2010–2019
Bonzenga ya Bosantu
Sanza ya Minei 2017


Bonzenga ya Bosantu

Tata na biso na Lola apesi biso nyonso oyo esengeli mpo ete tokoka kokoma basantu lokola Ye azali mosantu

Lokola namibongisaki mpo na liyangani oyo, motema na ngai ebalukaki epai ya bandeko basi ebele ya bondimi oyo nakutani na bango. Mpo na ngai, bango balimbolami malamu mingi na njembo moko ya botondi na King David: “Bopesa Yawe lokumu oyo ebongi na nkombo na ye, boya na likabo mpe bokota na lopango na ye: bokumbama liboso na Yawe na bonzenga ya bosantu.”1

Namoni bonzenga ya bosantu na basi baoyo mitema na bango mitiami na oyo nyonso ezali malamu, baye balingi kokoma koleka lokola Mobikisi. Bango bapesi molimo, motema, mabanzo, makanisi, mpe makasi na bango nyonso na Nkolo na lolenge bazali kobika mokolo na mokolo.2 Bosantu na kobundaka mpe etumba ya kobomba mitindo mpe kokumisa mayokani oyo tosalaki na Nzambe. Bosantu ezali kosala maponi oyo ekobomba Molimo Mosantu lokola motambuisi.3 Bosantu ezali kovandaka pembeni ya bozali na biso mpe kokomaka “mosantu na nzela ya Bomikabi ya Klisto Nkolo.”4 “Ngonga nyonso ya [babomoi na biso] esengeli kozala bosantu na Nkolo.”5

Nzambe na lola apesi mitindo na bana ya Israel, “Mpo ete Ngai nazali Nkolo Nzambe na bino: yango wana bomisantisa, mpe bojala basantu; mpo ete ngai najali mosantu: bokomibebisa na eloko na kolandaka na mikili te.”6

Mpaka D. Todd Christofferson alobaki: “Tata na biso ya Lola azali Nzambe moko azeli ebele epai na biso. … ye asengi kokomisa biso basantu nde boye tokoki ‘kovanda na nkembo ya celesitiale’ (D&C 88:22) mpe ‘kovanda liboso na ye’ (Moses 6:57).”7 Lectures on Faith elimboli, “Moto moko te akoki kosepela na nkembo na ye kozangaka bobongi mpenza mpe bosantu.” 8 Tata na biso na Lola ayebi biso. Ye alingi biso, mpe Ye abongisi mpo na biso nyonso oyo esengeli mpo ete tokoka kokoma basantu lokola Ye azali mosantu.

Biso tozali bana basi ya Tata ya Lola, mpe moko na moko na biso azali na libula ya bonzambe mosantu. Tata na biso ya Lola alobaki, “Tala, ngai nazali Nzambe; Moto na Bosantu ezali nkombo na ngai,”9 Na mokili yambo ya bokufi, tolingaki Tata na biso mpe tosanjolaki Ye. Tozali na mposa ya kokoma lokola Ye. Mpo ete bolingo na ye malamu ya botata, Ye apesaki Mwana na Ye ya Mobali ya Bolingo, Yesu Klisto, kozala Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Ye azali Mwana Mobali ya Moto ya Bosantu.10 “nkombo na Ye ezali Mosantu,”11 “Mosantu Moko ya Israel.”12

Elikia na biso ya bosantu ezali kati na Klisto, na mawa na Ye mpe ngolu na Ye. Na bondimi na Yesu Klisto mpe na Bomikabi na Ye, tokoki kokoma peto, kozanga bosoto, ntango toboyi biso moko mabe13 mpe toyamboli na bosolo. Tobatisami na mayi mpo na bolimbisi ya masumu. Milimo na biso epatwami ntango toyambi Molimo Mosantu na mitema polele. Mposo nyonso tolei likuli ya elambo. Na molimo moko ya bomikisi na baposa ya solo ya bosembo, tolapi ete tolingi kotia likolo na biso nkombo ya Klisto, komikundola Ye, mpe kobomba mitindo na Ye boye tokozalaka ntango nyonso na Molimo na Ye kati na biso. Mokolo na mokolo lokola tokobi kosala makasi ya kokoma moko na Tata, Mwana, mpe Molimo Mosantu, tokomi bakaboli ya lolenge ya bonzambe na Bango.14

Bosantu ezali kobombaka Mayokani na biso

Tozali koyeba ebele komekama mpe masenginya, mpe kotungisama oyo ekokaki kopusa biso mosika na oyo nyonso ezali bopeto, mpe ya lokumu liboso na Nzambe. Kasi mayele na biso ya bokufi epesi biso libaku ya kopona bosantu. Mingi mingi koleka yango ezali mabonza tosali mpo na kobomba mayokani na biso yango epetoli biso mpe ekomisi biso basantu.

