2010–2019
Botala Nzinganzinga Te, Botala Likolo!
Sanza ya Minei 2017


Botala Nzinganzinga te, Botala Likolo!

Kobengisaka basusu koya epai na Klisto ezali ntina na biso, mpe tokoki kofulisa ntina oyo na kotalaka epai na Yesu Klisto

Ntina na ngai ezali “kobenga basusu koya epai na Klisto.”1 yango ezali ntina na bino mpe.

Elilingi
Libota ya Mpaka Choi

Nazwaki libatisi nzela moko na baboti na ngai ntango nazalaki na mibu 16. Leki na ngai ya mobali, Kyung-Hwan, oyo azalaki na mibu 14, tosanganaki na Eklezia na nzela ya noko na ngai, Young Jik Lee, mpe abengisaki biso na eklezia na ye. Moko moko ya bandimi 10 na kati ya libota na biso tozalaki ya eklezia ya kokesana, boye tozalaki na esengo ya koyeba bosolo mpe tolukaki kokabola esengo wana tomonaki na nsango malamu ya Yesu Klisto nsima biso tobatisamaki.

Elilingi
Tata ya Mpaka elongo na basusu

Tata na ngai azalaki ya kosepela makasi koleka kati biso na koyekola mpe kokabola bosolo. Azalaki ntango nyonso kolamukaka na ntongo makasi mpenza kotanga makomi koleka ngonga mibale mokolo na mokolo. Nsima ya mosala akendaka elongo na bamiosonele kotala libota na biso, baninga, mpe bazalani ya pembeni mikolo nyonso. Bansanza nsambo nsima ya biso kobatisama, 23 ya libota na ngai, mpe baninga bakomaki bandimi ya Elezia. Oyo elandamaki na likamwisi ya komonaka 130 batu kobatisamaka na mobu elandaki na nzela ya mosala ya misionele ya mondimi ya tata na ngai.

Elilingi
Bibandeli ya mosala ya misio
Elilingi
Mosala ya misio epanzani

Mambi ya libota ezalaki lisusu motuya mpo na ye, mpe akokisaki nkola mwambe ya bankoko na biso. Kobanda na ntango wana, bambuma ya mbomgwana ya libota na biso, ebandaki na ndeko na ngai ya mobali ya mibu 14, akolisaki na banzela ebele kaka na kati ya babomoi te kasi lisusu na kati ya kufa. Kotongamaka likolo ya mosala ya tata na ngai mpe basusu, nzete na biso ya libota esangisi sikawa bankola 32, mpe tozali sikawa kokokisaka mosala ya tempelo mpo na bitape ebele. Lelo oyo nazali na bosepeli mpe nayoki esengo monene kokangisaka bankoko mpe bakitani na biso.

Elilingi
Mambi ya libota epanzani

Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki mayele moko ya lolenge boye na Tempelo ya Colombus Ohio:

“Kokanisaka na babomoi ya [nkoko ya tata na ngai, tata ya tata na ngai, mpe tata na ngai] ntango bazalaki ya kovanda na tempelo, natalaki mwana na ngai ya mwasi, na mwana na ye ya mwasi, … mpe bana na ye, bakokololo. Nasosolaki na mbala moko ete natelemaki mpenza na katikati ya bankola nsambo yango—misato liboso na ngai mpe misato na nsima na ngai.

“Na kati ya ndako wana ebulisami mpe epambolami elekaki na makanisi na ngai mobeko moko monene oyo ezalaki ya ngai koyebisa nyonso oyo nazwaki lokola libula wuta bakoko na ngai tii na bankola oyo baye sikawa nsima na ngai.”2

Elilingi
Na katikati ya bankola

Banso kati na biso tozali na katikati ya libota moko ya libela. Mosala na biso ekoki kozala ebandeli ya esika wapi bambongwana ya motuya ekoki koya na banzela ya ,malamu to ya mabe. Mokambi Hinckley akobaki, “Ata mokolo moko tekomipesaka nzela ya kokoma nkanga moko alemba na molongo ya bikeke na bino.”3 Bondimi na bino na nsango malamu ekokembisa libota na bino. Boniboni tokoki kondimisama ete tokozala nkanga moko ya makasi na libota na biso ya seko?

