2010–2019
Boniboni Molimo Mosantu Ekoki Kosunga Biso?
Sanza ya Minei 2017


Lolenge nini Molimo Mosantu Akoki Kosunga Bino?

Molimo Mosantu ekebisaka, Molimo Mosantu elendisaka, mpe Molimo Mosantu etatolaka.

Mokolo moko ya yambo na pokwa kala mingi te, mwasi na ngai, Lesa, mpe ngai tokendeki na ndako ya libota moko ya bilenge na nzinganzinga na biso. Ntango tozalaki kuna, libota ebengaki biso kotikala na likita ya pokwa na libota, koyebisaka biso ete mwana na bango ya mobali ya mibu libwa abongisaki liteya. Na ntembe te, totikalaki!

Kolandaka loyembo, losambo bofungoli, mpe masolo etali botambwisi ya libota, mwana yango ya mibu libwa abandaki na kotangaka motuna moko ya mayele ezwamaki na liteya na ye ekomama na maboko: “Boniboni Molimo Mosantu akoki kosunga bino?” Motuna oyo ebandisaki lisolo ya libota ya ntina kati na oyo moto nyonso akabolaki makanisi mpe mamoni. Nasimbamaki na bolengeli ya liteya ya moteyi na biso mpe motuna na ye ya malamu mpenza, oyo nakobaki kokanisa na ntina na yango.

Elilingi
Liteya ya likita ya mpokwa na libota ya kokoma na loboko

Uta wana, nakobaki komituna ngai moko, “Boniboni Molimo Mosantu Akoki Kosunga Bino?”—motuna moko ya kafukafu ya motuya mpo na bana ya Eteyelo ya bana kokokisaka mibu mwambe mpe komilengelaka mpo na kobatisama mpe bana wana oyo babatisami kala te mpe bazwaki likabo ya Molimo Mosantu. Yango ezali lisusu na motuya mpo na bankama ya babongwani ya sika—mpe kutu mpo na mingi na biso oyo tobongwana kala.

Nabengi moko na moko na biso, mingimingi bana ya Eteyelo ya bana, kokanisa na ntina ya motuna, “Boniboni Molimo Mosantu akoki Kosunga Bino?” Wana ezalaki ngai amaniolaki motuna oyo, nakanisaki mbalamoko na mayele moko nazwaki ntango nazalaki elenge. Oyo ezali lisolo moko nabetelaki Mpaka Robert D. Hales na mokuse nsima ya libiangi na ngai na Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale mpe oyo ezali na kati ya magazine ya Eklezia lokasa akomaki na ntina ya bomoi na ngai.1 Mingi kati na bino bakoki kozala bayoka lisolo yango, kasi ebele bakoki kozala bayoka yango te.

Ntango nazalaki na mibu 11, tata na ngai mpe ngai tokendaki kotambola na mokolo ya molunge makasi na eleko ya moi na bangomba pembeni ya ndako na biso. Ntango Tata azalaki kotambola na nzela, ngai nazalaki kopumbuka uta libanga moko monene na mosusu, kolanda bangambo ya nzela. Kozwaka likanisi ya komata likolo ya mabanga moko minene, nabandaki komata likolo na yango. Lokola nasalaki yango, nakamwaki ntango tata akangaki ngai na mokaba na ngai mpe na lombango akitisaki ngai na nse, kolobaka, “komata na libanga wana te. Tika totikala kaka na nzela.”

Minuti nsima, ntango tozalaki kotala na nse uta likolo ya nzela, tokamwaki ntango tomonaki nioka ya ngenge makasi kominyolosaka na moi likolo ya libanga kaka oyo nalingaki komata.

Nsima, wana ekomaki biso kozonga ndako, nayebaki ete tata azalaki kozela ngai natuna, “boniboni oyebaki ete nioka azalaki kuna?” Boye natunaki, mpe motuna na ngai ememaki na lisolo moko etali Molimo Mosantu mpe boniboni Molimo Mosantu ekoki kosunga biso. Natikala kobosana ata mokolo moko te oyo nayekolaki mokolo wana.

Ekoki bino komona boniboni Molimo Mosantu asungaki ngai? Nakozalaka libela na libela na botondi ete tata na ngai ayokaki mongongo ya kimia, moke ya Molimo Monsantu, mpamba te yango ebikisaki bomoi na ngai.

Nini Biso Toyebi na Ntina ya Molimo Mosantu

Yambo tokoba komanyola motuna “Boniboni Molimo Monsantu akoki kosunga bino?” tika totala lisusu ebele nini Nkolo abimisaki na ntina ya Molimo Mosantu. Ezali na babosolo ya seko ebele oyo tokoki kotala, kasi lelo, nakobeta nsete kaka na misato.

