2010–2019
Na Baninga mpe Baluki ya Eklezia
Sanza ya Minei 2017


Na Baninga mpe Baluki ya Eklezia

Soki bosali oyo esengami mpo na kozwa emoniseli, bomikitisi bino moko, botanga, bosambela, mpe boyambola, balola ekofungwama mpe bino bokoyeba, lokola ngai nayebi, ete Yesu azali Klisto.

Na nsima ya nzanga ya mokolo ya mitano, ya sanza ya libwa 16, 1988, na ndakonzambe ya Palwasi ya Vicente López na Buenos Aires, Argentine, nazwaki libatisi mondimi moko ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Moninga moko ya malamu mpenza, Alin Spannaus, abatisaki ngai mokolo wana, mpe nayokaki esengo, pepele, mposa makasi ya koyekola mingi.

Elilingi
Libatisi ya Mpaka Costa

Lelo, nakolinga kokabola mateya moko nayekolaki na nzela na ngai ya kobongwana—mateya oyo nalikii ekoki kosunga baye kati na bino oyo bazali kolanda mpe oyo bazali bandimi ya Eklezia te. Nasambeli ete mitema na bino ekoka kosimbama na Molimo lokola ya ngai esimbamaki.

Yambo, Bokutani na ba Misionele

Mpo na nini ekoki na moto moko kozanga mikakatano, bosenga, to mituna makasi kozala na ntina ya bokutani na bamisionele mpe koyokaka mateya na bango? Malamu, mpo na ngai yango ezalaki bolingo—bolingo mpo na mwana mwasi moko, mwana mwasi moko abengami Renee. Nakweyaki na bolingo na ye, mpe nalingaki kobala ye. Ye azalaki lolenge mosusu mpe ezaleli na ye ekesenaki na ebele ya bilenge basi ngai nayebaki. Kasi nakweyaki na lolango mpo na ye mpe nasengaki ye kobalana na ngai—mpe ye alobaki te!

Elilingi
Mpaka mpe Ndeko mwasi Costa

Nabulunanaki. Nabanzaki ete nazalaki moto nyonso akolinga ngai! Nazalaki kitoko, na mibu 24, mpe na licencié ya université na mosala moko ya malamu. Ye alobaki mpo na bantina na ye—ya kobalaka kaka moto moko oyo akoki kobala na ye na tempelo, na kozalaka na libota moko ya libela—mpe aboyaki loboko na ngai. Nalingaki kokoba na kiboninga, boye nandimaki koyoka bamisionele. Oyo ezali ntina kitoko ya kokutana na bamisionele? Malamu, yango ezalaki mpo na ngai.

Ntango nakutanaki na bamisionele mbala ya yambo, nasosolaki mpenza te oyo bango balobaki, mpe mpo na koyebisa bino bosolo, natiaki ata makanisi moke te epai na bango.nazalaki na mposa te yakoyekola eyamba moko ya sika. Nalingaki kolakisa bango ete bazalaki na libunga mpe kozwa ntango ya kondimisa Renee kobalana na ngai ata bongo.

Lelo bana na ngai basalaki mpe bazali kosala na ba misio, mpe nasosoli mabonza oyo bilenge mibali mpe bilenge basi wana bazali kosala na koteya nsango malamu ya Yesu Klisto. Sikoyo natombeli nasengelaki kosala keba mingi koleka na Mpaka Richardson, Mpaka Farrell, mpe Mpaka Hyland,bamisionele kitoko oyo bateyaki ngai.

Boye longwa na liteya na ngai ya yambo, nalobi na bino baninga mpe bandimi ya sika ya Eklezia: mokolo moko soki okutani na bamisionele, nasengi bino bozwa bango na bosembo; bango bazali kopesaka mibu mibale ya motuya ya babomoi na bango kaka mpo na bino.

Ya mibale, Kokende na Eklezia

Mbala ya yambo nasanganaki na liyangani ya Eklezia, nayokaki maloba ebele oyo nasosolaki te. Banani bazalaki Ndako ya nzoyi? Nini ezalaki Bonganganzamne ya Alona? Lisanga Bamama Basungi?

Soki ezali mbala ya yambo bino bosangani na liyangani ya Eklezia mpe bozali koyoka ya kobunga na eloko moko bososoli te, bobanga te! Ngai mpe nazalaki koyeba te. Kasi nakomikundolaka bomoni, mayoki ya sika ya kimia mpe esengo nayokaki. Nayebaki yango te bongo, kasi Molimo Mosantu efulaki na matoyi na ngai mpe na motema na ngai, “Yango esali sembo.”

Boye tika ngai nakata na bokuse liteya oyo na liloba moko: Soki bobungi, bobanga te— bokundola mayoki boyokaki; yango ewuti na Nzambe.

Ya misato, Kotangaka Buku ya Mormon

Nsima ya bokutani ebele na bamisionele, nakendaki mpenza liboso te. Nayokaki ete nayambaki kondimisama moko te ya bosolo ya nsango malamu.

Mokolo moko, Renee atunaki ngai, “Ezali yo kotangaka Buku ya Mormon?”

Nazongisaki, “Te.”nazalaki koyokaka bamisionele—yango ekoki te?

Na mayi na miso na ye, Renee alobelaki na bosolo ete ayebi ete Buku ya Mormon ezali ya solo mpe amanyolaki ete soki nalukaki koyeba soki ezali ya solo, nzela kaka moko ezali—oyebi nini—kotanga yango! Mpe nsima kotuna!