Mokolo moko, basanza moke nsima ya libatisi na ngai, nayokaki bandimi moko kotukaka moko mpe mosusu nayokaki mawa mpeza. Nazongaki ndako mpe nayebisaki tata na ngai ete nakokendaka na eklezia lisusu te. Ezalaki na mpasi komona bandimi kotuka basusu lolenge wana. Na nsima ya boyoki, tata na ngai ateyaki ngai ete nsango malamu ezalaki ya kozongisama mpe yango ezali malamu koleka kasi bandimi bazali nanu ya kobonga te, atako yemoko ngai mpe te. Na makasi ye alobaki, “Kobunga bondimi na yo te mpo na bato nzinganzinga na yo, kasi tonga kiboninga ya makasi na Yesu Klisto. Kotala nzingannzinga te, tala likolo!”

Totala likolo epai ya Yesu Klisto—toli ya bwanya ya tata na ngai, ekembisaki bondimi na ngai atako nakutani na mikakatano na bomoi. Ye ateyaki ngai boniboni kopanza malakisi ya Klisto, lokola na maloba oyo: “Botala epai na ngai na makanisi na bino nyonso; botia ntembe te, bobanga te.” 4

Elilingi
Bamisionele na Tempelo ya Washington na Seattle

Ntango nazalaka kokamba likolo ya Misio ya Washington Seattle, mvula enokaki mikolo ebele na mobu. Kino, bamisionele na biso bapesamaki ndingisa ya kobima libanda mpe koteya na nse ya mvula. Namesanaki koloba na bango, “Bokende libanda na nse ya mvula, botala likolo na lola, bofungola monoko, mpe bomela yango! Ntango botali likolo, bokokemba mpo na kofongola monoko na bino epai ya moto nyonso na bobangi moko te.” Ezalaki ndakisa moko ya liteya mpo na bango kotala likolo ntango bakomaki liboso ya mikakatano atako nsima ya misio. Tobondeli bino bomeka yango te na bisika ya bosoto.

Wana kosalaka kaka na miso ya Seattle, nayambaki mbela na telephone wuta na mwana ngai ya mobali ya mokolo koleka, Sunbean, oyo azalaki mobeti piano. Alobaki akokaki kozwa libaku ya kobetaka piano na Carnegie Hall na New York mpo ete alongaki momekano ya monene. Tozalaki na esengo makasi mpe bosepeli makasi mpo na ye. Nabongo, na mpokwa wana, ntango tosambelaki na botondi, mwasi na ngai asosolaki et tokoki te kosangana na ye mpo na bobeti miziki na ye tempe ayebisaki na Tata ya Lola eloko moko lokola boye: “Tata na Lola nazali na botondi mpo na mapamboli Yo opeaski Sunbearn. ata bongo, nazali na mawa ete nakokaki kokende kunate. Nakokaka kokende soki opesaki ye lipamboli wana ata liboso to nsima ya misio. Nazali kolelalela te, kasi nayoki mwa mawa moko moke.”

Ntango kaka asilisaki losambo yango, ayokaki mongongo moko ya polele: “Mpo ete bino bokoki kokende te, mwana na bino ya mobali apesamelaki libaku yango. Okoki kolinga toyokana lolenge mosusu?

Mwasi na gai akamwaki. Ye ayebaki ete bana bakokaki kopambolama na nzela ya mosala ya bondimi ya baboti na bango na bokonzi ya Nkolo, kasi yango ezalaki mbala ya yambo ye asosolaki mosala na ye na polele ya lolenge boye. Ye azongiselaki Ye na mbala moko: “Te, te, yango ezali OK mpo na ngai kokende kuna te. Tika ye azwa lokumu yango.”