Yambo, Molimo Mosantu azali moto ya misato na Kibonzambe. Toyekoli bosolo oyo na biteni ya bondimi ya yambo: “Tondimi Nzambe, Tata wa Seko, mpe Mwana wa Ye, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu.” 2

Ya mibale, Molimo Mosantu azali moto ya molimo, lolenge elimbolami na makomi ya sikoyo: “Tata azali na nzoto ya mosuni mpe mokuwa lolenge moko na ya moto, Mwana mpe lokola; kasi Molimo Mosantu azali na nzoto ya mosuni mpe mokuwa te, azali moto ya molimo. Soki ezalaki bongo te, Molimo Mosantu akokaki kovanda na kati na biso te.3Oyo elingi koloba ete Molimo Mosantu azali na nzoto moko ya molimo, ekokani te na Nzambe Tata mpe Yesu Klisto, baye bazali na banzoto ya mosuni. Bosolo oyo epesi pole na ba nkombo mosusu epesami na Molimo Mosantu mpe emesani na biso, kosangisaka Molimo ya Bulee, Molimo na Nzambe, Molimo na Nkolo, Molimo Mosantu ya Elaka, mpe Molendisi.4

Ya misato, likabo ya Molimo Mosantu ewuti na kotiamaka maboko. Likuli oyo, kolandaka libatisi ekokisi biso mpo na kiboninga ya ntango nyonso ya Molimo Monsantu.5 Mpo na kosalela likuli oyo, basimbi ya Bonganganzambe ya Melekisedeke oyo babongi batiaka maboko na bango likolo ya moto ya moto,6 babengi ye na nkombo na ye, batalisi nguya na bango ya kibonganganzambe,  mpe na nkombo ya Yesu Klisto, bakotisi ye mondimi moko ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo Mya Nsuka, mpe balobi liloba ya motuya: “Yamba Molimo Mosantu.”

Boniboni Molimo Mosantu Akoki Kosunga Bino?

Na botali wana moke ya babosolo ya motuya misato ya Molimo Mosantu, tozongeli motuna na biso ya ebandeli: “Boniboni Molimo Mosantu ekoki kosunga biso?”

Molimo Mosantu Ekebisaka

Lokola nalobelaki na experience ya bomwana na ngai, Molimo Mosantu ekoki kosunga bino na bokebisi bino na ebandela na makama ya nzoto mpe ya molimo. Nayekolaki lisusu na ntina ya mosala ya motuya ya bokebisi ya Molimo Mosantu ntango nasalaki na Bokambi ya Etuka na Japon.

Katikati ya ngonga oyo, nasalaki pembeni na Reid Tateoka, Mokambi ya misio ya Sendai na Japon. Lokola eteni ya mosala na ye ya misio ya mokolo na mokolo, Mokambi Tateoka abongisaki liyangani moko mpo na bamisionele bakambi na ndambo moko ya sud ya misio na ye. Mikolo muke yambo ya liyangani, Mokambi Tateoka ayokaki, liyoki moko na motema na ye, kobenga bamisionele nyonso oyo ya zone wana na likita ya botambwisi, na esika ya kokoma numelo moke ya bakambi ya bampaka mpe bandeko basi.

Ntango ayebisaki makanisi na ye, akundolisamaki ete liyangani oyo esalamaki mpo na bamisionele nyonso te kasi kaka mpo na bakambi ya misio. Atako bongo, kotiaka pembeni mwango na ntina ya kolandaka liyoki ayambaki mpe abengaki bamisionele nyonso basalaki na mboka ya misika mpenza, kosangisaka na mboka Fukushima, na liyangani. Na mokolo yango Sanza ya Misato 11, 2011, bamisionele bakutanaki elongo mpo na liyangani monene ya misio na kati ya mabele ya engumba Koriyama.

Na liyangani yango, boningani ya mabele ya makasi ya 9.0-magnitude mpe tsunami ebetaki enguba ya Japon esika Misio ya Sendai na Japon ezalaki kozala. Na mawa, ebele ya bamboka ya pembeni ya mai—sangisa na baoyo uta esika bamisionele bakutanaka—ebebaki mpe enyokwamaki na bobungisi monene ya bomoi. Mpe mboka Fukushima enyokwamaki na likama elandi ya nuclere.

Atako ndakonzambe esika bamisionele bakutanaki mokolo wana ebebaki ba boningani ya mabele, na kolandaka bamayoki ya Molimo Mosantu, Mokambi mpe Ndeko Mwasi Tateoka mpe bamisionele nyonso basanganaki na kimia. Bazalaki na etuka ya mosika koleka mosika na bobebisi a tsunami mpe bozwi nuclear.

Soki totie bokebi na mayoki uta na Molimo Mosantu—mayoki mingimingi ezalaka kimia mpe mongongo moke—bino bokoki kolongwa na kozanga libela boyebi, uta na likama ya molimo mpe ya nzoto.