Tanga, maniola na motema na yo, mpe “tuna Nzambe, Tata ya Seko, na nkombo ya Klisto, … na motema ya bosembo, na mokano ya solo, kozalaka na bondimi na Klisto” (Moloni 10:4) soki Buku ya Mormon ezali ya solo, soki oyo ezali Eklezia ya solo.

Boye, liteya ya misato, na liloba moko: Ntango bino boyambi makambo yango—Buku ya Mormon—mpe bolendisami kotanga mpe kotuna Nzambe soki yango ezali ya solo, nasengi sala yango!

Ya Nsuka, Boyamboli

Ya mayele ya suka nalingaki kokabola na bino ezali koyambola. Ntango nasilisaki kozwa mateya nyonso na ba misionele, nandimisamaki kaka te nasengelaki kobongola eloko moko te na bomoi na ngai. Ezalaki Mpaka Cutler, elenge mobali moko, misionele moninga na Espagnole moke, oyo mokolo moko alobaki, “Joaquin, tika totanga elongo Alma 42, mpe tokokotisa nkombo na yo ntango tozali kotanga.”

Nakanisaki ete ezalaki bozoba, kasi nasalaki lokola Mpaka Cutler asengaki mpe natangaki na molongo 1: “Mpe sikawa, mwana mobali na ngai [Joaquin], nasosoli ezali na mwa likambo mosusu etungisi mayele na yo oyo okoki kososola te.” Oh! buku yango ezalaki kolobela ngai.

Mpe totangaki na eteni  2: “Sikawa tala, mwana na ngai ya mobali [Joaquin], nalingi kolimbolela yo likambo oyo.” Mpe nsima Bokweyi ya Adama elobelamaki.

Mpe nsima na eteni 4: “Mpe boye tomoni, ete epesamaki ntango moko na [Joaquin] mpo na koyambola.”

Tokobaki kotangaka malembe malembe, eteni moko na moko, tii tokomaki na biteni misato ya nsuka. Boye nasimbamaki na nguya moko ya makasi. Buku elobakimbalamoko na ngai, nabandaki kolela ntango nazalaki kotanga, “Mpe sikawa, [Joaquin,] mwana na ngai ya mobali, nazali na mposa ete otika makambo oyo etungisa yo lisusu te, mpe bobele tika masumu na yo etungisa yo, na motungisi wana ekomema yo … epai ya boyamboli(eteni  29).

Namoni sikawa ete nakanisaki kozwa emoniseli nakozala ata bokasi moko te. Tii ntango wana natikalaki koloba na Nzambe na bosolo ata mokolo moko te, mpe likanisi ya kolobaka na moto moko oyo azalaki wana te emonanaki lokola liboma. Namikitisaki ngai moko mpe nasalaki oyo nasengamaki kosala kutu soki, na kati ya makanisi na ngai ya bomoto, emonanaki kozala bozoba.

Mokolo wana nafungolaki motema na ngai na Molimo, nalingaki koyambola, mpe nalingaki kobatisama! liboso ya ngonga wana, nakanisaka boyamboli lokola eloko moko mabe, ekangani kaka na lisumu mpe kosala mabe, kasi mbala moko namonaki yango na bomoni ya sika—lokola eloko moko malamu oyo ekopetola nzela ya bokoli mpe bosepeli.

Mpaka Cutler azali awa lelo, mpe nalingi kotonda ye mpo na kosunga ngai kososola. Mokano nyonso nazwaki na bomoi na ngai banda wana efulisami na ngonga wana ntango namikisaki ngai moko, mpe nasambelaki mpo na bolimbisi, mpe Bomikabi ya Yesu Klisto mpo na ntina na ngai kokoma ndambo ya bomoi na ngai.

Boye liteya ya nsuka, na liloba moko: Mayele ya boyamboli; eloko moko ete ekokanga yo pembeni ya Nkolo Yesu Klisto lokola mposa moko ya kobongwana.

Mondimi ya sika mpe moninga na ngai ya talo ya Eklezia, soki bozali koyokaka lelo, bozali pembeni ya kosimba esengo moko ya monene. Bozali pembeni!

Tika ngai kobenga bino, na makasi nyonso ya motema na ngai, mpe uta na bozindo ya molimo na ngai: bokende mpe babatisama! Ezali eloko moko ya malamu mingi bino bokotika kosala ata mokolo moko te. Yango ekobongola kaka bomoi na bino te kasi babomoi ya bana na bino mpe bakoko na bino.

Elilingi
Mokolo ya libala ya Mpaka mpe Ndeko mwasi

Nkolo apambola ngai na libota moko. Nabalanaki na Renee, mpe tozali na bana minei ya kitoko. Mpe mpo na libatisi na ngai, nakoki, lokola profeta Lehi ya mokolo, kobenga bango kolia mbuma ya nzete ya bomo, oyo ezali bolingo ya Nzambe (tala 1 Nefi 8:15; 11:25). Nakoki kosunga bango koya na Klisto.

Boye nasengi botala mayele na ngai, mpe (1) bozwa bamisionele na kozanga masano mpenza, (2) bokende na eklezia mpe bokundola mayoki ya molimo, (3) botanga Buku ya Mormon mpe botuna Nkolo soki yango ezali ya solo, mpe (4) bosalela boyamboli mpe bobatisama.

Natatoli epai na bino ete soki bosali oyo esengami mpo na kozwa emoniseli, bomikitisi bino moko, botangi, bosambeli, mpe boyamboli, balola ekofungwama mpe bino bokoyeba, lokola ngai nayebi, ete Yesu azali Klisto, Ye azali Mobikisi na ngai mpe Ye azali ya bino. Na nkombo na Yesu Klisto, amen.