakambi ya Eklezia. Bato ya lisanga ya palwasi basengeli kosunga boepisikopo baposo ebele na yambo ya kotalaka miziki mpe masikulu oyo eponami mpo na likita nionso ya elambo.

Biso nionso topambolami ntango mokolo ya Saba etondisami na bolingo mpo na Nkolo na libota mpe na eklezia. Ntango bana na biso bateyami na ndenge ya Nkolo, bayekoli koyoka mpe koyanola na Molimo na Ye. Biso nionso tokozala na mposa ya kozala Eyenga nionso mpo na koliya elambo ntango tokoyoka Molimo ya Nkolo. Mpe nionso, elenge mpe mokolo, baoyo bazali komema mikumba ya bozito bakoyoka botobwami mpe libondisi ya molimo oyo eyaka na mokolo ya Saba ya bolingo makasi ya Tata na biso ya Lola mpe Nkolo Yesu Klisto.

Botondi mingi, Klisto azali ntango nionso pembeni, kozelaka mpe kolingaka kosunga biso ntango tosambeli mpo na lisungi mpe tozali na bolingi ya koyambola mpe koya epai na Ye.

Sikawa, ntango tomanyoli bobele mwa ndambo ya babosolo oyo yango ezali kati ya Masuwa ya Kala ya Siona, tika totikala na kati mpe tomikundola yango, na boyebisi nie, masuwa ezali motuka, mpe ntina ya motuka ezalaka ya komema biso kino na bokomi.

Bokomi ya masuwa na biso ezali bofuluki ya mapamboli na biso ya nsango malamu, bokonzi ya lola, nkembo ya selestiale, mpe miso ya Nzambe!

Mwango ya Nzambe esalemaki. Azali na bokambami, mpe masuwa na Ye ya monene mpe nguya ezali kotambola na nzela ya lobiko mpe bonetoli. Bomikundola ete tokoki te kozwa lobiko mpe bonetolami na koboyaka Eklezia mpe komekaka komikamba bisomei.

Bonetolami ezali ntina ya mobembo oyo ya nkufa, mpe moto moko te akotaka kuna na bozangi ndimbola ya nsango malamu ya nsango malamu ya Yesu Klisto--Bomikabi na Ye, makuli, mpe malongi ya bokambi mpe mikano oyo ezwami na Eklezia.

Ezali Eklezia esika oyo toyekolaka misala ya Nzambe mpe tondimaka ngolu ya Nkolo Yesu Klisto oyo ebikisaka biso. Ezali na Eklezia nde tosalaka mabongisi mpe mayokani ya mabota ya seko oyo ekomaka passport na biso na bonetolami. Ezali Eklezia oyo ezwi nguya na nzela bonganganzambe mpo na kokobisa biso na nzela ya mabaku ya bomoi.

Tika ete tosepela na Masuwa na biso kitoko ya Kala ya Siona, mpo soki yango te tokozala na makoki ya kokoba te, biso moko na bozangi makoki, tokotambola na bozangi koyeba esika nini tozali kokende, tokomitika na bokambami ya nguya ya monguna.

Bosimba makasi bandeko ya basi mpe mibali, mpe bokoba liboso na kati ya masuwa ya nkembo oyo, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Minkolo mya Nsuka, mpe tokokoma na bokomi na biso ya seko. Oyo ezali litatoli mpe losambo na ngai mpo na biso nionso na nkombo na Ye mpo na oyo Masuwa ya Kala ya Siona epesameli nkombo, oyo azali Nkolo mpe Mobikisi, Yesu Klisto, amene.