Bandeko mibali mpe basi, Molimo Mosantu ekosunga bino na bokebisaka bino, lolenge Ye asalaki na tata na ngai mpe Mokambi Tateoka.

Molimo Mosantu Alendisaka

Mpo na kokoba koyanola motuna “Boniboni Molimo Mosantu Akoki kosunga bino?” tika biso toyekola mosala na Ye lokola molendisi. Makambo tozeli te na babomoi na biso mobimba ememi mawa, mpasi, mpe kolemba nzoto. Solo na kati ya bitumba wana, Molimo Mosantu asaleli bison a moko ya motuya ya misala na Ye—lokola Molendisi, oyo ezali sikawa moko ya bankombo na Ye. Kimia wana eleki, maloba ya kotiela motema uta na Yesu Klisto elimboli mosala oyo ya bulee, “Ngai nakobondela na Tata, mpe ye akotindela bino Molendisi mosusu, ete ye akoki kozala elongo na bino libela na libela.”6

Mpo na kolimbola yango mobimba, nakaboli lisolo ya solo ya libota moko elongo na bana mibali mitano oyo balongwaki Losa Angeles na Californie, USA, tii na lisanga moko ya moke mwa mibu eleki. Bana mibale mibale ya bakolo babandaki kosana na masano ya kelasi ya likolo mpe basanganaki na baninga, batambwisi, mpe bakambi—ebele na bango bazalaki bandimi ya makasi ya Eklezia. Kiboninga wana esungaki na komema na libatisi ya Fernando, ya mokolo makasi, mpe leki na ye ya elenge ya nsima.

Fernando alongwaki na nsima mosika ya ndako, kuna akobaki koyekola mpe kosana na ndembo ya université. Ye abalaki bolingo na ye ya motema ya eteyelo ya likolo, Bayley, na tempelo. Lokola Fernando na Bayley basilisaki boyekoli na bango, basalaki na mposa ya lombango kobota mwana na bango ya yambo—mwana ya mwasi. Kasi ntango na libongisi ya lisungi ya mabota na bango mpo na kozongi ya Fernando mpe Bayley na ndako, Bayley mpe ndeko na ye ya mwasi bazalaki kokumba na nzela monene mpe bakutanaki na likama ya liwa ya mituka Bayley mpe mwana na ye ya mwasi oyo abotamaki naino te babungisaki bomoi na bango.

Elilingi
Fernando mpe Bayley

Solo mpasi ya Fernando ezalaki makasi, lolenge moko na ya baboti mpe bandeko ya Bayley, lolenge moko ezalaki mozindo ya kimia mpe lilendisi oyo bango bazwaki nsima kaka, na ngambo ya pasi. Molimo Mosantu na mosala na Yango lokola Molendisi ya solo asimbaki Fernando na nzela ya monioko wana elimbolami te. Molimo epesaki bozali moko ya kimia oyo ememani Fernando na lolenge ya kolimbisa mpe kolinga moto nyonso akotaki na likama ya mawa.

Baboti ya Bayley babengaki ndeko na ye ya mobali oyo azalaki kosala na misio na ngonga wana ya likama. Ye alimbolaki na mokanda mayoki na ye nsima ya koyokaka bansango ya mpasi ya ndeko na ye ya mwasi ya bolingo: “Ezalaki kokamwa koyoka mingongo na bino na kimia makasi na katikati ya ekumbaki. Nayebaki te nini naloba.  … Nyonso nakokaki kokanisa ezalaki ete ndeko na ngai ya mwasi akozala kuna te ntango nakozonga ndako.  … nalendisamaki na matatoli na bino oyo ekweyaka te ya Mobikisi mpe mwango na Ye. Molimo kaka moko ya kitoko ememi ngai na nzete ya mpinzoli lokola nayekoli mpe nateyi etondaki motema na ngai. Boye nalendisamaki mpe nakundolamaki na makambo nayebi.”8

Molimo Mosantu ekosunga bino na bolendisi bino, lokola asalaki mpo na Fernando mpe libota ya Bayley.

Molimo Mosantu Etatolaka

Molimo Mosantu lisusu atatoli mpe azali nzeneneke ya Tata mpe Mwana mpe ya bosolo nyonso.9 Nkolo, kosololaka na bayekoli na ye, alobaki: “Kasi ntango Molendisi akoya oyo Nakotinda epai na bino uta na Tata,  … ye akotatola mpo na ngai.”10

Mpo na kososolisa mosala ya ntina ya Molimo Mosantu lokola nzeneneke, nakokoba na lisolo ya Fernando mpe Bayley. Soki bokundoli, nakabolaki na bino ete Feranando mpe ndeko na ye ya mobali bazwaki libatisi, kasi baboti na ye mpe leki na ye ya mibali misato babtisamaki te mpe, atako koyambaka bambela ebele ya bokutani na ba misionele na mibu ebele, ngonga moko na moko libota na ye eboyaki.