Bandeko ya motuya mibali mpe basi, yango ezali pete te mpo na biso kososola bolingo ya Tata ya Lola ntango tozali kotala nzinganzinga na miso ya mosuni, mpo ete tokoki komona mabe, bozangi, mikumba, to kozala yomoko yambo. Na ngambo mosusu, tokoki kososola boniboni topambolami ntango totali epai na Nzambe. Nkolo alobaki, “Ntango tozui lipamboli uta na Nzambe, ezali na nzela ya botosi na mobeko likolo na yango evandi..”5 Na baoyo nyonso oyo bakoti na mosala moko to mosusu ya Nzambe, boyeba ete bozali ndimbola ya bopesi mapamboli ya nguya na baoyo bazalaki liboso na bino mpe na bankola nsima na bino.

Lelo oyo, nazali na botondi komona ete ebele ya bandimi ya libota na biso bazali na bondimi koleka na nzela ya mayokani kasi nazalaka na mawa ya kokanisa bakiti mosusu ya mpamba pembeni na biso. Mpaka M. Russell Ballard alobaki: “Soki boponi kozonga nsima to kotika Eklezia ezongisami ya Yesu Klisto ya Bansatu ba Mikolo mya Nsuka, bokokende wapi? Bokosala nini? Mokano ya ‘kotambola lisusu te’ elongo na bandimi ya Eklezia mpe bakambi baponami ya Nkolo ekozala na mbano moko ya molayi oyo ekoki te komonana sikawa.”6 Mokambi Thomas S. Monson apesaki biso makasi, “Esengeli biso kopona bosolo ya pasi na esika ya lokuta ya pete.”7

Ntango eleki nanu te mpo na kotala Yesu Klisto. Maboko na Ye ezali ntango nyonso ya kofungwama mpo na bino. Ezali na bankola liboso na biso mpe nsima na biso bateleli biso kolanda Klisto boye ete tokoki kozala libota moko ya libela na Nzambe.

Ntango nalongolamaki uta ma bambela na ngai lokola mokambi ya likonzi, mwana ngai ya mobali asepelaki mpo ete akolekisaka ban tango ebele elongo na ngai. Mposo misatu nsima nabiangemaki lokola Ntuku nsambo. Na yambo nabanzaki ete bakokaki koyoka mawa, kasi eyano ya mwana na ngai ya moke ya mobali ezalaki, “Tata, komitungisa te. Tozali libota moko ya seko. Oyo bosolo moko ya pete mpe ya polele yango ezalaki! Namitungisaki moke mpo natalaki nzinganzinga na bomoi oyo ya kufa yambo, kasi mwana na ngai ya mobali azlaki na esengo mpo ete atalaki te nzinganzinga kasi atalaki likolo na miso boseko mpe ntina ya Nkolo.

Ezalaka ntango nyonso mpete te kotala likolo ntango baboti na bino batelemeli nsango malamu, ntango ozali mondimi ya eklezia moko ya moke, ntango molongani na yo azali mondimi te, ntango ozali kaka monzemba atako yo ozali nyonso ya koleka mpo na kobala, ntango mwana moko abungi nzela, ntango otikali yomoko moboti monzemba, ntango ozali na mikakatano ya nzoto to ya makanisi, ntango ozui likama, mpe bongo na bongo. Kangama na bondimi na yo na bangonga wana ya mpasi. Talela Klisto mpo na bokasi ya kotelema ngwi, mpe lobiko ya nzoto. Na nzela ya nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto, “makamno nyonso ekotambola elongo mpo na [ya yo] bolamu.”8

Napesi litatoli ya Yesu Klisto, ete Ye azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Ntango tolandi profeta na biso ya bomoi, Mokambi Thomas S. Monson, totali likolo epai na Yesu Klisto. Soki tozali kobondeai mpe koyekola makomi mokolo na mokolo, mpe kosangana na bosolo na elambo poso nyonso, tozali kolonga ntango nyonso kotala epai na Ye. Nazali na esengo ya kozala mondimi moko ya Eklezia oyo mpe kozala moko ya libota moko ya seko. Nalingaka kokabola nsango malamu monene oyo elongo na basusu. Kobengisaka basusu koya epai na Klisto ezali ntina na biso, mpe tokoki kofulisa ntina oyo na kotalaka epai na Yesu Klisto. Nakomikitisa nyonso natatoli makambo oyo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.