Elilingi
Evangeline, elenge mwasi moko na Ghana

Namonaki bosantu na elongi ya Evangeline, elenge mwasi ya mibu 13 na Ghana. Moko ya ndenge ye abombi mayokani ya ye ezali na kosalelaka libiangi na ye lokola Mokambi ya Kelasi ya ba Abeille. Ye alimbolaki na komikitisa nyonso ete ye akendaki na bandako ya baninga na ye, bilenge basi oyo balembi, kosenga na baboti na bango mpo na kopesa bango likoki ya koya na eklezia. Baboti bayebisi ye ete ezali mpasi mpo ete na mokolo ya Eyenga bana basengeli kosala misala ya ndako. Boye Evangeline akendaki mpe asungaki na misala, mpe na bokasi na ye baninga na ye mingi mingi bapesamaki likoki ya koya na eklezia.

Soki tokobomba mayokani masangani, makuli ya bule ya bonganganzambe ekobongola biso, ekopetola biso, mpe ekobongisa po na kokota liboso ya Nkolo.15 Yango wana tomemi mikumba ya moko mpe mosusu; tomipesani bokasi. Tokangi bolimbisi ya masumu ntango topesi lisungi ya molimo mpe ya mosuni na babola, bato na nzala, ya bolumbu, mpe babeli.16 komibatela njoto mpeto na makambo ya mokili ntango tobombi mokolo ya Saba mpe na bolongobani toyambi elambo ya mokolo esantu ya Nkolo.17

Topamboli mabota na biso mpe tokomisi bandako na bino bisika ya bosantu. Tosimbi ba mposa na biso na bongo ete tokoki kotondisama na bolingo ya petwa mpe ewumela.18 Tosembolaka loboko na basusu na motema malamu, na mawa, mpe kotelema lokola banzeneneke ya Nzambe. Tokokoma bato na Siona, na motema moko mpe likanisi moko, bato moko ya petwa oyo bafandi elongo na bosangani mpe bosembo.19 “Mpo na Siona esengeli kokola na bonzenga, mpe na bosantu.”20

Bandeko basi, boya na tempelo. Soki tolingi kozala bato basantu balengelami mpo na koyamba Mobikisi na bozongi na Ye, tosengeli kotombolama mpe kolata bilamba na biso ya kitoko.21 Na bokasi mpe lokumu, tobosani banzela ya mokili mpe tobombi mayokani na biso ete tokoki kozala “tolati na bopeto, iyo, kutu na elamba ya bosembo.”22

Bosantu Ezali Kozwa Molimo Mosantu lokola Motambwisi na Biso

Bosantu ezali likabo ya Molimo. Tondimi likabo yango ntango toponi kosala makambo oyo ekokolisa nguya ya bopetolami ya Molimo Mosantu na babomoi na biso.

Elilingi
Mary ayokaki maloba ya Mobikisi

Ntango Malata ayambaki Yesu na ndako na ye, ye ayokaki mposa makasi ya kosalela Nkolo na malamu mingi ya likoki na ye. Ndeko na ye ya mwasi, Malia, aponaki kovanda “na makolo ya Yesu” mpe koyoka liloba na Ye. Ntango Malata ayokaki mokumba ya kosalaka na lisungi ya moto te, amilelaki epai ya Mobikisi, “Nkolo, ejali na miso na yo likambo te ete ndeko na ngai atiki ngai kosala mosala ngai moko?