Likolo ya mpasi ya kufa ya Bayley mpe bebe na ye ya mwasi, libota ya Fernando basungamaki te. Na bokeseni na Fernando mpe na bokeseni na libota ya Bayley, , bango bazwaki lilendisi to kimia te. Bakokaki kososla te boniboni mwana na bango ya mobali, elongo na libota ya Bayley, bakokaki komema mokumba na bango ya bozito.

Na nsuka, basukisaki ete oyo mwana na bango ya mobali azalaki na yango mpe bayebaki te ete ezalaki nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto, mpe yango ekokaki kozala liziba na bango ya kimia mpe lilendisi. Kolandaka esalel wana, bango babengaki ba misionele koteya libota na bango nsango malamu. Lokola mbano, bayambaki bonzenenke mpe litatoli ya mwango monene ya esengo, oyo ememelaki bango kimia ya kitoko mpe bopemi ya lilendisi oyo balembaki na koluka.

Elilingi
Libatisi ya libota ya ernando’s family

Sanza mibale nsima ya bosangi Bayley mpe nkoko na bango na libumu, baboti ya Fernando lokola mpe mibale ya bandeko na ye ya mibali ya leki babatisamaki, bakulaki nkotisa, mpe bayambaki likabo ya Molimo Mosantu. Leki na ye Fernando ya elenge, azali kozela libatisi na ye soki akomi na mibu mwambe. Moko na bango atatoli ete Molimo, Molimo Mosantu, ememamaki litatoli ya bosolo etondisami ya nsango malamu, komemaka bango na mposa moko ya kobatisama mpe koyamba likabo ya Molimo mosantu.

Bandeko mibali mpe basi, Molimo Mosantu akosunga bino na nzela ya botatlolisi biso lolenge Ye asalaki na libota ya Fernando.

Na mokuse

Tika toloba na mokuse. Tokundolaki babosolo misatu ebimisamaki oyo ememi biso na boyebi moko ya Molimo Mosantu. Yango ezali ete Molimo Mosantu azali moto ya misato ya Bonzambe, Molimo Mosantu azali moto moko ya molimo, mpe likabo ya Molimo mosantu ewuti na nzela ya botie maboko. Tososolaki biyano misato na motuna “Boniboni Molimo Mosantu ekoki kosunga bino?” Molimo Mosantu ekebisaka, Molimo Mosantu elendisaka, mpe Molimo Mosantu etatolaka.

Bolongobani mpo na Kobatela Likabo

Mpo na baoyo na bino bazali komilengela mpo na kozwa libatisi mpe kokula nkotisa, baoyo bazwi kala mingi te to kutu baoyo bazwi kala, ezali malamu na kimia ya mosuni mpe molimo na biso ete tobomba likabo ya Molimo Mosantu. Tobandi kosala yango na kobundaka kobomba mitindo, kozalaka na libondeli ya moto ye moko mpe ya libota, kotanga makomi, mpe kolukaka bolingo mpe bolimbisi ya kiboninga mpo na mabota mpe ya bolingo. Tosengeli kobomba makanisi na biso, misala, mpe liloba ebongi. Tosengeli kokumbamela Tata na biso ya Lola na bandako na biso, eklezia, mpe, ntango nyonso ekoki, kino na tempelo esantu. Botikala pembeni ya Molimo, mpe Molmo akotikala pembeni na bino.

Litatoli

Nasukisi na mbela mpe litatoli na ngai ya sikisiki. Nabengisi bino kozala na bomoi mobimba engebene na maloba eyembani mbala mingi na bana na biso ya Eteyelo ya bana, maloba nayebi bango bayebi : “Yokamela, yokamela. Molimo Mosantu akoloba na nse. Yokamela, yokamela mongongo y anse ya kimia.”11

Bandeko na ngai ya bolingo mibali mpe basi, bakolo mpe bilenge, napesi bino litatoli na ngai ya nkembo ya bozali ya bato ya bonzambe oyo basali Bonzambe—Nzambe Tata, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu. Napesi litatoli ete moko ya libaku tosepeli na yango lokola Bansatu ba Mikolo mya Nsuka oyo bazali na bomoi na botondi ya ntango ezai likabo ya Molimo Mosantu. Nayebi ete Molimo Mosantu akoki mpe ako sunga biso. Nabakisi lisusu litatoli na ngai ya kafukafu ya Yesu Klito mpe na mosala na Ye Lokola Mobikisi mpe Mosikoli mpe Nzambe lokola Tata na biso ya Lola. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.