Nalingaka maloba oyo kotelemela ya malamu mingi oyo nakoki kokanisa. Na bolingo ebongi mpe mawa ezangi suka, Mobikisi alobaki:

“Malata, ojali na motema na likolo mpe ojali komitungisama na makambo mingi:

“Kasi eloko moko ezali ntina koleka: mpe Malia aponaki nzela malamu, oyo akobungisa atako mokolo moko te.”23

Bandeko basi, soki tolingi kozala basantu, tosengeli koyekola kovanda na makolo na Mosantu Moko ya Israel mpe kopesa ntango na bosantu. Etie biso ba telephone pembeni, totiki kosala molongo ya makambo esengeli kosala, mpe kotala ya mokili? Kosambela, koyekola, mpe kopesa bokebi na liloba ya Nzambe. ekobengisa bolingo ya kopetola mpe kobikisa ya Nzambe. Tika tozwa ntango ya kozala basantu, ete tokoka kotondisama na Molimo na Ye ya bule mpe esantisaka. Elongo na Molimo Mosantu lokola motambuisi, tokobongisa koyamba Mobikisi na bonzenga ya bosantu.24

Bosantu ezali kokoma Mosantu na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto

Engebene na maloba efulami na Mokonzi Benjamin, baoyo bakomi bansatu na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto bango baye bazali na bomikitisi, komisokisa, komikitisa, motema molai, mpe batonda na bolingo, lokola Mobikisi azali.25 Ye abikolaki ete Yesu Klisto, “Nkolo na nguya nyonso oyo akonzi, oyo azalaki, mpe azali uta seko na seko, akokita na nse uta na lola na kati ya bana na bato, mpe akovanda na tabelenakele moko ya modongo.” Ye ayaki kobikisaka bakoni, batengoli, bakufi, bakufi miso, mpe kotombola baye bakufaki na bomoi. Mpe tala akoyoka pasi “kutu koleka oyo moto akoki kokanga motema, longola se soko ezali mpo na liwa.”26mpe bongo Ye azali moko kaka na nzela na ye lobiko eyei, Ye atukamaki, alembisamaki nzoto, mpe abakamaki na ekulusu. Kasi Mwana mobali ya Nzambe abimaki na lilita ete tokoka banso kolonga liwa. Ye azali Moko oyo akotelema kosambisa mokili na bosembo. Ye azali moko oyo akosikola biso nyonso. Ye azali moko ya Israel. Yesu Klisto azali bonzenga ya bosantu.

Ntango bato ya Mokonzi Benjamin bayokaki maloba na ye, bakueyaki na nse, boye bomikitisi mpe boyoki na bango ezalaki monene mpo na ngolu mpe nkembo ya Nzambe na biso. Bango bayebaki lolenge na bango ya kimosuni. Emoni biso bozangi makoki na biso mobimba na mawa mpe ngolu ya Klisto, Nkolo na biso? Endimi biso ete likabo malamu nyonso, ya mosuni mpe ya molimo, eyeli biso na nzela ya Klisto? Ekondoli biso ete engebene na mwango ya seko ya Tata, kimia na bomoi oyo mpe bankembo ya boseko ezali ya biso kaka na mpe na nzela ya Mwana na Ye ya mobali Mosantu?

Tika biso tosangana na bato ya Mokonzi Benjamin lokola bango bangangaki makasi na mongongo moko, “O zala na ngolu, mpe tia makila ya bomikabi ya Klisto, ete tokoka kozwa bolimbisi ya masumu na biso, mpe mitema na biso ekoka kopetwama; mpo tondimeli Yesu Klisto, Mwana mobali ya Nzambe, oyo akelaki likolo mpe na mabele, mpe biloko nyonso.”27

Natatoli ete soki toyei epai ya Moko kaka ya Israel, Molimo na Ye ekoya likolo na biso ete tokoki kotondisama na esengo mpe koyamba bolimbisi ya masumu mpe kimia na kansansa.

Tata ya Lola apesi moko na moko na biso makoki ya kokoma mosantu. Ekoka biso kosala ya bino malamu koleka mpo na kobomba mayokani na biso, mpe kozwa Molimo Mosantu lokola motambuisi. Na bondimi na Yesu Klisto, tokobunda mpo na kokoma basantu na nzela ya Bomikabi na Ye, ete tokoka koyamba bozangi kufa mpe bomoi ya seko mpe kopesa na Nzambe Tata na biso nkembo oyo ebongi na nkombo na Ye. Ekoka bomoi na biso kozala ntango nyonso libonza ete tokoka kotelema liboso ya Nkolo na bonzenga ya bosantu. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.